< Ezekieli 1 >

1 Ezalaki mokolo moko, mokolo ya mitano ya sanza ya minei, na mobu ya tuku misato, wana nazalaki pembeni ya ebale Kebari kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, likolo efungwamaki mpe namonaki bimoniseli ya Nzambe.
Now it came to pass in the thirtieth year, in the fourth month, on the fifth day of the month, that I was in the midst of the captivity by the river of Chobar; and the heavens were opened, and I saw visions of God.
2 Kaka na mokolo ya mitano ya sanza ya mobu wana, elingi koloba mobu ya mitano ya bowumbu ya mokonzi Yeoyakini,
On the fifth day of the month; this was the fifth year of the captivity of king Joakim.
3 Yawe alobaki na Ezekieli, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Buzi, pembeni ya ebale Kebari, kati na mokili ya bato ya Babiloni. Kuna, loboko na Yawe ezalaki likolo na ye.
And the word of the Lord came to Jezekiel the priest, the son of Buzi, in the land of the Chaldeans, by the river of Chobar; and the hand of the Lord was upon me.
4 Tango natalaki, namonaki mopepe moko ya makasi kowuta na ngambo ya nor; bongo mopepe yango ezalaki komema mapata minene nzela moko na mikalikali ya kongenga makasi, mpe kati na yango ezalaki kongenga lokola ebende kati na moto.
And I looked, and, behold, a sweeping wind came from the north, and a great cloud on it, and [there was] brightness round about it, and gleaming fire, and in the midst of it as it were the appearance of amber in the midst of the fire, and brightness in it.
5 Na kati-kati na yango, namonaki biloko moko lokola bikelamu minei ya bomoi oyo ezalaki na lolenge ya moto.
And in the midst as it were the likeness of four living creatures. And this was their appearance; the likeness of a man was upon them.
6 Moko na moko kati na yango ezalaki na bilongi minei mpe mapapu minei.
And each one [had] four faces, and each one [had] four wings.
7 Makolo na yango ezalaki esembolama, matambe na yango ezalaki lokola matambe ya mwana ngombe ya mobali mpe ezalaki kongenga lokola bronze oyo bapetola na moto.
And their legs were straight; and their feet were winged, and [there were] sparks, like gleaming brass, and their wings were light.
8 Na se ya mapapu na yango, na bangambo na yango minei, ezalaki na maboko minei lokola maboko ya bato; mpe bikelamu nyonso minei ya bomoi ezalaki na bilongi mpe na mapapu na yango.
And the hand of a man was under their wings on their four sides.
9 Mapapu na yango ezalaki kotutana moko na mosusu. Ekelamu moko na moko ezalaki kokende etala kaka na liboso mpe ezalaki kotala na sima te.
And the faces of them four turned not when they went; they went everyone straight forward.
10 Tala ndenge bilongi na yango ezalaki: ekelamu moko na moko kati na nyonso minei ezalaki na elongi lokola ya moto (na liboso): elongi lokola ya nkosi na ngambo ya loboko ya mobali, elongi lokola ya ngombe ya mobali na ngambo ya loboko ya mwasi mpe elongi lokola ya mpongo (na sima).
And the likeness of their faces was the face of a man, and the face of a lion on the right of the four; and the face of a calf on the left of the four; and the face of an eagle to the four.
11 Bilongi na yango ezalaki nde bongo. Mapapu na yango ezalaki efungwama na likolo; ekelamu moko na moko ezalaki na mapapu mibale: lipapu moko ezalaki kotutana na lipapu moko ya ekelamu mosusu; mpe mapapu mibale ezalaki kobomba nzoto na yango.
And the four had their wings spread out above; each one [had] two joined to one another, and two covered their bodies.
12 Moko na moko ezalaki kokende kaka liboso; ezalaki kokende bisika nyonso oyo Molimo azalaki kokamba yango mpe ezalaki kokende epai mosusu te.
And each one went straight forward: wherever the spirit was going they went, and turned not back.
13 Bikelamu yango ya bomoi ezalaki lokola makala ya moto to lokola koni oyo ezali kopela moto. Moto ezalaki kotambola-tambola kati na bikelamu yango, ezalaki kongenga mpe mikalikali ezalaki kobima kati na yango.
And in the midst of the living creatures [there was] an appearance as of burning coals of fire, as an appearance of lamps turning among the living creatures; and the brightness of fire, and out of the fire came forth lightning.
14 Bikelamu yango ezalaki kokende mpe kozonga lokola mikalikali.
15 Tango nazalaki kotala bikelamu yango, namonaki pine moko na mabele, pembeni ya ekelamu ya bomoi moko na moko, liboso ya bilongi na yango minei.
And I looked, and, behold, the four [had each] one wheel on the ground near the living creatures.
