< Deteronomi 24 >

1 Soki mobali abali mwasi mpe, sima na mikolo, asepeli na ye lisusu te mpo ete amoni eloko moko ya mabe kati na ye, tika ete akoma mokanda ya koboma libala mpe apesa ye yango; bongo na sima, abimisa ye na ndako na ye.
「人若娶妻以後,見她有甚麼不合理的事,不喜悅她,就可以寫休書交在她手中,打發她離開夫家。
2 Sima na kobima na ndako ya mobali wana, mwasi yango akoki kobala mobali mosusu.
婦人離開夫家以後,可以去嫁別人。
3 Mpe soki esali ete mobali oyo ya mibale mpe asepeli na ye lisusu te, tika ete ye mpe akokoma mokanda mpo na koboma libala mpe apesa ye yango, bongo na sima, abimisa ye na ndako na ye; to soki esali ete mobali oyo ya mibale akufi,
後夫若恨惡她,寫休書交在她手中,打發她離開夫家,或是娶她為妻的後夫死了,
4 boye mobali na ye ya liboso, oyo abenganaki ye na libala, akoki lisusu te kozongisa ye na libala, pamba te mwasi yango akomi mbindo liboso na ye: kozongisa ye lisusu na libala ezali likambo ya nkele na miso ya Yawe. Boyeisa lisumu te na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula.
打發她去的前夫不可在婦人玷污之後再娶她為妻,因為這是耶和華所憎惡的;不可使耶和華-你上帝所賜為業之地被玷污了。」
5 Soki mobali abali sika, bakoki te kotinda ye na bitumba to kopesa ye mosala songolo; akozala na bonsomi mobu mobimba mpo ete avanda na ndako na ye mpo na kosepelisa mwasi oyo asili kobala.
「新娶妻之人不可從軍出征,也不可託他辦理甚麼公事,可以在家清閒一年,使他所娶的妻快活。
6 Bokanga te lokola ndanga, mabanga mibale oyo moninga anikaka na yango ble: mingi koleka libanga oyo ya moke, pamba te kosala bongo ezali lokola kokanga ye nzela oyo abikelaka.
「不可拿人的全盤磨石或是上磨石作當頭,因為這是拿人的命作當頭。
7 Soki moto moko ya Isalaele ayibi ndeko na ye ya Isalaele mpe akomisi ye mowumbu to ateki ye, basengeli koboma moto wana. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.
「若遇見人拐帶以色列中的一個弟兄,當奴才待他,或是賣了他,那拐帶人的就必治死。這樣,便將那惡從你們中間除掉。
8 Mpo na makambo oyo etali bokono ya maba, bosala keba ete bosalela malamu malako nyonso oyo Banganga-Nzambe, ba-oyo bazali Balevi, bapesaki bino. Bosengeli kotosa malamu makambo oyo natindaki bango.
「在大痲瘋的災病上,你們要謹慎,照祭司利未人一切所指教你們的留意遵行。我怎樣吩咐他們,你們要怎樣遵行。
9 Bobosana te makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki epai ya Miriami, na nzela, sima na bino kobima na Ejipito.
當記念出埃及後,在路上,耶和華-你上帝向米利暗所行的事。
10 Soki odefisi eloko epai ya moninga na yo, kokota te na ndako na ye mpo na kozwa ndanga.
「你借給鄰舍,不拘是甚麼,不可進他家拿他的當頭。
11 Vanda kaka na libanda kino moto oyo adefaki epai na yo akomemela yo ndanga.
要站在外面,等那向你借貸的人把當頭拿出來交給你。
12 Soki moto yango azali mobola, kokende kolala te na ndanga oyo asimbisaki yo mpo na niongo.
他若是窮人,你不可留他的當頭過夜。
13 Okozongisela ye ndanga na ye ya kazaka ye, na pokwa, mpo ete alala na yango. Bongo, ye akopambola yo; mpe ekozala mpo na yo likambo ya sembo na miso ya Yawe, Nzambe na yo.
日落的時候,總要把當頭還他,使他用那件衣服蓋着睡覺,他就為你祝福;這在耶和華-你上帝面前就是你的義了。
14 Konyokola te moto ya mosala oyo azali mobola to moto akelela: azala ndeko na yo moto ya Isalaele to mopaya oyo azali kovanda kati na moko ya bingumba na yo.
「困苦窮乏的雇工,無論是你的弟兄或是在你城裏寄居的,你不可欺負他。
15 Pesa ye lifuti na ye ya mokolo na mokolo na pokwa, pamba te azali mobali mpe atiaka elikya na lifuti yango, noki te akoganga epai na Yawe na tina na yo mpe okosala lisumu.
要當日給他工價,不可等到日落-因為他窮苦,把心放在工價上-恐怕他因你求告耶和華,罪便歸你了。
16 Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata na bango; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko.
「不可因子殺父,也不可因父殺子;凡被殺的都為本身的罪。
17 Bokoki te kokata na ndenge ya mabe, makambo mpo na mopaya to mpo na mwana etike; to kokamata kazaka ya mwasi oyo akufisa mobali lokola ndanga.
「你不可向寄居的和孤兒屈枉正直,也不可拿寡婦的衣裳作當頭。
18 Bobosana te ete bino mpe bozalaki bawumbu na Ejipito; mpe Yawe, Nzambe na bino, asikolaki bino kuna.
要記念你在埃及作過奴僕。耶和華-你的上帝從那裏將你救贖,所以我吩咐你這樣行。
19 Tango bokobuka mbuma na bilanga na bino, soki bobosani liboke ya ble, bozonga te mpo na kozwa yango; botika yango mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala.
「你在田間收割莊稼,若忘下一捆,不可回去再取,要留給寄居的與孤兒寡婦。這樣,耶和華-你上帝必在你手裏所辦的一切事上賜福與你。
20 Tango bokoningisa bambuma ya olive na banzete na yango, bobuka te oyo ekotikala na bitape; botika yango mpo na bapaya, bana bitike mpe mpo na basi bakufisa mibali.
你打橄欖樹,枝上剩下的,不可再打;要留給寄居的與孤兒寡婦。
21 Tango bokobuka bambuma na bilanga na bino ya vino, bokozongela te kobuka na mbala ya mibale. Botika oyo ekotikala mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali.
你摘葡萄園的葡萄,所剩下的,不可再摘;要留給寄居的與孤兒寡婦。
22 Bokanisa ete bozalaki bawumbu na Ejipito. Yango wana natindi bino kotosa mibeko oyo.
你也要記念你在埃及地作過奴僕,所以我吩咐你這樣行。

< Deteronomi 24 >