< Deteronomi 6 >

1 Tala mibeko, bikateli mpe malako oyo Yawe, Nzambe na bino, atindi ngai koteya bino mpo ete bosalela yango kati na mokili oyo bokokota mpo na kokamata yango,
Now these are the commandments, the statutes, and the ordinances, which the LORD your God commanded to teach you, that you might do them in the land that you go over to possess;
2 mpo ete yo, bana na yo mpe bakitani na yo, botosa Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso oyo bokozala na bomoi na kobatelaka bikateli na Ye nyonso mpe mibeko oyo napesi bino mpo ete bozala na bomoi molayi.
that you might fear the LORD your God, to keep all his statutes and his commandments, which I command you—you, your son, and your son’s son, all the days of your life; and that your days may be prolonged.
3 Oh Isalaele, yoka malamu! Senzela ete otosa yango mpo ete ozala malamu mpe bokoma ebele na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, ndenge Yawe Nzambe ya bakoko na bino alakaki bino.
Hear therefore, Israel, and observe to do it, that it may be well with you, and that you may increase mightily, as the LORD, the God of your fathers, has promised to you, in a land flowing with milk and honey.
4 Isalaele, yoka malamu! Yawe azali Nzambe na biso, Yawe azali kaka moko.
Hear, Israel: The LORD is our God. The LORD is one.
5 Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso.
You shall love the LORD your God with all your heart, with all your soul, and with all your might.
6 Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo.
These words, which I command you today, shall be on your heart;
7 Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.
and you shall teach them diligently to your children, and shall talk of them when you sit in your house, and when you walk by the way, and when you lie down, and when you rise up.
8 Kanga yango na maboko na yo lokola bilembo mpe tia yango na elongi na yo lokola elembo.
You shall bind them for a sign on your hand, and they shall be for frontlets between your eyes.
9 Koma yango na makonzi ya ndako na yo mpe na bikuke na yo.
You shall write them on the door posts of your house and on your gates.
10 Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo alapelaki ndayi epai ya bakoko na yo, epai ya Abrayami, Izaki, mpe Jakobi mpo na kopesa yo bingumba ya minene mpe ya malamu oyo yo otongaki te,
It shall be, when the LORD your God brings you into the land which he swore to your fathers, to Abraham, to Isaac, and to Jacob, to give you, great and goodly cities which you didn’t build,
11 bandako etonda na biloko ya malamu ya ndenge na ndenge oyo yo otiaki te, mabulu ya mayi oyo yo otimolaki te, bilanga ya vino mpe ya olive oyo yo olonaki te; boye tango okolia mpe okotonda;
and houses full of all good things which you didn’t fill, and cisterns dug out which you didn’t dig, vineyards and olive trees which you didn’t plant, and you shall eat and be full;
12 keba ete obosana Yawe te oyo abimisaki yo na Ejipito, mokili ya bowumbu.
then beware lest you forget the LORD, who brought you out of the land of Egypt, out of the house of bondage.
13 Tosa Yawe, Nzambe na yo; salela kaka Ye mpe lapa ndayi na yo na Kombo na Ye.
You shall fear the LORD your God; and you shall serve him, and shall swear by his name.
14 Kosalela banzambe mosusu te, banzambe ya bato oyo bazingeli yo;
You shall not go after other gods, of the gods of the peoples who are around you,
15 pamba te Yawe, Nzambe na yo, oyo azali kati na yo, azali Nzambe ya zuwa, mpo ete asilikela yo te mpe abebisa yo te na mokili.
for the LORD your God among you is a jealous God, lest the anger of the LORD your God be kindled against you, and he destroy you from off the face of the earth.
16 Komeka te Yawe, Nzambe na yo, ndenge osalaki na Masa.
You shall not tempt the LORD your God, as you tempted him in Massah.
17 Batela malamu mibeko, mitindo mpe bikateli ya Yawe, Nzambe na yo, oyo apesi yo.
You shall diligently keep the commandments of the LORD your God, and his testimonies, and his statutes, which he has commanded you.
18 Sala oyo ezali alima mpe malamu na miso ya Yawe, mpo ete ozala moto ya esengo, mpo ete okota, mpe mpo ete okamata mokili ya malamu oyo Yawe alakaki kopesa na bakoko na yo na nzela ya ndayi,
You shall do that which is right and good in the LORD’s sight, that it may be well with you and that you may go in and possess the good land which the LORD swore to your fathers,
19 na kobengana banguna na yo nyonso liboso na yo, ndenge Yawe alobaki.
to thrust out all your enemies from before you, as the LORD has spoken.
20 Na mikolo ekoya, soki mwana na yo ya mobali atuni yo: Mitindo, bikateli mpe mibeko oyo Yawe, Nzambe na biso, atinda yo, elingi kolakisa nini?
When your son asks you in time to come, saying, “What do the testimonies, the statutes, and the ordinances, which the LORD our God has commanded you mean?”
21 Okoloba na ye: Tozalaki bawumbu ya Faraon na Ejipito, kasi Yawe abimisaki biso na Ejipito na loboko na ye ya nguya.
then you shall tell your son, “We were Pharaoh’s slaves in Egypt. The LORD brought us out of Egypt with a mighty hand;
22 Yawe asalaki na miso na biso bilembo minene mpe bikamwa, ya minene mpe ya somo na Ejipito, na Faraon mpe na ndako na ye mobimba.
and the LORD showed great and awesome signs and wonders on Egypt, on Pharaoh, and on all his house, before our eyes;
23 Kasi abimisaki biso kuna mpo na kokotisa biso mpe kopesa biso mokili oyo alakaki na bakoko na biso na ndayi oyo alapaki.
and he brought us out from there, that he might bring us in, to give us the land which he swore to our fathers.
24 Yawe atindaki biso kotosa mibeko oyo nyonso mpe kobanga Yawe, Nzambe na biso, mpo ete tozala tango nyonso malamu mpe tozala na bomoi ndenge ezali lelo.
The LORD commanded us to do all these statutes, to fear the LORD our God, for our good always, that he might preserve us alive, as we are today.
25 Mpe soki totosi malamu mibeko nyonso oyo, liboso ya Yawe, Nzambe na biso, ndenge atindaki biso, wana tokozala bato ya sembo.
It shall be righteousness to us, if we observe to do all these commandments before the LORD our God, as he has commanded us.”

< Deteronomi 6 >