< Ezekieli 16 >

1 Yawe alobaki na ngai:
耶和華的話又臨到我說:
2 « Mwana na moto, lakisa Yelusalemi misala na ye ya mbindo!
「人子啊,你要使耶路撒冷知道她那些可憎的事,
3 Yebisa ye boye: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya Yelusalemi: Bokoko mpe mbotama na yo etalisaka ete ozali moto ya Kanana; tata na yo azalaki moto ya Amori, mpe mama na yo azalaki moto ya Iti.
說主耶和華對耶路撒冷如此說:你根本,你出世,是在迦南地;你父親是亞摩利人,你母親是赫人。
4 Na mokolo ya mbotama na yo, bakataki yo motolu te, basukolaki yo na mayi te mpo ete okoma peto, batikalaki kopakola yo mungwa te mpe bazipaki yo bilamba te.
論到你出世的景況,在你初生的日子沒有為你斷臍帶,也沒有用水洗你,使你潔淨,絲毫沒有撒鹽在你身上,也沒有用布裹你。
5 Moto moko te ayokelaki yo mawa mpo na kosalela yo ata moko kati na makambo wana. Nzokande, na mokolo ya mbotama na yo, bayinaki yo mpe babwakaki yo na zamba mpo ete bazalaki na somo makasi ya komona yo.
誰的眼也不可憐你,為你做一件這樣的事憐恤你;但你初生的日子扔在田野,是因你被厭惡。
6 Boye, Ngai nalekelaki wana mpe namonaki ndenge nini ozalaki kobunda-bunda na kufa kati na makila. Bongo nalobaki na yo: ‘Okozala na bomoi atako ozali kobaluka na makila!’
「我從你旁邊經過,見你滾在血中,就對你說:你雖在血中,仍可存活;你雖在血中,仍可存活。
7 Nakolisaki yo lokola nzete ya elanga. Bongo tango okolaki penza mpe oyaki monene, okomaki kitoko makasi koleka; tolo na yo ebimisaki mabele, mpe bapwale na yo ekolaki. Kasi ozalaki na yo kaka bolumbu tango nyonso, ozalaki na bilamba te.
我使你生長好像田間所長的,你就漸漸長大,以致極其俊美,兩乳成形,頭髮長成,你卻仍然赤身露體。
8 Sima na mikolo, tango nalekelaki lisusu wana mpe namonaki yo, nasosolaki ete okokisi mibu ya libala. Nakamataki elamba na Ngai mpe nazipaki bolumbu na yo; nalapaki ndayi ete nakosala boyokani ya libela elongo na yo, elobi Nkolo Yawe. Mpe na bongo, okomaki ya Ngai.
「我從你旁邊經過,看見你的時候正動愛情,便用衣襟搭在你身上,遮蓋你的赤體;又向你起誓,與你結盟,你就歸於我。這是主耶和華說的。
9 Nasukolaki yo na mayi mpo na kolongola makila oyo ekangamaki yo na nzoto, mpe napakolaki yo mafuta ya solo kitoko.
那時我用水洗你,洗淨你身上的血,又用油抹你。
10 Nalatisaki yo elamba ya talo batonga bililingi na basinga mpe basapato ya kitoko oyo basala na baposo ya banyama; nalatisaki yo bilamba ya lino ya kitoko mpe nazipaki yo bilamba ya talo.
我也使你身穿繡花衣服,腳穿海狗皮鞋,並用細麻布給你束腰,用絲綢為衣披在你身上,
11 Nalatisaki yo babiju, mayaka na maboko mpe na kingo.
又用妝飾打扮你,將鐲子戴在你手上,將金鍊戴在你項上。
12 Nalatisaki yo lopete na zolo, biloko ya matoyi mpe motole ya kitoko na moto.
我也將環子戴在你鼻子上,將耳環戴在你耳朵上,將華冠戴在你頭上。
13 Boye, olataki biloko ya wolo mpe ya palata; bilamba na yo ezalaki ya lino ya kitoko, bilamba ya talo batonga bililingi na basinga. Bilei na yo ezalaki: farine ya ble basangisa na eloko mosusu te, mafuta ya nzoyi mpe mafuta ya olive. Okomaki lisusu kitoko koleka, ozwaki lokumu makasi mpe okomaki lokola mwasi mokonzi.
