< Daniele 4 >

1 Mokonzi Nabukodonozori alobaki na bato ya bikolo, ya bamboka mpe ya nkota nyonso, oyo bavandaka na mokili mobimba: Natombeli bino kimia monene!
尼布甲尼撒王曉諭住在全地各方、各國、各族的人說:「願你們大享平安!
2 Nazali na esengo ya koyebisa bino bikamwa mpe makambo minene oyo Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo asali mpo na ngai!
我樂意將至高的上帝向我所行的神蹟奇事宣揚出來。
3 Bikamwa na Ye ezali solo minene,
他的神蹟何其大! 他的奇事何其盛! 他的國是永遠的; 他的權柄存到萬代!
4 Ngai, Nabukodonozori, nazalaki na kimia mpe nazalaki kosepela na bomengo kati na ndako na ngai.
「我-尼布甲尼撒安居在宮中,平順在殿內。
5 Mokolo moko, tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai, nalotaki ndoto moko oyo ebangisaki ngai makasi; bililingi mpe bimoniseli moko eyaki na makanisi na ngai mpe etungisaki molimo na ngai.
我做了一夢,使我懼怕。我在床上的思念,並腦中的異象,使我驚惶。
6 Boye, napesaki mitindo epai ya bato ya bwanya nyonso ya Babiloni ete baya liboso na ngai mpo na kolimbolela ngai ndoto yango.
所以我降旨召巴比倫的一切哲士到我面前,叫他們把夢的講解告訴我。
7 Bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, banganga-kisi, bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto mpe bato ya mayele ya mabe bayaki epai na ngai, mpe nayebisaki bango ndoto yango; kasi bakokaki te kopesa ngai ndimbola na yango.
於是那些術士、用法術的、迦勒底人、觀兆的都進來,我將那夢告訴了他們,他們卻不能把夢的講解告訴我。
8 Sima, Daniele ayaki liboso na ngai, mpe nayebisaki ye ndoto yango. Bazalaki kobenga ye Belitsatsari, kombo ya nzambe na ngai. Molimo ya banzambe ya bule ezalaki kati na ye.
末後那照我神的名,稱為伯提沙撒的但以理來到我面前,他裏頭有聖神的靈,我將夢告訴他說:
9 Nalobaki: — Belitsatsari, mokonzi ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, nayebi ete molimo ya banzambe ya bule ezali kati na yo, mpe ete mabombami moko te ezali pasi na kolimbola mpo na yo. Yoka ndoto oyo nalotaki mpe pesa ngai ndimbola na yango.
『術士的領袖伯提沙撒啊,因我知道你裏頭有聖神的靈,甚麼奧祕的事都不能使你為難。現在要把我夢中所見的異象和夢的講解告訴我。』
10 Tala bimoniseli oyo namonaki tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai:
「我在床上腦中的異象是這樣:我看見地當中有一棵樹,極其高大。
11 Nzete yango ekolaki, ekomaki monene mpe makasi;
那樹漸長,而且堅固,高得頂天,從地極都能看見,
12 ezalaki na makasa kitoko mpe na bambuma ebele,
葉子華美,果子甚多,可作眾生的食物;田野的走獸臥在蔭下,天空的飛鳥宿在枝上;凡有血氣的都從這樹得食。
13 Na emoniseli oyo nazwaki tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai, namonaki anjelu moko, ye mosantu, kokita wuta na Lola.