16 Tala ndenge bapine yango ezalaki mpe ndenge basala yango: ezalaki kongenga lokola libanga ya Krizolite mpe nyonso minei ezalaki ekokana; bongo na ndenge basala yango, ezalaki lokola moko kati na mosusu.
And the appearance of the wheels was as the appearance of beryl: and the four had one likeness: and their work was as it were a wheel in a wheel.
17 Tango ekelamu moko na moko ezalaki kotambola, ezalaki kokende na ngambo oyo moko ya bilongi na yango ekotala, kati na bangambo na yango minei; ezalaki kobaluka na ngambo mosusu te mpe bapine na yango ezalaki kotengama te soki bikelamu yango ezali kotambola.
They went on their four sides: they turned not as they went;
18 Bajante ya bapine na yango ezalaki minene mpe somo: nyonso minei ezalaki etonda na miso zingazinga na yango.
neither did their backs [turn]: and they were high: and I beheld them, and the backs of them four were full of eyes round about.
19 Tango bikelamu ya bomoi ezalaki kotambola, bapine mpe ezalaki kotambola pembeni na yango; kasi soki epumbwe longwa na se, bapine mpe ezalaki kopumbwa.
And when the living creatures went, the wheels went by them: and when the living creatures lifted themselves off the earth, the wheels were lifted off.
20 Esika nyonso Molimo azalaki kokende, bikelamu yango mpe ezalaki kokende; bongo bapine mpe ezalaki komata elongo na yango, pamba te molimo ya bikelamu ya bomoi ezalaki kati na bapine.
Wherever the cloud happened to be, there was the spirit ready to go: the wheels went and were lifted up with them; because the spirit of life was in the wheels.
21 Tango bikelamu yango ezalaki kotambola, yango mpe ezalaki kotambola; soki etelemi, yango mpe ezalaki kotelema; soki epumbwe, yango mpe ezalaki kopumbwa elongo na bikelamu yango, pamba te molimo ya bikelamu ya bomoi ezalaki kati na bapine.
When those went, [the wheels] went; and when those stood, [the wheels] stood; and when those lifted themselves off the earth, they were lifted off with them: for the spirit of life was in the wheels.
22 Likolo ya mito ya bikelamu yango ya bomoi ezalaki na eloko moko lokola mapata ya likolo, oyo ezalaki kongenga makasi lokola libanga ya talo oyo ya krisitali.
And the likeness over the heads of the living creatures was as a firmament, as the appearance of crystal, spread out over their wings above.
23 Na se ya mapata yango, mapapu na yango ezalaki esembolama mpe etutana na mapapu ya baninga na yango; mpe moko na moko kati na bikelamu yango ezalaki na mapapu mibale oyo ezalaki kobomba nzoto na yango.
And their wings were spread out under the firmament, reaching one to the other; two [wings] to each, covering their bodies.
24 Tango bikelamu yango ezalaki kotambola, nazalaki koyoka makelele ya mapapu na yango lokola makelele ya bambonge ya ebale monene to lokola mongongo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso to lokola lokito ya mampinga. Tango ezalaki kotelema, ezalaki kokitisa mapapu na yango.
And I heard the sound of their wings when they went, as the sound of much water: and when they stood, their wings were let down.
25 Na likolo ya mito na yango, mongongo moko ezalaki koyokana wuta na likolo ya mapata oyo ezalaki; tango ezalaki kotelema, ezalaki mpe kokitisa mapapu na yango.
And lo! a voice from above the firmament
26 Boye, na likolo ya mapata oyo ezalaki na likolo ya mito na yango, ezalaki na eloko moko lokola libanga ya talo ya langi ya bule mpe lokola kiti ya bokonzi basala na safiri; mpe na likolo ya kiti ya bokonzi yango, ezalaki na elilingi moko oyo ezalaki lokola moto.
that was over their head, [there was] as the appearance of a sapphire stone, [and] the likeness of a throne upon it: and upon the likeness of the throne was the likeness as an appearance of a man above.
27 Namonaki lisusu ete likolo ya loketo na yango ezalaki kongenga lokola linzanza, zingazinga na yango ezalaki lokola moto, se ya loketo na yango ezalaki lokola moto; mpe mikalikali ya makasi ezingelaki yango.
And I saw as it were the resemblance of amber from the appearance of the loins and upwards, and from the appearance of the loins and under I saw an appearance of fire, and the brightness thereof round about.
28 Kongenga oyo ezingelaki yango ezalaki lokola monama na mapata na mokolo ya mvula; elilingi yango ezalaki lokola nkembo na Yawe. Tango namonaki yango, nakweyaki, elongi na ngai kino na mabele, mpe nayokaki mongongo ya moto moko koloba na ngai.
As the appearance of the bow when it is in the cloud in days of rain, so was the form of brightness round about.

< Ezekieli 1 >