這樣,你就有金銀的妝飾,穿的是細麻衣和絲綢,並繡花衣;吃的是細麵、蜂蜜,並油。你也極其美貌,發達到王后的尊榮。
14 Mpo ete kitoko na yo ekomaki ya kokoka, sango na yo epanzanaki kati na bikolo, likolo ya lokumu oyo napesaki yo, elobi Nkolo Yawe.
你美貌的名聲傳在列邦中,你十分美貌,是因我加在你身上的威榮。這是主耶和華說的。
15 Kasi okomaki kotia motema na kitoko na yo mpe kosalela lokumu na yo mpo na kosala kindumba. Olakisaki bolumbu na yo na moleki nzela nyonso mpe omipesaki na ye.
「只是你仗着自己的美貌,又因你的名聲就行邪淫。你縱情淫亂,使過路的任意而行。
16 Okamataki bilamba na yo mosusu, otongaki yango mpo na kobongisa bisambelo na yo ya likolo ya bangomba, epai wapi osalaki kindumba na yo. Likambo ya bongo etikala nanu kosalema te mpe ekotikala kosalema lisusu te!
你用衣服為自己在高處結彩,在其上行邪淫。這樣的事將來必沒有,也必不再行了。
17 Okamataki lisusu babiju ya kitoko oyo basala na wolo mpe na palata oyo napesaki yo, osalelaki yango bikeko ya mibali; mpe elongo na yango, omipesaki na kindumba.
你又將我所給你那華美的金銀、寶器為自己製造人像,與他行邪淫;
18 Okamataki bilamba na yo ya talo batonga bililingi na basinga, olatisaki yango bikeko wana mpe obonzelaki yango mafuta mpe ansa na Ngai.
又用你的繡花衣服給他披上,並將我的膏油和香料擺在他跟前;
19 Bilei oyo Ngai nabongiselaki yo: farine ya ble, mafuta ya nzoyi mpe mafuta ya olive, oyo napesaki yo mpo ete oliaka, obonzaki yango epai ya bikeko wana lokola mbeka ya solo kitoko. Yango nde makambo oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe.
又將我賜給你的食物,就是我賜給你吃的細麵、油,和蜂蜜,都擺在他跟前為馨香的供物。這是主耶和華說的。
20 Okamataki lisusu bana basi mpe bana mibali oyo obotelaki Ngai, obonzaki bango lisusu lokola bilei epai ya banzambe wana ya bikeko mpo ete elia bango. Boni, kindumba na yo ekokaki kaka te?
並且你將給我所生的兒女焚獻給他。
21 Esengelaki solo ete oboma bana na Ngai mpo na kobonza bango lokola makabo epai ya banzambe wana ya bikeko, na kolekisa bango na moto!
你行淫亂豈是小事,竟將我的兒女殺了,使他們經火歸與他嗎?
22 Mpe wana ozalaki kosala makambo na yo nyonso ya nkele mpe kindumba na yo, okanisaki ata moke te bolenge na yo: tango oyo ozalaki bolumbu mpe ozalaki kobunda-bunda kati na makila na yo.
你行這一切可憎和淫亂的事,並未追念你幼年赤身露體滾在血中的日子。」
23 Mawa! Mawa penza mpo na yo, elobi Nkolo Yawe; sima na yo kosala mabe wana nyonso,
「你行這一切惡事之後(主耶和華說:你有禍了!有禍了!)
24 omitongelaki mwa ndako mpo na kosala kindumba mpe obongisaki mpo na yo moko, bisika ya bule na bisika nyonso oyo bato bakutanaka;
又為自己建造圓頂花樓,在各街上做了高臺。
25 otongaki yango na bisika nyonso oyo babalabala ekutana, okomisaki kitoko na yo likambo ya nkele mpe omipesaki epai ya moleki nzela nyonso: osalaki penza kindumba makasi.
你在一切市口上建造高臺,使你的美貌變為可憎的,又與一切過路的多行淫亂。
26 Osalaki kindumba na bato ya Ejipito, baninga na yo, oyo bazali na banzoto ya bingambe; mpe osalaki kindumba makasi mpo na kopesa Ngai kanda.
