< Kobima 34 >

1 Yawe alobaki na Moyize: — Bongisa bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso; nakokoma na bitando yango maloba oyo ezalaki na likolo ya bitando ya liboso oyo obukaki.
耶和華吩咐摩西說:「你要鑿出兩塊石版,和先前你摔碎的那版一樣;其上的字我要寫在這版上。
2 Omilengela mpo na lobi na tongo. Na tongo-tongo, okomata na ngomba Sinai mpe okotelema liboso na Ngai, kuna na songe ya ngomba.
明日早晨,你要預備好了,上西奈山,在山頂上站在我面前。
3 Moto moko te asengeli komata elongo na yo; na ngomba mobimba, moto moko te amonana; bameme, bantaba to bangombe esengeli mpe te kolia na ebandeli ya ngomba.
誰也不可和你一同上去,遍山都不可有人,在山根也不可叫羊群牛群吃草。」
4 Moyize abongisaki bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso. Bongo na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, amataki ngomba Sinai ndenge kaka Yawe atindaki ye; amemaki bitando mibale ya mabanga, na maboko na ye.
摩西就鑿出兩塊石版,和先前的一樣。清晨起來,照耶和華所吩咐的上西奈山去,手裏拿着兩塊石版。
5 Yawe akitaki kati na lipata, atelemaki wana pene na ye, mpe Moyize abelelaki Kombo ya Yawe.
耶和華在雲中降臨,和摩西一同站在那裏,宣告耶和華的名。
6 Yawe alekaki liboso ya Moyize, mpe Moyize atatolaki: — Yawe, Yawe, Nzambe na mawa mpe na ngolu, Nzambe oyo asilikaka noki te, atondi na bolingo mpe na boboto,
耶和華在他面前宣告說:「耶和華,耶和華,是有憐憫有恩典的上帝,不輕易發怒,並有豐盛的慈愛和誠實,
7 atalisaka bolingo na Ye kino na milongo nkoto, alimbisaka mabe, botomboki mpe masumu, kasi azangaka te kopesa etumbu na moto oyo asali mabe, Nzambe oyo apesaka bakitani etumbu mpo na mabe ya batata na bango kino na molongo ya misato mpe ya minei!
為千萬人存留慈愛,赦免罪孽、過犯,和罪惡,萬不以有罪的為無罪,必追討他的罪,自父及子,直到三、四代。」
8 Mbala moko, Moyize afukamaki mpe agumbamelaki Yawe;
摩西急忙伏地下拜,
9 alobaki: — Eh Nkolo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, nabondeli Yo: tambola kati na biso. Atako bato oyo bazali batomboki, kasi limbisa mabe mpe masumu na biso, mpe zwa biso lokola bato na Yo!
說:「主啊,我若在你眼前蒙恩,求你在我們中間同行,因為這是硬着頸項的百姓。又求你赦免我們的罪孽和罪惡,以我們為你的產業。」
10 Yawe azongisaki: — Nalingi kosala boyokani elongo na bino. Liboso ya bato na yo nyonso, nakosala makambo ya kokamwa oyo etikala nanu kosalema te na mokili mobimba to na ekolo moko. Boye bato nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakomona misala ya somo oyo Ngai Yawe nakosala na nzela na yo.
耶和華說:「我要立約,要在百姓面前行奇妙的事,是在遍地萬國中所未曾行的。在你四圍的外邦人就要看見耶和華的作為,因我向你所行的是可畏懼的事。
11 Botosa makambo oyo nazali kotinda bino lelo. Nakobengana liboso na bino: bato ya Amori, ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.
「我今天所吩咐你的,你要謹守。我要從你面前攆出亞摩利人、迦南人、赫人、比利洗人、希未人、耶布斯人。
12 Bokeba! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili oyo bozali kokende, noki te bakokoma motambo kati na bino!
你要謹慎,不可與你所去那地的居民立約,恐怕成為你們中間的網羅;
13 Bokweyisa bitumbelo na bango, bopanza bikeko na bango mpe bobuka makonzi oyo bapika mpo na nzambe mwasi Ashera.
卻要拆毀他們的祭壇,打碎他們的柱像,砍下他們的木偶。
14 Bogumbamela nzambe mosusu te, pamba te Yawe andimaka bombanda te; Kombo na Ye ezali Nzambe ya zuwa.
不可敬拜別神;因為耶和華是忌邪的上帝,名為忌邪者。
15 Bokeba! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili yango; noki te tango bakosambela banzambe na bango mpe bakobonzela yango mbeka, babenga bino mpo ete bolia mbeka na bango elongo;
只怕你與那地的居民立約,百姓隨從他們的神,就行邪淫,祭祀他們的神,有人叫你,你便吃他的祭物,
16 mpe soki bozwi na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali, wana bana na bango ya basi bakokoba kosambela banzambe na bango ya bikeko, bakotindika bana na bino ya mibali na kosambela banzambe na bango.
又為你的兒子娶他們的女兒為妻,他們的女兒隨從她們的神,就行邪淫,使你的兒子也隨從她們的神行邪淫。
17 Bokosala nzambe ya ekeko te.
「不可為自己鑄造神像。
18 Bokosala feti ya Mapa ezanga levire. Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire ndenge natindaki yo. Bokosala yango na tango ekatama, na sanza ya Abibi, pamba te ezali na sanza yango nde bobimaki na Ejipito.