「我在床上腦中的異象,見有一位守望的聖者從天而降。
14 Agangaki na mongongo makasi:
大聲呼叫說:『伐倒這樹!砍下枝子!搖掉葉子!拋散果子!使走獸離開樹下,飛鳥躲開樹枝。
15 Kasi tika ete mobimbi mpe misisa na yango etikala elala na mabele;
樹触卻要留在地內,用鐵圈和銅圈箍住,在田野的青草中讓天露滴濕,使他與地上的獸一同吃草,
16 Tika ete motema na ye ya bomoto elongwa
使他的心改變,不如人心,給他一個獸心,使他經過七期。
17 Ba-anjelu nde bazwi mokano wana; basantu nde bakati yango mpo ete bato ya bomoi bayeba ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali Nkolo ya mokili ya bato, apesaka bokonzi na yango na moto nyonso oyo Ye alingi mpe azali na makoki ya kotombola kati na yango moto ya suka kati na bato. ›
這是守望者所發的命,聖者所出的令,好叫世人知道至高者在人的國中掌權,要將國賜與誰就賜與誰,或立極卑微的人執掌國權。』
18 Yango nde ndoto oyo ngai, mokonzi Nabukodonozori, nalotaki. Sik’oyo yo, Belitsatsari, yebisa ngai ndimbola na yango, pamba te moto moko te kati na bato ya bwanya ya mokili na ngai azalaki na makoki ya kolimbolela ngai yango. Nzokande yo, okokoka mpo ete ozali na molimo ya banzambe ya bule kati na yo. »
「這是我-尼布甲尼撒王所做的夢。伯提沙撒啊,你要說明這夢的講解;因為我國中的一切哲士都不能將夢的講解告訴我,惟獨你能,因你裏頭有聖神的靈。」
19 Bongo Daniele oyo bazalaki kobenga Belitsatsari atungisamaki makasi na mwa tango, mpe makanisi na ye ekomaki kobangisa ye. Mokonzi alobaki na ye: — Belitsatsari, tika ete ndoto oyo mpe ndimbola na yango ebangisa yo te!
於是稱為伯提沙撒的但以理驚訝片時,心意驚惶。王說:「伯提沙撒啊,不要因夢和夢的講解驚惶。」伯提沙撒回答說:「我主啊,願這夢歸與恨惡你的人,講解歸與你的敵人。
20 Belitsatsari azongisaki: — Nkolo na ngai, tika ete ndoto oyo ezala mpo na bayini na yo, mpe ndimbola na yango, mpo na banguna na yo!
你所見的樹漸長,而且堅固,高得頂天,從地極都能看見;
21 Nzete oyo omonaki, oyo ezalaki na makasa ya kitoko mpe bambuma ebele, oyo ezalaki kopesa bato nyonso bilei, oyo ezalaki kopesa pio na banyama ya zamba, oyo ezalaki kotikela bandeke ya likolo esika ya kotonga bazala na yango;
葉子華美,果子甚多,可作眾生的食物;田野的走獸住在其下;天空的飛鳥宿在枝上。
22 nzete yango ezali yo, mokonzi! Okomi penza monene mpe makasi kino otuti mapata; mpe bokonzi na yo ekeyi kino na suka ya mabele.
「王啊,這漸長又堅固的樹就是你。你的威勢漸長及天,你的權柄管到地極。
23 Mokonzi, omonaki anjelu moko, ye mosantu, kokita wuta na Lola mpe koloba: « Kweyisa nzete wana mpe boma yango, kasi tika mobimbi na yango mpe kanga yango minyololo ya bibende mpe ya bronze kati na matiti ya zamba, mpe tika ete misisa na yango etikala na se ya mabele! Tika ete mamwe epolisa yango mpe ebika lokola banyama ya zamba, kino mibu sambo ekoleka mpo na ye. »
王既看見一位守望的聖者從天而降,說:『將這樹砍伐毀壞,樹触卻要留在地內,用鐵圈和銅圈箍住;在田野的青草中,讓天露滴濕,使他與地上的獸一同吃草,直到經過七期。』
24 Oh mokonzi, tala ndimbola na yango; mpe ezali mokano ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo, oyo atombokeli nkolo na ngai:
「王啊,講解就是這樣:臨到我主我王的事是出於至高者的命。
25 « Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba; okobanda kolia matiti ya zamba lokola ngombe, mpe mamwe ekopolisa nzoto na yo. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala makambo oyo Ye alingi kati na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi.
你必被趕出離開世人,與野地的獸同居,吃草如牛,被天露滴濕,且要經過七期。等你知道至高者在人的國中掌權,要將國賜與誰就賜與誰。
26 Etinda ya kotika mobimbi ya nzete mpe misisa na yango elingi koloba ete bokonzi na yo ekozongela yo lisusu tango okondima ete Nzambe ya likolo azali Mokonzi ya bakonzi.
