< Amosi 2 >

1 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ya masumu misato to minei ya Moabi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te batumbaki mikuwa ya mokonzi ya Edomi mpe bakomisaki yango putulu.
主はこう言われる、「モアブの三つのとが、四つのとがのために、わたしはこれを罰してゆるさない。これは彼がエドムの王の骨を焼いて灰にしたからである。
2 Nakotia moto kati na ekolo ya Moabi, mpe moto yango ekozikisa bandako ya engumba ya Kerioti, oyo batonga makasi. Moabi ekokufa kati na lokito ya makasi, na makelele ya bitumba mpe ya kelelo.
それゆえ、わたしはモアブに火を送り、ケリオテのもろもろの宮殿を焼き滅ぼす。モアブは騒ぎと、ときの声と、ラッパの音の中に死ぬ。
3 Nakobebisa mokonzi na yango mpe nakoboma ye elongo na bakalaka na ye, » elobi Yawe.
わたしはそのうちから、支配者を断ち、そのすべてのつかさを彼と共に殺す」と主は言われる。
4 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ya masumu misato to minei ya Yuda, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te babwakaki Mobeko na Ngai, babatelaki te bikateli na Ngai mpe babungaki nzela mpo na kolanda banzambe ya lokuta oyo bakoko na bango balandaki na tango ya kala.
主はこう言われる、「ユダの三つのとが、四つのとがのために、わたしはこれを罰してゆるさない。これは彼らが主の律法を捨て、その定めを守らず、その先祖たちが従い歩いた偽りの物に惑わされたからである。
5 Nakotia moto kati na ekolo ya Yuda, mpe moto yango ekozikisa bandako ya engumba Yelusalemi, oyo batonga makasi. »
それゆえ、わたしはユダに火を送り、エルサレムのもろもろの宮殿を焼き滅ぼす」。
6 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ya masumu misato to minei ya Isalaele, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te batekaki bato ya sembo mpo na kozwa kaka palata, mpe bato bakelela mpo na kozwa kaka mapapa mibale.
主はこう言われる、「イスラエルの三つのとが、四つのとがのために、わたしはこれを罰してゆるさない。これは彼らが正しい者を金のために売り、貧しい者をくつ一足のために売るからである。
7 Bazali konyata mito ya babola ndenge banyataka putulu ya mabele, mpe bazali kokata na bosembo te makambo ya bato bakelela. Tata mpe mwana na ye ya mobali bazali kosangisa nzoto na mwasi moko ya makangu; mpe na bongo, bazali kotiola bosantu ya Kombo na Ngai.
彼らは弱い者の頭を地のちりに踏みつけ、苦しむ者の道をまげ、また父子ともにひとりの女のところへ行って、わが聖なる名を汚す。
8 Pene ya bitumbelo, bazali kolalela bilamba oyo bazwi na ndanga; mpe kati na ndako ya nzambe na bango, bazali komela vino oyo epesami lokola lomande.
彼らはすべての祭壇のかたわらに質に取った衣服を敷いて、その上に伏し、罰金をもって得た酒を、その神の家で飲む。
9 Nzokande, Ngai, nabebisaki bato ya Amori liboso na bango, atako bazali milayi lokola banzete ya sedele mpe makasi lokola banzete ya sheni. Nabebisaki bambuma na yango na likolo, mpe misisa na yango na se.
さきにわたしはアモリびとを彼らの前から滅ぼした。これはその高きこと、香柏のごとく、その強きこと、かしの木のようであったが、わたしはその上の実と、下の根とを滅ぼした。
10 Nabimisaki bino na Ejipito mpe natambolisaki bino mibu tuku minei kati na esobe mpo na kopesa bino mokili ya bato ya Amori.
わたしはまた、あなたがたをエジプトの地から連れ上り、四十年のあいだ荒野で、あなたがたを導き、アモリびとの地を獲させた。
11 Kati na bana na bino ya mibali, nabimisaki basakoli; mpe kati na bilenge mibali na bino, nabimisaki banaziri. Oh bana ya Isalaele, boni, ezali solo te? » elobi Yawe.
わたしはあなたがたの子らのうちから預言者を起し、あなたがたの若者のうちからナジルびとを起した。イスラエルの人々よ、そうではないか」と主は言われる。
12 « Kasi bino, bolangwisi banaziri masanga mpe bopekisi basakoli ete basakola lisusu te.
「ところがあなたがたはナジルびとに酒を飲ませ、預言者に命じて『預言するな』と言う。
13 Sik’oyo, nakonyata bino ndenge shar oyo etonda na maboke ya bambuma enyataka biloko.
見よ、わたしは麦束をいっぱい積んだ車が物を圧するように、あなたがたをその所で圧する。
14 Moto oyo aleki na mbangu akobika te, moto oyo aleki makasi akokoka kobimisa makasi na ye te, mpe soda ya mpiko akokoka kobikisa bomoi na ye te.
速く走る者も逃げ場を失い、強い者もその力をふるうことができず、勇士もその命を救うことができない。
15 Mobeti tolotolo akolonga te, soda ya mpiko akokoka kokima te, mpe soda oyo atambolaka likolo ya mpunda akobikisa bomoi na ye te;
弓をとる者も立つことができず、足早の者も自分を救うことができず、馬に乗る者もその命を救うことができない。
16 ezala basoda oyo baleki makasi, bakokima bolumbu na mokolo wana, » elobi Yawe.
勇士のうちの雄々しい心の者もその日には裸で逃げる」と主は言われる。

< Amosi 2 >