「你要守除酵節,照我所吩咐你的,在亞筆月內所定的日期吃無酵餅七天,因為你是這亞筆月內出了埃及。
19 Mwana mobali nyonso ya liboso azali ya Ngai; ekozala mpe bongo mpo na mwana mobali nyonso ya liboso kati na bibwele na bino: ezala mwana ngombe, mwana ntaba to mwana meme.
凡頭生的都是我的;一切牲畜頭生的,無論是牛是羊,公的都是我的。
20 Nzokande, mpo na mwana liboso ya ane, bokosikola yango na mwana meme. Soki bosikoli yango te, bokobuka yango kingo. Bokosikola bana na bino nyonso ya liboso ya mibali. Moto moko te akoya kotelema liboso na Ngai maboko pamba.
頭生的驢要用羊羔代贖,若不代贖就要打折牠的頸項。凡頭生的兒子都要贖出來。誰也不可空手朝見我。
21 Bokosala mosala mikolo motoba, kasi na mokolo ya sambo, bosengeli kopema: ezala na tango ya kolona to na tango ya kobuka.
「你六日要做工,第七日要安息,雖在耕種收割的時候也要安息。
22 Bokosala feti ya Baposo mpo na kosepela na tina na bambuma ya liboso ya ble oyo ekomeli, mpe feti ya kobuka bambuma na suka ya mobu.
在收割初熟麥子的時候要守七七節;又在年底要守收藏節。
23 Mbala misato na mobu, mibali nyonso basengeli koya liboso ya Nkolo Yawe, Nzambe ya Isalaele.
你們一切男丁要一年三次朝見主耶和華-以色列的上帝。
24 Mpo na bolamu na yo, nakobengana bikolo liboso na yo mpe nakoyeisa mokili na yo monene. Moto moko te akoluka kobotola mokili na yo tango okobanda komata mbala misato na mobu, mpo na kokutana na Yawe, Nzambe na yo.
我要從你面前趕出外邦人,擴張你的境界。你一年三次上去朝見耶和華-你上帝的時候,必沒有人貪慕你的地土。
25 Okobonzela Ngai te makila ya nyama elongo na mapa batia levire; okobomba te kino lobi na tongo mbeka oyo babonzi mpo na Pasika.
「你不可將我祭物的血和有酵的餅一同獻上。逾越節的祭物也不可留到早晨。
26 Okomema na Ndako ya Yawe, Nzambe na yo, bambuma ya liboso ya mabele na yo. Okolamba te mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele ya mama na yango.
地裏首先初熟之物要送到耶和華-你上帝的殿。不可用山羊羔母的奶煮山羊羔。」
27 Yawe alobaki lisusu na Moyize: — Koma maloba oyo, pamba te ezali na nzela na yango nde nasalaki boyokani elongo na yo mpe Isalaele.
耶和華吩咐摩西說:「你要將這些話寫上,因為我是按這話與你和以色列人立約。」
28 Moyize asalaki kuna elongo na Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei; aliaki ata eloko moko te mpe amelaki mayi te. Bongo Moyize akomaki na bitando ya mabanga maloba ya Boyokani oyo babengi mibeko zomi.
摩西在耶和華那裏四十晝夜,也不吃飯也不喝水。耶和華將這約的話,就是十條誡,寫在兩塊版上。
29 Nzokande, tango Moyize akitaki wuta na ngomba Sinai, na bitando ya mabanga mibale ya mibeko na maboko na ye, ayebaki te ete elongi na ye ezalaki kongenga, mpo ete asololaki na Yawe.
摩西手裏拿着兩塊法版下西奈山的時候,不知道自己的面皮因耶和華和他說話就發了光。
30 Tango Aron mpe bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete elongi ya Moyize ezali kongenga, babangaki kopusana pembeni na ye.
亞倫和以色列眾人看見摩西的面皮發光就怕挨近他。
31 Moyize abengaki bango; bongo Aron mpe bakambi nyonso ya lisanga ya Isalaele bapusanaki pembeni ya Moyize, mpe ye Moyize asololaki na bango.
摩西叫他們來;於是亞倫和會眾的官長都到他那裏去,摩西就與他們說話。
32 Sima na yango, bana nyonso ya Isalaele bapusanaki pembeni ya Moyize mpe ayebisaki bango mibeko nyonso oyo Yawe apesaki ye na ngomba Sinai.
隨後以色列眾人都近前來,他就把耶和華在西奈山與他所說的一切話都吩咐他們。
33 Tango Moyize asilisaki kosolola na bango, azipaki elongi na ye na vwale.
摩西與他們說完了話就用帕子蒙上臉。
34 Kasi tango nyonso Moyize azalaki kokota liboso ya Yawe mpo na kosolola na Ye, azalaki kolongola vwale kino tango akobima. Mpe soki abimi, azalaki koyebisa na bana ya Isalaele mibeko nyonso oyo azalaki kozwa epai na Yawe.
但摩西進到耶和華面前與他說話就揭去帕子,及至出來的時候便將耶和華所吩咐的告訴以色列人。
35 Mpe bana ya Isalaele bazalaki komona elongi ya Moyize kongenga. Bongo azalaki kozongisa vwale na elongi na ye kino tango azalaki kozonga mpo na kosolola na Yawe.
以色列人看見摩西的面皮發光。摩西又用帕子蒙上臉,等到他進去與耶和華說話就揭去帕子。

< Kobima 34 >