守望者既吩咐存留樹触,等你知道諸天掌權,以後你的國必定歸你。
27 Yango wana, oh mokonzi, yamba na esengo toli oyo nakopesa yo: ‹ Tika masumu na yo mpe sala makambo oyo ezali sembo! Tika motema mabe mpe yokela babola mawa! Na bongo nde kimia mpe bomengo na yo ekowumela. › »
王啊,求你悅納我的諫言,以施行公義斷絕罪過,以憐憫窮人除掉罪孽,或者你的平安可以延長。」
28 Makambo wana nyonso ekokokisama mpo na mokonzi Nabukodonozori.
這事都臨到尼布甲尼撒王。
29 Sima na basanza zomi na mibale, wana mokonzi azalaki kotambola na veranda ya ndako ya bokonzi, na Babiloni,
過了十二個月,他遊行在巴比倫王宮裏。
30 amilobelaki: « Boni! Oyo ezali te Babiloni monene oyo natongaki lokola ndako ya mokonzi, na makasi na ngai, na nguya na ngai mpe mpo na lokumu ya bokonzi na ngai? »
他說:「這大巴比倫不是我用大能大力建為京都,要顯我威嚴的榮耀嗎?」
31 Wana azalaki nanu komilobela, mongongo moko ewutaki na likolo, elobaki: — Tala makambo oyo ekatami mpo na yo, mokonzi Nabukodonozori: « Nguya ya bokonzi elongwe na maboko na yo.
這話在王口中尚未說完,有聲音從天降下,說:「尼布甲尼撒王啊,有話對你說,你的國位離開你了。
32 Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba; okokoma kolia matiti lokola ngombe. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala oyo Ye alingi, na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi. »
你必被趕出離開世人,與野地的獸同居,吃草如牛,且要經過七期。等你知道至高者在人的國中掌權,要將國賜與誰就賜與誰。」
33 Mbala moko, makambo nyonso oyo elobamaki na tina na Nabukodonozori ekokisamaki. Babenganaki ye na molongo ya bato mpe akomaki kolia matiti lokola ngombe; mamwe ekomaki kopolisa nzoto na ye kino suki na ye ekomaki milayi lokola masala ya mpongo ya mobange, mpe manzaka na ye lokola manzaka ya ndeke.
當時這話就應驗在尼布甲尼撒的身上,他被趕出離開世人,吃草如牛,身被天露滴濕,頭髮長長,好像鷹毛;指甲長長,如同鳥爪。
34 Na suka ya tango oyo esakolamaki, ngai Nabukodonozori, natombolaki miso na ngai na likolo, mpe mayele na ngai ezongelaki ngai. Nasanzolaki Ye-Oyo-Aleki-Likolo, napesaki lokumu mpe nkembo epai na Ye oyo azali na bomoi tango nyonso:
日子滿足,我-尼布甲尼撒舉目望天,我的聰明復歸於我,我便稱頌至高者,讚美尊敬活到永遠的上帝。 他的權柄是永有的; 他的國存到萬代。
35 Bato nyonso ya mokili bazali pamba na miso na Ye;
世上所有的居民都算為虛無; 在天上的萬軍和世上的居民中, 他都憑自己的意旨行事。 無人能攔住他手, 或問他說,你做甚麼呢?
36 Kaka tango mayele na ngai ezongelaki ngai, lokumu mpe nkembo na ngai ezongelaki ngai mpo na nkembo ya bokonzi na ngai; bapesi toli na ngai mpe bato na ngai ya lokumu bakomaki koluka ngai mpe bazongiselaki ngai kiti na ngai ya bokonzi. Nakomaki lisusu na lokumu makasi koleka oyo nazalaki na yango liboso.
那時,我的聰明復歸於我,為我國的榮耀、威嚴,和光耀也都復歸於我;並且我的謀士和大臣也來朝見我。我又得堅立在國位上,至大的權柄加增於我。
37 Sik’oyo ngai Nabukodonozori, nakumisi, nanetoli mpe nasanzoli Mokonzi ya Lola, oyo misala na Ye nyonso ezali sembo, banzela na Ye ezali alima, mpe azali na makoki ya kosambwisa bato oyo bamitombolaka na lolendo.
現在我-尼布甲尼撒讚美、尊崇、恭敬天上的王;因為他所做的全都誠實,他所行的也都公平。那行動驕傲的,他能降為卑。

< Daniele 4 >