< Mosakoli 2 >

1 Namilobelaki: « Yaka sik’oyo; nakomekisa yo bilengi mpo ete ozala moto ya esengo! » Nzokande, yango mpe ezalaki kaka pamba.
Je dis en mon cœur: Viens, [mon âme!] eh bien! je veux te faire essayer de la joie, et goûte ce qui est bon! Mais voici, cela aussi est une vanité:
2 Na tina na koseka, nalobaki: « Ezali na yango kaka bozoba! » Bongo na tina na elengi, nalobaki: « Esalaka nini? »
je dis du rire, qu'il est extravagant, et de la joie: Que procure-t-elle?
3 Wana motema na ngai ezalaki nanu kokamba ngai na bwanya, nazwaki mokano ya komipesa na masanga ya vino mpe na makambo ya bozoba. Nazalaki nde na posa ya kososola bolamu nini moto akoki kozwa na kosala bongo na se ya moyi, na mwa mikolo ya bomoi na ye.
Je pris en mon cœur le parti de maintenir ma chair dans le vin, tandis que mon cœur me guiderait avec sagesse, et de m'attacher à la folie, jusqu'à ce que je visse ce qu'il est bon aux enfants des hommes de faire sous le ciel, pendant le petit nombre des jours de leur vie.
4 Nazwaki mokano ya kosalisa misala minene: namitongelaki bandako minene mpe namilonelaki bilanga ya vino mpo na bomoi na ngai;
J'exécutai de grands ouvrages: je me bâtis des maisons; je me plantai des vignes;
5 nasalaki bilanga mpe nabongisaki bisika mpo na kolona banzete ya ndenge na ndenge, oyo ebotaka bambuma;
je me fis des jardins et des parcs, et y plantai toutes sortes d'arbres à fruit;
6 natimolaki mpo na ngai moko, mabulu minene ya mayi mpo na kosopela banzete ya mike mayi.
je me fis des étangs d'eau, pour en arroser la forêt qui montait en arbres;
7 Nasombaki bawumbu ya mibali mpe ya basi; kobakisa na motango ya bawumbu mosusu oyo babotamaki kati na ndako na ngai. Nazalaki mpe na bangombe, bantaba mpe bameme ebele koleka bakonzi nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi liboso na ngai.
j'achetai des serviteurs et des servantes, et j'eus des serfs nés dans la maison; j'eus aussi des troupeaux de gros et de menu bétail, plus que tous mes prédécesseurs à Jérusalem;
8 Nakongolaki mpo na ngai moko palata mpe wolo oyo ewutaki na bomengo ya bakonzi mpe ya bituka; nazwaki mpo na ngai bayembi ya basi mpe ya mibali, mpe oyo esepelisaka makasi mibali: mwasi mpe basi ebele ya kitoko.
je m'amassai aussi de l'argent et de l'or, et les trésors des rois et des provinces; je me procurai des chanteurs et des chanteuses, et, les délices des enfants des hommes, les plus belles des femmes;
9 Nakomaki moto monene koleka bakonzi nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi liboso na ngai; kasi atako bongo, bwanya ezalaki kaka kotambolisa ngai.
et je devins grand et plus considérable que tous mes prédécesseurs à Jérusalem;
10 Napimelaki miso na ngai eloko moko te oyo elulaki, napimelaki motema na ngai esengo moko te. Motema na ngai esepelaki na misala na ngai nyonso, mpe yango ezalaki lifuti ya mosala na ngai nyonso.
de plus ma sagesse me resta; et de tout ce que mes yeux demandaient, je ne leur refusai rien; je ne privai mon cœur d'aucune joie; car mon cœur eut de la joie dans tout mon labeur, et ce fut la part que je retirai de tout mon labeur.
11 Boye, tango natali misala nyonso oyo maboko na ngai esalaki mpe pasi nyonso oyo namonaki mpo na kokokisa yango, namoni ete nyonso wana ezalaki kaka pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe, ezali na yango na litomba moko te na se ya moyi.
Mais quand je considérai tous les ouvrages faits par mes mains, et le labeur dont je m'étais travaillé pour exécuter, je vis que tout est vanité et effort stérile, et que rien ne profite sous le soleil.
12 Bongo, nabalolaki makanisi na ngai mpo na koyekola bwanya, bozoba mpe bolema. Eloko nini mokitani ya mokonzi akoki kosala, oyo eleki oyo esila kosalema?
Et je me mis à examiner la sagesse et la folie, et l'extravagance. (Car que fera l'homme qui succédera au Roi? Ce que jadis on a fait.)
