< Ester 9 >

1 Mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari, mokolo oyo mobeko ya mokonzi esengelaki kokokisama, ekokaki. Ezalaki mokolo oyo banguna ya Bayuda bakanisaki ete bakokonza Bayuda; nzokande makambo ebongwanaki mpe Bayuda bakomaki kokonza bato oyo bazalaki koyina bango.
Now in the twelfth month, which is the month of Adar, on the thirteenth day, when the king's law and decree were about to be carried out, on the day when the enemies of the Jews hoped to gain power over them, it was reversed. The Jews gained power over those who hated them.
2 Kati na bingumba na bango, kati na bituka nyonso ya mokonzi Kizerisesi, Bayuda basanganaki mpo na kobundisa bato nyonso oyo bolukaki kobebisama na bango. Ekolo moko te ezalaki na makoki ya kotelemela bango, pamba te bato ya bikolo nyonso mosusu oyo bazalaki elongo na bango kati na mboka bazalaki na somo na bango.
The Jews assembled in their cities throughout all the provinces of King Ahasuerus, to lay hands on those who tried to bring disaster on them. No one could stand against them, for the fear of them had fallen on all the peoples.
3 Bakalaka nyonso ya bituka, bayangeli ya bituka oyo mokonzi atiaki, bayangeli mpe bakalaka ya mokonzi basungaki Bayuda, pamba te bazalaki na somo monene ya Maridoshe.
All the officials of the provinces, the provincial governors, the governors, and the king's administrators, helped the Jews because the fear of Mordecai had fallen on them.
4 Maridoshe akomaki moto monene kati na ndako ya mokonzi: lokumu na ye epanzanaki kati na bituka nyonso, pamba te nguya na ye ezalaki komata se komata, mokolo na mokolo.
For Mordecai was great in the king's house, and his fame spread throughout all the provinces, for the man Mordecai was becoming great.
5 Bayuda babebisaki banguna na bango nyonso na mopanga, babomaki bango mpe babebisaki bango; basalaki bato oyo bazalaki koyina bango makambo nyonso oyo basepelaki kosala.
The Jews attacked their enemies with the sword, killing and destroying them, and did as they pleased to those who hated them.
6 Kaka na engumba Size, Bayuda babomaki mpe babebisaki bato nkama mitano.
In the fortress of Susa itself the Jews killed and destroyed five hundred men.
7 Babomaki mpe lisusu Parishandata, Dalifoni, Asipata;
They killed Parshandatha, Dalphon, Aspatha,
8 Porata, Adalia mpe Aridata;
Poratha, Adalia, Aridatha,
9 Parimashita, Arizayi, Aridayi mpe Vayezata;
Parmashta, Arisai, Aridai, Vaizatha,
10 bana mibali zomi ya Amani, mwana mobali ya Amedata, monguna na Bayuda, kasi batikalaki te kozwa bomengo ya bitumba.
and the ten sons of Haman son of Hammedatha, the enemy of the Jews. But they did not take any plunder.
11 Kaka na mokolo wana, bayebisaki mokonzi motango ya bato oyo babomaki kati na engumba Size.
That day the number of those killed in the fortress of Susa, was reported to the king.
12 Mokonzi alobaki na Ester, mwasi ya mokonzi: — Kati na engumba Size, Bayuda babomi mpe babebisi bato nkama mitano elongo na bana mibali zomi ya Amani. Basali nini kati na bituka mosusu ya mokonzi? Sik’oyo, posa na yo ezali nini? Bosenga na yo ezali nini? Ekopesamela yo.
The king said to Queen Esther, “The Jews have killed five hundred men in the fortress of Susa, including the ten sons of Haman. What then have they done in the rest of the king's provinces? Now what is your petition? It will be granted you. What is your request? It will be granted to you.”
13 Ester azongisaki: — Soki mokonzi asepeli, tika ete Bayuda oyo bazali kati na engumba Size bazwa lisusu ndingisa ya kokokisa lobi, mobeko ya mokonzi ndenge esalemi lelo mpe badiembika na nzete, bana mibali zomi ya Amani.
