< Kobima 38 >

1 Betisaleyeli asalaki na mabaya ya nzete ya akasia etumbelo ya bambeka ya kotumba; ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse, bametele mibale na basantimetele tuku mitano; bongo bosanda na yango ezalaki ya metele moko na basantimetele tuku mitano.
他用皂莢木做燔祭壇,是四方的,長五肘,寬五肘,高三肘,
2 Asalaki maseke minei na basonge nyonso minei ya etumbelo, mpo ete maseke mpe etumbelo esala eloko moko; mpe abambaki bronze na etumbelo.
在壇的四拐角上做四個角,與壇接連一塊,用銅把壇包裹。
3 Asalaki na bronze banzungu ya mike mpo na kolongola putulu ya moto, bapawu, basani ya minene, bakanya mpe basani mpo na komema makala ya moto.
他做壇上的盆、鏟子、盤子、肉鍤子、火鼎;這一切器具都是用銅做的。
4 Asalaki motalaka ya bronze mpo na etumbelo; akangisaki bapete minei ya bronze na basonge nyonso minei ya motalaka.
又為壇做一個銅網,安在壇四面的圍腰板以下,從下達到壇的半腰。
5 Asalaki na bronze bapete minei oyo atiaki na basonge nyonso minei ya motalaka mpo na koyamba mabaya.
為銅網的四角鑄四個環子,作為穿槓的用處。
6 Asalaki na nzete ya akasia, mabaya mpo na etumbelo mpe abambaki yango bronze.
用皂莢木做槓,用銅包裹,
7 Boye, mpo na komema etumbelo, bakotisaki mabaya yango na bapete oyo ezali na basonge mibale ya etumbelo. Bongo etumbelo yango ezalaki polele kati na yango.
把槓穿在壇兩旁的環子內,用以抬壇,並用板做壇;壇是空的。
8 Asalaki lisusu na bronze ya bitalatala ya basi oyo bazalaki kosangana na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani: sani monene mpo na komipetola mpe evandelo na yango.
他用銅做洗濯盆和盆座,是用會幕門前伺候的婦人之鏡子做的。
9 Tala ndenge atongaki lopango ya Mongombo: ngambo ya sude oyo ezalaki ya bametele pene tuku mitano na molayi, ezipamaki na rido ya lino oyo basali bilamba basalaki.
他做帳幕的院子。院子的南面用撚的細麻做帷子,寬一百肘。
10 Makonzi na yango tuku mibale mpe bivandelo tuku mibale esalemaki na bronze; bongo bibende ya makonzi elongo na biloko na yango ya kosimbela ezalaki ya palata.
帷子的柱子二十根,帶卯的銅座二十個;柱子上的鉤子和杆子都是用銀子做的。
11 Ngambo ya nor ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi, na makonzi tuku mibale mpe na makolo tuku mibale, oyo esalema na bronze. Makonzi yango ezalaki na bibende ya palata egumbama lokola ndobo elongo na biloko na yango ya kosimbela, oyo ezalaki ya palata.
北面也有帷子,寬一百肘。帷子的柱子二十根,帶卯的銅座二十個;柱子上的鉤子和杆子都是用銀子做的。
12 Ngambo ya weste ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe barido elongo na makonzi zomi, makolo zomi, bibende ya palata egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela.
院子的西面有帷子,寬五十肘。帷子的柱子十根,帶卯的座十個;柱子的鉤子和杆子都是用銀子做的。
13 Ngambo ya este ya lopango ya Mongombo, epai wapi moyi ebimelaka, ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse.
院子的東面,寬五十肘。
14 Ngambo moko ya ekuke ezalaki na barido ya bametele pene sambo na basantimetele tuku mitano, elongo na makonzi misato mpe makolo misato.
門這邊的帷子十五肘,那邊也是一樣。帷子的柱子三根,帶卯的座三個。在門的左右各有帷子十五肘,帷子的柱子三根,帶卯的座三個。
15 Ngambo mosusu ya ekuke ezalaki mpe na barido ya bametele pene sambo na basantimetele tuku mitano, elongo na makonzi misato mpe makolo misato.
16 Barido nyonso zingazinga ya lopango ezalaki ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango.
院子四面的帷子都是用撚的細麻做的。
17 Makolo ya makonzi ezalaki ya bronze; bibende egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela ezalaki ya palata, mpe balatisaki basonge na yango palata. Makonzi nyonso ya lopango ezalaki na biloko ya palata ya kosimbela.
柱子帶卯的座是銅的,柱子上的鉤子和杆子是銀的,柱頂是用銀子包的。院子一切的柱子都是用銀杆連絡的。
18 Rido ya ekuke ya lopango ezalaki ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango; ezalaki mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba. Molayi na yango ezalaki na bametele pene zomi, mpe bosanda na yango, bametele pene mibale na basantimetele pene tuku mitano, ndenge barido nyonso ya lopango ezalaki.
