< Deteronomi 10 >

1 Na tango wana, Yawe alobaki na ngai: « Bongisa bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso mpe mata epai na ngai na likolo ya ngomba; okosala lisusu sanduku ya mabaya.
At that time the LORD said to me, "Cut two tablets of stone like the first, and come up to me onto the mountain, and make an ark of wood.
2 Nakokoma na bitando yango maloba oyo ezalaki na likolo ya bitando ya mabanga ya liboso, oyo obukaki; mpe okotia bitando yango kati na sanduku. »
I will write on the tables the words that were on the first tables which you broke, and you shall put them in the ark."
3 Boye nasalaki sanduku na mabaya ya nzete ya akasia mpe nabongisaki bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso. Namataki likolo ya ngomba, namemaki bitando mibale ya mabanga, na maboko na ngai.
So I made an ark of acacia wood, and cut two tablets of stone like the first, and went up onto the mountain, having the two tablets in my hand.
4 Yawe akomaki likolo ya bitando yango maloba oyo akomaki liboso: mibeko zomi oyo Yawe ayebisaki bino na likolo ya ngomba kati na moto, na mokolo ya mayangani; mpe Yawe apesaki ngai yango.
He wrote on the tables, according to the first writing, the ten commandments, which the LORD spoke to you on the mountain out of the midst of the fire in the day of the assembly: and the LORD gave them to me.
5 Boye nakitaki wuta na ngomba mpe natiaki bitando yango mibale ya mabanga kati na sanduku oyo nasalaki ndenge Yawe atindaki ngai mpe ezali kuna sik’oyo.
I turned and came down from the mountain, and put the tables in the ark which I had made; and there they are as the LORD commanded me.
6 Bana ya Isalaele batambolaki wuta na mabulu ya mayi ya Bene-Yaakani kino na Mosera. Aron akufaki kuna mpe bakundaki ye. Mpe Eleazari, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye lokola Nganga-Nzambe.
(The children of Israel traveled from Beeroth Bene Jaakan to Moserah. There Aaron died, and there he was buried; and Eleazar his son ministered in the priest's office in his place.
7 Longwa wana, bakendeki na Gudigoda; sima bakendeki na Yotibata, mokili ya miluka ebele.
From there they traveled to Gudgodah; and from Gudgodah to Jotbathah, a land of brooks of water.
8 Na tango wana, Yawe atiaki pembeni libota ya Levi mpo na komemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpo na kotelemaka liboso ya Yawe, mpo na kosalaka mosala na Ye mpe mpo na kopambolaka bato na Kombo na Ye ndenge bazali kosala kino lelo.
At that time the LORD set apart the tribe of Levi, to bear the ark of the covenant of the LORD, to stand before the LORD to minister to him, and to bless in his name, to this day.
9 Yango wana, bana ya Levi bazali na ndambo ya mabele te to libula te kati na bandeko na bango: Yawe nde azali libula na bango, ndenge Yawe, Nzambe na bino, alobaki na bango.
Therefore Levi has no portion nor inheritance with his brothers; the LORD is his inheritance, according as the LORD your God spoke to him.)
10 Boye natikalaki likolo ya ngomba mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ndenge nasalaki na mbala ya liboso, mpe Yawe ayokelaki ngai na mbala oyo lisusu, pamba te kobebisa bino ezalaki mokano na Ye te.
I stayed on the mountain, as at the first time, forty days and forty nights: and the LORD listened to me that time also, and the LORD would not destroy you.
11 Na sima, Yawe alobaki na ngai: « Kende mpe kamba bato oyo mpo ete bakota mpe bakamata mokili oyo nalakaki kopesa epai na batata na bango na nzela ya ndayi. »
The LORD said to me, "Arise, take your journey before the people; and they shall go in and possess the land, which I swore to their fathers to give to them."
12 Sik’oyo, Oh Isalaele, likambo nini Yawe, Nzambe na yo, azali kozela epai na yo? Yawe, Nzambe na yo, azali kozela ete otosa Yawe, Nzambe na yo, na kotambola na banzela na Ye nyonso, na kolinga Ye mpe kosalela Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba,
Now, Israel, what does the LORD your God require of you, but to fear the LORD your God, to walk in all his ways, and to love him, and to serve the LORD your God with all your heart and with all your soul,
13 mpe ete obatela mibeko mpe bikateli ya Yawe, oyo nazali kopesa yo na mokolo ya lelo mpo na bolamu na yo moko.
to keep the commandments of the LORD, and his statutes, which I command you this day for your good?
14 Yawe, Nzambe na yo, nde azali Nkolo ya likolo, ya likolo koleka likolo, ya mabele mpe ya nyonso oyo ezali kati na yango.
Look, to the LORD your God belongs heaven and the heaven of heavens, the earth, with all that is in it.
15 Nzokande, Yawe alakisaki bolingo na Ye epai ya batata na bino mpe alingaki bango. Yango wana aponaki bino, bino bakitani na bango, kati na bikolo nyonso ndenge ezali lelo.
Only the LORD had a delight in your fathers to love them, and he chose their descendants after them, even you above all peoples, as at this day.
16 Bopetola mitema na bino, oyo etonda na masumu mpe botombokela lisusu Yawe te;
Circumcise therefore the foreskin of your heart, and be no more stiff-necked.
17 pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bankolo, Nzambe Monene, Nzambe ya nguya mpe ya somo, oyo aponaka bilongi te mpe azwaka kanyaka te,
For the LORD your God, he is God of gods, and Lord of lords, the great God, the mighty, and the awesome, who doesn't respect persons, nor takes reward.
18 abundelaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, alingaka mopaya mpe apesaka ye bilei mpe bilamba.
He does execute justice for the fatherless and widow, and loves the foreigner, in giving him food and clothing.
19 Bino mpe bosengeli kolinga bapaya, pamba te bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito.
Therefore love the foreigner; for you were foreigners in the land of Egypt.
20 Tosa Yawe, Nzambe na yo, mpe salela Ye; kangama na Ye mpe lapaka ndayi na Kombo na Ye.
You shall fear the LORD your God; you shall serve him; and you shall cling to him, and you shall swear by his name.
21 Azali masanzoli na yo, azali Nzambe na yo, oyo asalelaka yo makambo minene mpe makambo ya somo oyo omonaki na miso na yo moko.
He is your praise, and he is your God, who has done for you these great and awesome things, which your eyes have seen.
22 Bakoko na yo nyonso oyo bakendeki na Ejipito bazalaki tuku sambo; mpe sik’oyo, Yawe, Nzambe na yo, akomisi bino ebele lokola minzoto ya likolo.
Your fathers went down into Egypt with seventy persons; and now the LORD your God has made you as the stars of the sky for multitude.

< Deteronomi 10 >