Esther said, “If it pleases the king, let the Jews who are in Susa be permitted to carry out this day's decree tomorrow also, and let the bodies of Haman's ten sons be hanged on gallows.”
14 Mokonzi apesaki ndingisa ete esalema bongo. Bapanzaki sango ya mobeko yango na engumba Size mpe badiembikaki bana mibali zomi ya Amani.
So the king commanded that this be done. A decree was issued in Susa, and they hanged the ten sons of Haman.
15 Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na engumba Size basanganaki na mokolo ya zomi na minei, ya sanza ya Adari, mpe bobomaki bato nkama misato; kasi batikalaki kozwa bomengo ya bitumba te.
The Jews who were in Susa came together on the fourteenth day of the month of Adar, and killed three hundred more men in Susa, but laid no hands on the plunder.
16 Bayuda mosusu oyo bazalaki kovanda kati na bituka ya mokonzi, bango mpe basanganaki mpo na komibatela mpe bazwaki bopemi liboso ya banguna na bango.
The rest of the Jews who were in the king's provinces came together to defend their lives, and they got relief from their enemies and killed seventy-five thousand of those who hated them, but they did not lay their hands on the valuables of those they killed.
17 Na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya Adari, babomaki bato nkoto tuku sambo na mitano kati na banguna na bango, kasi batikalaki kozwa bomengo ya bitumba te. Bongo na mokolo ya zomi na minei, bapemaki mpe bakomisaki yango mokolo ya feti mpe ya esengo.
This happened on the thirteenth day of the month of Adar. On the fourteenth day they rested and made that a day of feasting and gladness.
18 Nzokande, Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na engumba Size basanganaki na mokolo ya zomi na misato mpe ya zomi na minei; bongo na mokolo ya zomi na mitano, bapemaki mpe bakomisaki yango mokolo ya feti mpe ya esengo.
But the Jews who were in Susa assembled together on the thirteenth and the fourteenth days. On the fifteenth day they rested and made it a day of feasting and gladness.
19 Yango wana Bayuda oyo bavandaka na bingumba ezanga bamir bakomisa mokolo ya zomi na minei ya sanza ya Adari, mokolo ya esengo mpe ya feti, mokolo oyo bakabelanaka bakado kati na bango.
That is why the Jews of the villages, who make their homes in the rural towns, observe the fourteenth day of the month of Adar as a day of gladness and feasting, and as a day on which they send gifts of food to one another.
20 Maridoshe akomaki makambo oyo nyonso mpe atindaki mikanda epai ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kati na bituka ya mokonzi Kizerisesi, epai ya ba-oyo bazalaki pene mpe epai ya ba-oyo bazalaki mosika
Mordecai recorded these things and sent letters to all the Jews who were in all the provinces of King Ahasuerus, both near and far,
21 ete basalaka feti na mibu nyonso, na mokolo ya zomi na minei mpe ya zomi na mitano ya sanza ya Adari,
obligating them to keep the fourteenth and the fifteenth day of Adar every year.
22 mpo ete ezali na mikolo oyo nde Bayuda bazwaki bopemi liboso ya banguna na bango, na sanza oyo nde mawa na bango ebongwanaki esengo mpe kolela na bango ekomaki feti. Akomelaki bango mpo ete bakomisa mikolo oyo, mikolo ya feti mpe ya esengo; mikolo ya kopesana bango na bango bakado ya biloko ya kolia mpe ya kopesa bakado epai ya babola.
These were the days when the Jews got relief from their enemies, and the month when their sorrow turned to joy, and mourning into a day of celebration. They were to make them days of feasting and gladness, and of sending gifts of food to one another, and gifts to the poor.
23 Bayuda bandimaki kokoba kosala feti oyo mpe bakomaki kosala makambo oyo Maridoshe akomelaki bango.
So the Jews continued the celebration they had begun, doing what Mordecai had written to them.