你也和你鄰邦放縱情慾的埃及人行淫,加增你的淫亂,惹我發怒。
27 Natombokelaki yo, nabotolaki yo bilei oyo napesaki yo mpe nakabaki yo na maboko ya banguna na yo, bingumba ya bato ya Filisitia, oyo bazalaki mpe kosepela ata moke te na bizaleli na yo ya soni mpe ya mabe.
因此我伸手攻擊你,減少你應用的糧食,又將你交給恨你的非利士眾女,使她們任意待你。她們見你的淫行,為你羞恥。
28 Lokola otondaka te, osalaki lisusu kindumba na bato ya Asiri; mpe, ata sima na yango, otondaki mpe kaka te.
你因貪色無厭,又與亞述人行淫,與他們行淫之後,仍不滿意,
29 Ezala kati na Kanana, pembeni ya Babiloni, okobaki kaka kosala kindumba; kasi atako bongo, otondaki kaka te.
並且多行淫亂,直到那貿易之地,就是迦勒底,你仍不滿意。
30 Yango motema ya pete ya ndenge nini penza yo ozali na yango, elobi Nkolo Yawe, mpo ete osala makambo oyo nyonso, lokola mwasi ya ndumba oyo akenda sango na mosala na ye ya kindumba!
「主耶和華說:你行這一切事,都是不知羞恥妓女所行的,可見你的心是何等懦弱!
31 Tango ozalaki kotonga mwa bandako ya kindumba na bisika nyonso oyo babalabala ekutana mpe kobongisa bisika ya bule na bisika nyonso oyo bato bakutanaka, ozalaki kosala lokola mwasi ya ndumba nyonso te, pamba te ozalaki kosenga lifuti te.
因你在一切市口上建造圓頂花樓,在各街上做了高臺,你卻藐視賞賜,不像妓女。
32 Yo ozali penza mwasi ya ekobo; osepelaka kosangisa nzoto na bapaya, kasi na mobali na yo te.
哎!你這行淫的妻啊,寧肯接外人,不接丈夫。
33 Basi nyonso oyo basalaka kindumba basengaka lifuti; kasi epai na yo, ezali yo nde opesaka bakado epai ya bamakangu na yo nyonso: na bongo, osombaka mitema na bango mpo ete bawuta bipai na bipai mpe baya kosala ekobo na yo.
凡妓女是得人贈送,你反倒贈送你所愛的人,賄賂他們從四圍來與你行淫。
34 Yo, okeseni penza na basi mosusu na kindumba na yo, pamba te mibali balukaka yo te! Yo penza, okeseni na basi mosusu ya ndumba, pamba te ofutaka mibali na esika ete bango bafuta yo.
你行淫與別的婦女相反,因為不是人從你行淫;你既贈送人,人並不贈送你;所以你與別的婦女相反。」
35 Yango wana, yo mwasi ya ndumba, yoka Liloba na Yawe!
「你這妓女啊,要聽耶和華的話。
36 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola osakanelaki bomengo na yo mpe otandaki bolumbu na yo kati na kindumba na bamakangu na yo mpe na banzambe na yo nyonso ya bikeko, makambo na yo nyonso ya mbindo; mpe lokola obonzelaki banzambe wana ya bikeko makila ya bana na yo ya mibali,
主耶和華如此說:因你的污穢傾洩了,你與你所愛的行淫露出下體,又因你拜一切可憎的偶像,流兒女的血獻給他,
37 nazali kosangisa bamakangu na yo nyonso oyo ozalaki kosepela elongo na bango, ba-oyo nyonso ozalaki kolinga mpe ba-oyo nyonso ozalaki koyina; nakosangisa bango wuta na bangambo nyonso mpo ete batombokela yo, mpe nakotanda yo liboso na bango mpo ete bamona bolumbu na yo nyonso.
我就要將你一切相歡相愛的和你一切所恨的都聚集來,從四圍攻擊你;又將你的下體露出,使他們看盡了。
38 Nakopesa yo etumbu oyo ebongi na basi ya ndumba mpe na ba-oyo basopaka makila. Okofuta yango na motuya ya makila na yo, mpo na kanda mpe zuwa ya bolingo na Ngai oyo osambwisi.
我也要審判你,好像官長審判淫婦和流人血的婦女一樣。我因忿怒忌恨,使流血的罪歸到你身上。
39 Nakokaba yo na maboko ya bamakangu na yo, bakobuka mwa bandako na yo ya kindumba mpe bisika na yo ya bule; bakolongola yo na makasi bilamba mpe babiju ya kitoko mpe bakotika yo bolumbu.
