< Ester 6 >

1 Na butu wana, lokola mokonzi akokaki kolala te, asengaki ete bamemela ye buku ya masolo, masolo ya bokonzi na ye, mpo ete batanga yango liboso na ye. 2 Emonanaki ete bakomaki boye kati na yango: Maridoshe afundaki Bigitani mpe Tereshi, basoda mibale oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kokengela ekuke ya mokonzi, oyo basalaki likita mpo na koboma mokonzi Kizerisesi. 3 Mokonzi atunaki: — Lokumu mpe lifuti nini Maridoshe azwaki mpo na yango? Basali na ye bazongisaki: — Basala ata eloko moko te mpo na ye. 4 Mokonzi atunaki: — Nani azali kati na lopango? Nzokande Amani awutaki kokota na lopango ya libanda ya ndako ya mokonzi mpo na kosolola na ye mpo ete badiembika Maridoshe na nzete oyo atelemisaki mpo na ye. 5 Basali ya mokonzi bazongisaki: — Ezali Amani nde azali kati na lopango. Mokonzi alobaki: — Bokotisa ye. 6 Tango Amani akotaki, mokonzi atunaki ye: — Tokoki kosala nini mpo na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu? Amani amilobelaki: « Nani lisusu oyo mokonzi akoki kopesa lokumu soki ngai te? » 7 Amani azongiselaki mokonzi: — Mpo na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu, 8 tika ete bamema nzambala ya bokonzi oyo mokonzi alataka elongo na mpunda oyo mokonzi amataka mpe batia motole ya bokonzi na moto ya mpunda yango. 9 Tika ete bapesa nzambala mpe mpunda yango epai ya kalaka oyo aleki na lokumu kati na bakalaka ya mokonzi, mpe tika ete balatisa nzambala na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu, mpe tika ete batambolisa ye likolo ya mpunda na balabala ya engumba na kotatola liboso na ye: « Tala makambo oyo mokonzi asali mpo na moto oyo ye alingi kopesa lokumu! » 10 Mokonzi alobaki na Amani: — Kende noki koluka nzambala mpe mpunda ndenge olobi, mpe sala yango mpo na Moyuda Maridoshe oyo asalaka mosala na ye na ekuke ya mokonzi. Kati na makambo nyonso oyo osili koloba, kotika ata eloko moko te. 11 Amani azwaki nzambala mpe mpunda, alatisaki Maridoshe nzambala yango mpe atambolisaki ye likolo ya mpunda na balabala nyonso ya engumba na kotatola liboso na ye: « Tala makambo oyo mokonzi asali mpo na moto oyo alingi kopesa lokumu! » 12 Sima, Maridoshe azongaki na ekuke ya mokonzi; kasi Amani azongaki noki na ndako na ye, na soni mpe azipa moto na ye. 13 Amani ayebisaki mwasi na ye, Zereshi, mpe baninga na ye nyonso makambo oyo ekomelaki ye. Bapesi toli na ye mpe mwasi na ye, Zereshi, balobaki na ye: — Lokola kokweyisama na yo ebandi liboso ya Maridoshe oyo azali Moyuda, okokoka kolonga ye te; solo penza, okokweyisama lisusu na se koleka! 14 Wana bazalaki nanu kosolola na ye, basoda ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, bayaki mpe bamemaki Amani na lombangu na feti oyo Ester abongisaki.

< Ester 6 >