院子的門簾是以繡花的手工,用藍色、紫色、朱紅色線,和撚的細麻織的,寬二十肘,高五肘,與院子的帷子相配。
19 Ezalaki mpe na makonzi minei mpe bivandelo minei ya bronze. Bibende na yango oyo egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela rido ezalaki ya palata, mpe balatisaki basonge na yango palata.
帷子的柱子四根,帶卯的銅座四個;柱子上的鉤子和杆子是銀的;柱頂是用銀子包的。
20 Bapike nyonso ya Mongombo mpe ya lopango ezalaki ya bronze.
帳幕一切的橛子和院子四圍的橛子都是銅的。
21 Tala motuya ya biloko oyo basalelaki Mongombo oyo, kati na yango, ezalaki na buku ya Boyokani, ndenge kaka Moyize atindaki. Balevi batongaki yango na bokambami ya Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron.
這是法櫃的帳幕中利未人所用物件的總數,是照摩西的吩咐,經祭司亞倫的兒子以他瑪的手數點的。
22 Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, ya libota ya Yuda, asalaki nyonso oyo Yawe atindaki Moyize.
凡耶和華所吩咐摩西的都是猶大支派戶珥的孫子、烏利的兒子比撒列做的。
23 Asungamaki na Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani, mosali mpe motongi bililingi na maboko, oyo azalaki kobimisa makanisi mpe kotonga bililingi na bilamba ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko.
與他同工的有但支派中亞希撒抹的兒子亞何利亞伯;他是雕刻匠,又是巧匠,又能用藍色、紫色、朱紅色線,和細麻繡花。
24 Wolo nyonso oyo basalelaki mpo na kotonga mpe mpo na misala nyonso ya Mongombo, wolo oyo babonzelaki Yawe, ezalaki bakilo nkoto moko mpe bagrame nkama moko na tuku mibale, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo. Wolo nyonso wana ewutaki na makabo ya kotombola.
為聖所一切工作使用所獻的金子,按聖所的平,有二十九他連得並七百三十舍客勒。
25 Palata oyo bazwaki na maboko ya bato oyo batangamaki na lisanga, ezalaki bakilo nkoto misato mpe bagrame nkama minei na tuku minei, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo.
會中被數的人所出的銀子,按聖所的平,有一百他連得並一千七百七十五舍客勒。
26 Elingi koloba ete moto nyonso oyo batangaki amemaki bagrame mitano na badesigrame sambo, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo. Bato nyonso oyo batangamaki, oyo bazalaki na mibu ya mbotama tuku mibale mpe koleka, bazalaki nkoto nkama motoba na misato na nkama mitano na tuku mitano.
凡過去歸那些被數之人的,從二十歲以外,有六十萬零三千五百五十人。按聖所的平,每人出銀半舍客勒,就是一比加。
27 Basalelaki bakilo ya palata nkoto misato na nkama minei na tuku mibale mpo na kosala bivandelo nkama moko ya Mongombo mpe barido nkama moko: elingi koloba ete basalelaki bakilo pene tuku misato na minei mpe bagrame pene nkama mibale mpo na evandelo moko.
用那一百他連得銀子鑄造聖所帶卯的座和幔子柱子帶卯的座;一百他連得共一百帶卯的座,每帶卯的座用一他連得。
28 Shekeli nkoto moko na nkama sambo na tuku sambo na mitano oyo etikalaki, basalelaki yango bibende oyo egumbama lokola ndobo, biloko ya kosimbela rido mpe balatiselaki yango basonge ya makonzi.
用那一千七百七十五舍客勒銀子做柱子上的鉤子,包裹柱頂並柱子上的杆子。
29 Bronze oyo ewutaki na makabo ya kotombola ezalaki bakilo pene nkoto mibale na nkama minei na tuku mibale na moko.
所獻的銅有七十他連得並二千四百舍客勒。
30 Bazwaki yango mpo na kosala bivandelo ya ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani, etumbelo ya bronze elongo na motalaka na yango mpe bisalelo na yango nyonso.
用這銅做會幕門帶卯的座和銅壇,並壇上的銅網和壇的一切器具,
31 Basalelaki yango lisusu bivandelo nyonso oyo ezalaki pembeni-pembeni ya lopango ya Mongombo, bivandelo ya ekotelo na yango, bapike nyonso ya Mongombo mpe bapike oyo ezingelaki lopango.
並院子四圍帶卯的座和院門帶卯的座,與帳幕一切的橛子和院子四圍所有的橛子。

< Kobima 38 >