我又要將你交在他們手中;他們必拆毀你的圓頂花樓,毀壞你的高臺,剝去你的衣服,奪取你的華美寶器,留下你赤身露體。
40 Nakotindela yo bato ebele mpo ete babamba yo mabanga mpe batobola yo na mipanga na bango.
他們也必帶多人來攻擊你,用石頭打死你,用刀劍刺透你,
41 Bakotumba bandako na yo mpe bakopesa yo etumbu na miso ya basi ebele. Nakosukisa kindumba na yo, mpe okofuta lisusu bamakangu na yo te.
用火焚燒你的房屋,在許多婦人眼前向你施行審判。我必使你不再行淫,也不再贈送與人。
42 Na bongo nde kanda na Ngai epai na yo mpe zuwa ya bolingo na Ngai oyo osambwisaki ekosila; nakovanda kimia mpe nakosilika lisusu te.
這樣,我就止息向你發的忿怒,我的忌恨也要離開你,我要安靜不再惱怒。
43 Lokola obosanaki mikolo ya bolenge na yo mpe opelisaki kanda na Ngai na nzela ya makambo nyonso ya boye, Ngai mpe nakofuta yo kolanda ndenge etamboli na yo ezali, elobi Nkolo Yawe; boye, okobakisa lisusu makambo mabe te na likolo ya makambo na yo ya mbindo.
因你不追念你幼年的日子,在這一切的事上向我發烈怒,所以我必照你所行的報應在你頭上,你就不再貪淫,行那一切可憎的事。這是主耶和華說的。」
44 Moto nyonso oyo alobaka na masese akoloba lisese oyo na tina na yo: ‘Mwana mwasi azalaka kaka ndenge mama na ye azali.’
「凡說俗語的必用俗語攻擊你,說:『母親怎樣,女兒也怎樣。』
45 Ozali solo mwana mwasi ya mama na yo, oyo asambwisaki mobali na ye mpe bana na ye ya mibali; ozali solo ndeko mwasi ya bandeko na yo ya basi oyo batiolaki mibali mpe bana na bango. Mama na bino azalaki moto ya mokili ya Iti, mpe tata na yo azalaki moto ya Amori.
你正是你母親的女兒,厭棄丈夫和兒女;你正是你姊妹的姊妹,厭棄丈夫和兒女。你母親是赫人,你父親是亞摩利人。
46 Kulutu na yo ya mwasi, ezali Samari oyo avandi na ngambo ya nor ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi; leki na yo ya mwasi ezali Sodome oyo avandi na ngambo ya sude ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi.
你的姊姊是撒馬利亞,她和她的眾女住在你左邊;你的妹妹是所多瑪,她和她的眾女住在你右邊。
47 Otambolaki kaka te na banzela na bango mpe olandaki kaka te bizaleli na bango ya mbindo, kasi okomaki mabe koleka bango, na etamboli na yo nyonso.
你沒有效法她們的行為,也沒有照她們可憎的事去做,你以那為小事,你一切所行的倒比她們更壞。
48 Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, Sodome, ndeko na yo ya mwasi, elongo na bana na ye ya basi batikala nanu kosala te makambo oyo yo elongo na bana na yo ya basi bosali.
主耶和華說:我指着我的永生起誓,你妹妹所多瑪與她的眾女尚未行你和你眾女所行的事。
49 Tala sik’oyo masumu ya Sodome, ndeko na yo ya mwasi: ye elongo na bana na ye ya basi bazalaki bato ya lolendo, mpo ete batondaki na bomengo mpe eloko moko te ezalaki kotungisa bango; basungaki ata moke te babola mpe bato bakelela.
看哪,你妹妹所多瑪的罪孽是這樣:她和她的眾女都心驕氣傲,糧食飽足,大享安逸,並沒有扶助困苦和窮乏人的手。
50 Bakomaki bato ya lofundu makasi mpe bakomaki kosala makambo ya mbindo na miso na Ngai. Yango wana, nalimwisi bango ndenge ozali komona.
