< Deteronomi 13 >

1 Soki mosakoli moko to moto moko oyo amonaka makambo abimi kati na bino mpe asakoleli bino bilembo minene mpe bikamwa,
If there arise among you a prophet, or a dreamer of dreams, and gives you a sign or a wonder,
2 mpe soki bilembo minene mpe bikamwa oyo asakolaki ekokisami mpe alobi na bino: « Tika ete tosalela mpe togumbamela banzambe mosusu, » nzokande bino boyebi banzambe yango te,
And the sign or the wonder come to pass, whereof he spoke to you, saying, Let us go after other gods, which you have not known, and let us serve them;
3 bosengeli te koyoka maloba ya mosakoli wana to ya moto wana oyo amonaka makambo. Yawe, Nzambe na bino, akomeka bino mpo na kotala soki bolingi Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba.
You shall not listen to the words of that prophet, or that dreamer of dreams: for the LORD your God proves you, to know whether you love the LORD your God with all your heart and with all your soul.
4 Bosengeli kosambela mpe kokumisa kaka Yawe, Nzambe na bino; bobatela mitindo na Ye, botosa Ye mpe bokangama na Ye.
You shall walk after the LORD your God, and fear him, and keep his commandments, and obey his voice, and you shall serve him, and join to him.
5 Mosakoli to moto wana oyo amonaka makambo, esengeli baboma ye, pamba te azali koteya mpo ete botombokela Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu. Moto wana azalaki nde na posa ya kopengwisa bino na nzela oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino kolanda. Boye, bosengeli kolongola mabe kati na bino.
And that prophet, or that dreamer of dreams, shall be put to death; because he has spoken to turn you away from the LORD your God, which brought you out of the land of Egypt, and redeemed you out of the house of bondage, to thrust you out of the way which the LORD your God commanded you to walk in. So shall you put the evil away from the middle of you.
6 Soki ndeko na yo moko ya mobali to ya mwasi, mwana na yo ya mobali to ya mwasi, mwasi oyo yo olingaka to moninga na yo ya motema alingi kokosa yo na nkuku na koloba: « Tokende kogumbamela banzambe mosusu, » banzambe oyo bino mpe bakoko na bino botikalaki koyeba te,
If your brother, the son of your mother, or your son, or your daughter, or the wife of your bosom, or your friend, which is as your own soul, entice you secretly, saying, Let us go and serve other gods, which you have not known, you, nor your fathers;
7 banzambe ya bato oyo bazingeli bino, oyo bazali pembeni to mosika, wuta na suka moko ya mokili kino na suka mosusu),
Namely, of the gods of the people which are round about you, near to you, or far off from you, from the one end of the earth even to the other end of the earth;
8 koyoka ye te mpe kondima ye te. Koyokela ye mawa te, kobikisa ye te mpe kobomba ye te.
You shall not consent to him, nor listen to him; neither shall your eye pity him, neither shall you spare, neither shall you conceal him:
9 Ya solo, osengeli koboma ye na mabanga. Loboko na yo ekozala loboko ya liboso mpo na kobamba ye mabanga mpe sima maboko ya bato nyonso.
But you shall surely kill him; your hand shall be first on him to put him to death, and afterwards the hand of all the people.
10 Boboma ye na mabanga, pamba te alingaki kopengwisa bino mosika na Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito, mokili ya bowumbu.
And you shall stone him with stones, that he die; because he has sought to thrust you away from the LORD your God, which brought you out of the land of Egypt, from the house of bondage.
11 Boye, Isalaele nyonso ekoyoka mpe ekobanga, bongo moto moko te kati na bino akosala lisusu makambo mabe ya lolenge oyo.
And all Israel shall hear, and fear, and shall do no more any such wickedness as this is among you.
12 Soki oyoki bato koloba na tina na moko kati na bingumba oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mpo na kovanda
If you shall hear say in one of your cities, which the LORD your God has given you to dwell there, saying,
13 ete bato mabe bamonani kati na yango, batindiki bato ya engumba na bango mpe balobi na bango: « Tika ete tokende kogumbamela banzambe mosusu, » banzambe oyo oyebaki te,
Certain men, the children of Belial, are gone out from among you, and have withdrawn the inhabitants of their city, saying, Let us go and serve other gods, which you have not known;
14 wana osengeli koluka koyeba, kotuna mpe kotala malamu-malamu. Soki ezali ya solo mpe emonani ete likambo yango ya mbindo esalemaki penza kati na yo,
Then shall you inquire, and make search, and ask diligently; and, behold, if it be truth, and the thing certain, that such abomination is worked among you;
15 osengeli solo koboma na mopanga bavandi nyonso ya engumba yango. Osengeli kobebisa yango nyonso: bato na yango mpe bibwele na yango.
You shall surely smite the inhabitants of that city with the edge of the sword, destroying it utterly, and all that is therein, and the cattle thereof, with the edge of the sword.
16 Okosangisa biloko nyonso ya engumba yango oyo bobotoli na esika oyo bato nyonso bakutanaka mpe okotumba engumba nyonso mpe biloko na yango nyonso oyo bobotolaki lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe, Nzambe na bino. Ekotikala mopiku ya mabanga mpo na libela, ekoki kotongama lisusu te.
And you shall gather all the spoil of it into the middle of the street thereof, and shall burn with fire the city, and all the spoil thereof every whit, for the LORD your God: and it shall be an heap for ever; it shall not be built again.
17 Eloko moko te kati na biloko oyo epesama lokola ekila ekoki komonana na maboko na yo, mpo ete Yawe Nzambe apelisela yo lisusu te kanda na Ye ya makasi, kasi atalisa yo ngolu na Ye, ayokela yo mawa mpe akomisa yo ebele ndenge alakaki yango epai ya bakoko na yo na nzela ya ndayi,
And there shall stick nothing of the cursed thing to your hand: that the LORD may turn from the fierceness of his anger, and show you mercy, and have compassion on you, and multiply you, as he has sworn to your fathers;
18 soki otosi Yawe, Nzambe na yo, obateli mibeko na Ye nyonso oyo nazali kopesa yo lelo mpe otamboli na bosembo na miso Ye.
When you shall listen to the voice of the LORD your God, to keep all his commandments which I command you this day, to do that which is right in the eyes of the LORD your God.

< Deteronomi 13 >