24 Pamba te Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi, monguna ya Bayuda nyonso, asalelaki Bayuda likita mpo na kobebisa bango; abetaki Puri, oyo ezali « zeke, » mpo na kufa mpe libebi na bango.
At that time Haman son of Hammedatha the Agagite, the enemy of all the Jews, had plotted against the Jews to destroy them, and he threw Pur (that is, he threw lots), to crush and destroy them.
25 Kasi tango mokonzi ayokaki sango ya likita ya Amani, akomaki mobeko kati na mokanda mpo ete makanisi mabe oyo Amani abongisaki mpo na Bayuda ekweya na moto na ye moko mpe, lisusu, badiembika ye elongo na bana na ye ya mibali, na nzete.
But when the matter came before the king, he gave orders by letters that the wicked plan Haman developed against the Jews should come back on his own head, and that he and his sons should be hanged on the gallows.
26 Yango wana babengaka mokolo yango Purimi (ewuti na kombo Puri oyo elakisi zeke). Mpo na makambo nyonso oyo Maridoshe akomaki na mokanda, mpo na makambo nyonso oyo bamonaki mpe makambo nyonso oyo ekomelaki bango,
Therefore they called these days Purim, after the name of Pur. Because of everything that was written in this letter, and everything that they had seen and that had happened to them,
27 Bayuda bakataki mpe bandimaki ete yango ekoma ezaleli mpo na bango, ezaleli ya bakitani na bango mpe ya bato nyonso oyo bakosangana na bango, mpo ete batosaka kosala feti ya mikolo oyo mibale, na mibu nyonso, ndenge ekatama na tango na yango.
the Jews accepted a new custom and duty. This custom would be for themselves, their descendants, and everyone who joined them. It would be that they would celebrate these two days every year. They would celebrate them in a certain way and at the same time each year.
28 Milongo nyonso mpe mabota nyonso ekosala feti na mikolo oyo kati na bituka nyonso mpe bingumba nyonso. Bayuda bakoki kotika te kosala feti na mikolo ya Purimi, mpe ekaniseli na yango ekoki kolimwa te kati na bakitani na bango.
These days were to be celebrated and observed in every generation, every family, every province, and every city. These Jews and their descendants would never cease to faithfully observe these days of Purim, so that they should never forget them.
29 Boye, Ester, mwasi ya mokonzi, mwana mwasi ya Abiyaili, elongo na Moyuda Maridoshe, basalelaki bokonzi na bango mpe bakomaki mokanda mosusu mpo na kolendisa makambo oyo etali Purimi.
Queen Esther daughter of Abihail and Mordecai the Jew wrote with full authority and confirmed this second letter about Purim.
30 Maridoshe atindaki mikanda epai ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kovanda kati na bituka nyonso nkama moko na tuku mibale na sambo ya mokili ya Kizerisesi, mpe mikanda yango ezalaki na maloba ya kimia mpe ya elikya
Letters were sent to all the Jews in the 127 provinces of the kingdom of Ahasuerus, wishing the Jews safety and truth.
31 mpo na kobeta sete na tina na mikolo oyo ya Purimi ete Bayuda basengeli kosala Purimi yango na mikolo na yango oyo ekatama kolanda mokano ya Moyuda Maridoshe mpe Ester, mwasi ya mokonzi; mpe ndenge Bayuda bakataki yango mpo na bango moko mpe mpo na bakitani na bango lokola tango na bango ya kokila bilei mpe ya bileli.
These letters confirmed the days of Purim at their appointed times, as Mordecai the Jew and Queen Esther obligated the Jews. The Jews accepted this obligation for themselves and their descendants, just as also they accepted times of fasting and lamenting.
32 Mitindo ya Ester elendisaki mibeko mpo na Purimi mpe ekomamaki na buku.
The command of Esther confirmed these regulations regarding Purim, and it was written in the book.

< Ester 9 >