她們狂傲,在我面前行可憎的事,我看見便將她們除掉。
51 Samari asalaki te ata kati-kati ya masumu oyo yo osalaki. Osalaki makambo ya mbindo koleka bango; mpe na nzela ya makambo na yo nyonso ya mbindo, osalaki ete bandeko na yo ya basi bamonana lokola bato ya sembo koleka.
撒馬利亞沒有犯你一半的罪,你行可憎的事比她更多,使你的姊妹因你所行一切可憎的事,倒顯為義。
52 Sik’oyo, yo oyo ozalaki kosambisa bandeko na yo ya basi, lata soni na yo! Lokola masumu na yo ezalaki kutu mabe koleka oyo ya bango, yango wana bazalaki komonana lokola bato ya sembo koleka. Yoka sik’oyo soni mpo ete osili kosambwa, omonisi bandeko na yo ya basi lokola bato ya sembo koleka!
你既斷定你姊妹為義,就要擔當自己的羞辱;因你所犯的罪比她們更為可憎,她們就比你更顯為義;你既使你的姊妹顯為義,你就要抱愧擔當自己的羞辱。」
53 Yango wana, nakozongisa lisusu bolamu ya Sodome mpe ya Samari, elongo na bingumba na yango; mpe yo, nakozongisa bolamu na yo kati na yango
「我必叫她們被擄的歸回,就是叫所多瑪和她的眾女,撒馬利亞和她的眾女,並你們中間被擄的,都要歸回,
54 mpo ete oyoka lisusu soni te mpe osambwa lisusu te likolo ya misala na yo mpe likolo ya makambo oyo ezalaki kobondisa bango.
好使你擔當自己的羞辱,並因你一切所行的使她們得安慰,你就抱愧。
55 Sodome mpe Samari elongo na bingumba na yango ekozonga ndenge ezalaki liboso; mpe yo elongo na bingumba na yo, nakozongisa bino ndenge bozalaki liboso.
你的妹妹所多瑪和她的眾女必歸回原位;撒馬利亞和她的眾女,你和你的眾女,也必歸回原位。
56 Na mokolo ya lolendo na yo, ozalaki kutu kolobela mabe ya Sodome, ndeko na yo,
在你驕傲的日子,你的惡行沒有顯露以先,你的口就不提你的妹妹所多瑪。那受了凌辱的亞蘭眾女和亞蘭四圍非利士的眾女都恨惡你,藐視你。
57 liboso ete mabe na yo eyebana. Kasi sik’oyo, bingumba ya Siri elongo na bingumba nyonso oyo ezali zingazinga na yango mpe bingumba ya bato ya Filisitia ekomi koseka yo.
58 Okomi sik’oyo komema mikumba ya makambo na yo ya mbindo mpe ya misala na yo ya mabe, elobi Yawe.
耶和華說:你貪淫和可憎的事,你已經擔當了。」
59 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakosalela yo kolanda misala na yo, pamba te otiolaki ndayi na Ngai na nzela ya kobuka boyokani na Ngai elongo na yo.
「主耶和華如此說:你這輕看誓言、背棄盟約的,我必照你所行的待你。
60 Kasi Ngai, nakokanisa lisusu boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na yo tango ozalaki nanu elenge, mpe nakosala lisusu mpo na yo, boyokani oyo ekozala na suka te.
然而我要追念在你幼年時與你所立的約,也要與你立定永約。
61 Boye, okokanisa etamboli na yo mpe okoyoka soni tango okoyamba bandeko na yo ya basi, ezala ba-oyo bazali mikolo na yo to ba-oyo bazali baleki na yo; nakopesa yo bango lokola bana na yo ya basi, kasi ekozala te kolanda boyokani na Ngai elongo na yo.
你接待你姊姊和你妹妹的時候,你要追念你所行的,自覺慚愧;並且我要將她們賜你為女兒,卻不是按着前約。
62 Ngai nakosala boyokani na Ngai elongo na yo; mpe na bongo, okososola solo ete Ngai, nazali Yawe,
我要堅定與你所立的約(你就知道我是耶和華),
63 mpo ete okanisa yango lisusu, oyokela yango soni mpe ofungola lisusu monoko na yo te mpo na soni, tango nakolimbisa masumu na yo mpo na mabe nyonso oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe. › »
好使你在我赦免你一切所行的時候,心裏追念,自覺抱愧,又因你的羞辱就不再開口。這是主耶和華說的。」

< Ezekieli 16 >