13 Namonaki ete bwanya ezali malamu koleka bozoba, ndenge pole ezali malamu koleka molili.
Et je vis que la prééminence de la sagesse sur la folie est la même que la prééminence de la lumière sur les ténèbres:
14 Moto ya bwanya ayebi epai azali kokende, kasi zoba atambolaka na molili; kasi nasosoli likambo moko: suka na bango mibale ekozala kaka ndenge moko.
le sage a ses yeux à la tête, et le fou chemine dans les ténèbres; néanmoins je reconnus aussi que l'un et l'autre ils subissent une même destinée.
15 Namilobelaki: « Suka ya zoba ekozala ndenge moko kaka na suka na ngai; sik’oyo, litomba nini ezali na moto ya kozala na bwanya mingi? » Namilobelaki: « Oyo mpe ezali kaka pamba. »
Alors je dis en mon cœur: La destinée de l'insensé, je la subirai aussi; et pourquoi ai-je été sage de reste? Et je dis en mon cœur: C'est aussi là une vanité.
16 Pamba te ezala moto ya bwanya to zoba, bakotikala kokanisa bango tango molayi te; mpe na mikolo ekoya, bato bakobosana bango mibale. Moto ya bwanya mpe akokufa lokola moto ya zoba.
Car pour le sage, pas plus que pour le fou, il n'y a de mémoire éternelle, puisque dans les jours à venir ils seront oubliés l'un et l'autre depuis longtemps: le sage, hélas! meurt aussi bien que l'insensé.
17 Boye, nayinaki bomoi, pamba te misala oyo esalemaka na se ya moyi ezali mabe mpo na ngai. Nyonso wana ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
Alors la vie me fut odieuse, et je me dégoûtai de tout ce qui se passe sous le soleil; car tout est vanité et effort stérile.
18 Nayinaki biloko nyonso oyo namonelaki pasi na se ya moyi, pamba te nakotika yango epai ya moto oyo akoya sima na ngai.
Et tout le labeur dont je m'étais travaillé sous le soleil, me fut odieux, car je dois le léguer à l'homme qui me succédera.
19 Bongo, nani ayebi soki moto yango akozala moto ya bwanya to zoba? Nzokande, ye nde akozala na bokonzi na likolo ya misala nyonso oyo nabimiselaki motoki mpe mayele na ngai na se ya tango. Yango mpe ezali kaka pamba.
Et qui sait si ce sera un sage ou un fou? Et il disposera de tout le travail que j'ai exécuté sous le soleil avec tant de peine et de sagesse. C'est aussi là une vanité.
20 Bongo, motema na ngai ekomaki kobungisa elikya likolo ya misala makasi oyo nazalaki kosala na se ya moyi.
Alors j'en vins à laisser mon cœur désespérer de tout le labeur dont je m'étais travaillé sous le soleil.
21 Pamba te moto akoki kosala mosala na ye na bwanya, na boyebi mpe na ndenge esengeli penza; kasi akotika nyonso oyo azali na yango epai ya moto oyo amonelaki yango pasi te; yango mpe ezali pamba mpe mabe makasi.
En effet qu'il se trouve un homme dont le travail aura été fait sagesse, connaissance et succès, c'est à l'homme qui ne se sera point occupé, qu'il le laissera comme héritage. C'est aussi là une vanité et un grand mal.
22 Litomba nini moto akoki kozwa na misala nyonso oyo asali mpe amonelaka pasi na se ya moyi?
Car que revient-il à l'homme pour tout son labeur et la préoccupation de son cœur, dont il s'est tourmenté sous le soleil?
23 Mikolo nyonso ya mosala na ye ezali kaka pasi mpe komitungisa; ezala na butu, makanisi na ye ezalaka na kimia te; oyo mpe ezali kaka pamba.
En effet tous ses jours sont douloureux, et le chagrin est son affaire; même la nuit son cœur ne repose pas. C'est aussi là une vanité.
24 Eloko eleki malamu mpo na moto ezali kaka kolia, komela mpe kosepela na mosala na ye. Namoni ete oyo mpe ewuti na loboko na Nzambe;
Rien de mieux pour l'homme que de manger et de boire, et de faire goûter du bien-être à son âme, pendant son travail. Je vis que cela aussi est un don de la main de Dieu.
25 pamba te soki Nzambe azalaki te, nani akoki kolia mpe kosepela?
Qui peut en effet manger et jouir, si ce n'est moi?
26 Nzambe apesaka bwanya, mayele mpe esengo na moto oyo asepelisaka Ye; kasi apesaka mosala ya kosangisa mpe ya konduka bomengo epai ya moto oyo asalaka masumu mpo ete atika yango na maboko ya moto oyo asepelisaka Nzambe. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
Car à l'homme qui Lui plaît, Il donne sagesse et science et joie; mais au pécheur Il donne la tâche d'amasser et d'accumuler, pour le donner à celui qui plaît à Dieu. C'est aussi là une vanité et un effort stérile.

< Mosakoli 2 >