< Deteronomi 15 >

1 Na suka ya mibu sambo nyonso, bosengeli kosundola baniongo.
At the end of every seven years you shall make a release.
2 Tala ndenge esengeli kosalema: moto nyonso oyo adefisaki ndeko na ye, mwana ya Isalaele, mbongo, asengeli kotikela ye yango. Asengeli te kosenga eloko epai ya ndeko to moninga na ye, moto ya Isalaele, pamba te tango ya kotika baniongo mpo na lokumu na Yawe esili kokoka.
And this is the manner of the release: Every creditor that lends something to his neighbor shall release it; he shall not exact it of his neighbor, or of his brother; because it is called the LORD’s release.
3 Bokoki kosenga niongo epai ya mopaya, kasi bosengeli kosundola baniongo nyonso oyo bandeko na bino badefaki epai na bino.
Of a foreigner you may exact it again: but that which is your with your brother your hand shall release;
4 Nzokande, ebongaki te ete mobola azala kati na bino; pamba te kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo ete bokamata yango lokola libula, akopambola bino koleka,
Save when there shall be no poor among you; for the LORD shall greatly bless you in the land which the LORD your God gives you for an inheritance to possess it:
5 soki botosi malamu Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli malamu mitindo oyo nazali kopesa bino lelo.
Only if you carefully listen to the voice of the LORD your God, to observe to do all these commandments which I command you this day.
6 Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akopambola bino ndenge alakaki; mpe bino bokodefisa na bikolo ebele, kasi bokodefa te. Bokokonza bikolo ebele, kasi ekolo moko te ekokonza bino.
For the LORD your God blesses you, as he promised you: and you shall lend to many nations, but you shall not borrow; and you shall reign over many nations, but they shall not reign over you.
7 Soki mobola moko amonani kati na bandeko na yo na bingumba ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa yo; okokangela ye motema te mpe okoboya te kosunga ndeko na yo mobola.
If there be among you a poor man of one of your brothers within any of your gates in your land which the LORD your God gives you, you shall not harden your heart, nor shut your hand from your poor brother:
8 Nzokande, okofungolela ye maboko mpe okodefisa ye na motema moko, nyonso oyo akozala na yango na bosenga.
But you shall open your hand wide to him, and shall surely lend him sufficient for his need, in that which he wants.
9 Keba ete motema na yo ezala na makanisi ya mabe te mpe eloba na yo te: « Mobu ya sambo ekomi pene, mobu ya kotika baniongo, » mpo ete otala ndeko na yo mobola na ndenge ya mabe mpe ozanga kopesa ye eloko. Mpe wana ye akolelalela epai na Yawe na tina na yo, okomema ngambo ya masumu na yo.
Beware that there be not a thought in your wicked heart, saying, The seventh year, the year of release, is at hand; and your eye be evil against your poor brother, and you give him nothing; and he cry to the LORD against you, and it be sin to you.
10 Osengeli kopesa ye na motema ya esengo kasi na mitema mibale te; bongo Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo na misala na yo nyonso mpe na eloko nyonso oyo maboko na yo ekosimba.
You shall surely give him, and your heart shall not be grieved when you give to him: because that for this thing the LORD your God shall bless you in all your works, and in all that you put your hand to.
11 Nzokande lokola babola bakozala kaka kati na mokili, ngai nazali kotinda bino ete bofungola maboko na bino epai ya bandeko na bino, epai ya babola mpe epai bato nyonso oyo bakelela kati na mokili na bino.
For the poor shall never cease out of the land: therefore I command you, saying, You shall open your hand wide to your brother, to your poor, and to your needy, in your land.
12 Soki moko kati na bandeko na yo, Mo-Ebre, azala mobali to mwasi, amiteki ye moko epai na yo, akosalela yo mibu motoba; na mobu ya sambo, okotika ye kokende na bonsomi.
And if your brother, an Hebrew man, or an Hebrew woman, be sold to you, and serve you six years; then in the seventh year you shall let him go free from you.
13 Mpe tango okotika ye, okozongisa ye maboko pamba te;
And when you send him out free from you, you shall not let him go away empty:
14 okopesa ye na motema ya esengo ndambo na yo ya bibwele, ya ble mpe ya vino; okopesa ye ndenge kaka Yawe, Nzambe na yo, apambolaki yo.
You shall furnish him liberally out of your flock, and out of your floor, and out of your wine press: of that with which the LORD your God has blessed you you shall give to him.
15 Bokanisa ete bino mpe bozalaki bawumbu na Ejipito; mpe Yawe, Nzambe na bino, asikolaki bino. Yango wana, napesi bino mobeko oyo na mokolo ya lelo.
And you shall remember that you were a slave in the land of Egypt, and the LORD your God redeemed you: therefore I command you this thing to day.
16 Kasi soki alobi na yo: « Naboyi kotika yo, » mpo ete alingaka yo elongo na libota na yo mpe azalaka na esengo ya kovanda elongo na yo,
And it shall be, if he say to you, I will not go away from you; because he loves you and your house, because he is well with you;
17 wana okozwa motonga, okotia litoyi na ye na ezipelo ya ekuke mpe okotobola yango. Na bongo, akokoma mowumbu na yo mpo na libela. Okosala mpe ndenge moko mpo na mwasi mowumbu.
Then you shall take an awl, and thrust it through his ear to the door, and he shall be your servant for ever. And also to your maidservant you shall do likewise.
18 Komona yango likambo ya pasi te kotika mowumbu na yo na bonsomi, pamba te mosala oyo asaleli yo na mibu motoba ezali na litomba mbala mibale koleka litomba ya moto oyo ozwa na mosala. Mpe Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo na nyonso oyo okosala.
It shall not seem hard to you, when you send him away free from you; for he has been worth a double hired servant to you, in serving you six years: and the LORD your God shall bless you in all that you do.
19 Bokotia pembeni mpo na Yawe, Nzambe na bino, mwana mobali nyonso ya liboso oyo akobotama kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Kati na bitonga na bino, bokotia na mosala te bana ya liboso ya bangombe na bino mpe bokolongola te bapwale ya bana ya liboso.
All the firstling males that come of your herd and of your flock you shall sanctify to the LORD your God: you shall do no work with the firstling of your bullock, nor shear the firstling of your sheep.
20 Mibu nyonso, bino elongo na mabota na bino, bokolia bibwele yango na miso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo akopona.
You shall eat it before the LORD your God year by year in the place which the LORD shall choose, you and your household.
21 Soki ebwele yango ezali na mbeba to ezali tengu-tengu to ekufa miso to soki ezali na mbeba mosusu ya makasi, bokoki kobonza yango te epai na Yawe, Nzambe na bino.
And if there be any blemish therein, as if it be lame, or blind, or have any ill blemish, you shall not sacrifice it to the LORD your God.
22 Bokolia yango kati na bingumba na bino: moto nyonso, azala mbindo to peto, akolia yango ndenge baliaka mboloko to mbuli.
You shall eat it within your gates: the unclean and the clean person shall eat it alike, as the roebuck, and as the hart.
23 Kasi bokolia makila te, bosopa yango na mabele lokola mayi.
Only you shall not eat the blood thereof; you shall pour it on the ground as water.

< Deteronomi 15 >