< Misala ya Bantoma 4 >

1 Wana Petelo mpe Yoane bazalaki nanu koloba na bato, Banganga-Nzambe, mokonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe Basaduseo bayaki,
A když oni mluvili k lidu, přišli na ně kněží, a úředník chrámu a saduceové,
2 na kanda makasi ndenge bamonaki bantoma koteya bato mpe kotatola ete bakufi bakosekwa ndenge Yesu asekwaki.
Těžce to nesouce, že lid učili, a zvěstovali ve jménu Ježíše vzkříšení z mrtvých.
3 Bakangaki Petelo mpe Yoane, bongo babwakaki bango na boloko kino na mokolo oyo elandaki, pamba te pokwa esilaki kokoma.
I vztáhli na ně ruce, a vsadili je do žaláře až do jitra, nebo již byl večer.
4 Kasi kati na bato oyo bayokaki mateya, mingi bandimaki yango; bongo motango ya bandimi ebakisamaki mpe bakomaki bato pene nkoto mitano.
Mnozí pak z těch, kteříž slyšeli slovo, uvěřili. I učiněn jest počet mužů okolo pěti tisíců.
5 Boye, mokolo oyo elandaki, bakonzi ya Bayuda, bakambi ya bato mpe balakisi ya Mobeko basanganaki na Yelusalemi.
Stalo se pak nazejtří, že se sešla knížata jejich, a starší, a zákonníci v Jeruzalémě,
6 Ana, mokonzi ya Banganga-Nzambe, azalaki wana elongo na Kayifa, Yoane, Alekizandre mpe bato mosusu ya libota ya mokonzi ya Banganga-Nzambe.
A Annáš nejvyšší kněz, a Kaifáš, a Jan a Alexander, a kteřížkoli byli z pokolení nejvyššího kněze.
7 Bamemaki Petelo mpe Yoane liboso na bango, mpe bakomaki kotuna bango mituna: — Bozali kosala makambo oyo na nguya nini to na kombo ya nani?
I postavivše je mezi sebou, otázali se: Jakou mocí aneb v kterém jménu učinili jste to vy?
8 Bongo, Petelo oyo atondisamaki na Molimo Mosantu alobaki na bango: — Bakonzi mpe bakambi ya bato!
Tehdy Petr, jsa pln Ducha svatého, řekl jim: Knížata lidu a starší Izraelští,
9 Lokola botuni biso lelo na tina na bolamu oyo esalemi epai ya mokufi makolo mpe ndenge nini asili kobika,
Poněvadž my dnes k soudu jsme přivedeni pro dobrodiní člověku nemocnému, kterak by on zdráv učiněn byl:
10 tika ete, bino nyonso mpe bato nyonso ya Isalaele, boyeba ete ezali na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti nde moto oyo atelemi liboso na bino na nzoto kolongono; kaka Yesu oyo bino bobakaki na ekulusu, kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi.
Známo buď všechněm vám i všemu lidu Izraelskému, že ve jménu Ježíše Krista Nazaretského, kteréhož jste vy ukřižovali, jehož Bůh vzkřísil z mrtvých, skrze toho jméno tento stojí před vámi zdravý.
11 Ye nde azali « libanga oyo bino, batongi ndako, bobwakaki, kasi ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba. »
Toť jest ten kámen za nic položený od vás stavitelů, kterýž jest v hlavu úhelní.
12 Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso.
A neníť v žádném jiném spasení; neboť není jiného jména pod nebem daného lidem, skrze kteréž bychom mohli spaseni býti.
13 Wana bamonaki ndenge nini Petelo mpe Yoane bazalaki koloba na mpiko, mpe wana basosolaki ete bazali bato batanga te mpe bato pamba, bakamwaki mingi. Boye, basosolaki ete bango mpe bazalaki elongo na Yesu.
I vidouce takovou udatnost a smělost v mluvení Petrovu a Janovu, a shledavše, že jsou lidé neučení a prostí, divili se, a poznali je, že s Ježíšem bývali.
14 Kasi, lokola bazalaki komona moto oyo abikisamaki atelemi elongo na bango, bazalaki ata na liloba moko te ya koloba.
Člověka také toho vidouce, an stojí s nimi, kterýž byl uzdraven, neměli co mluviti proti nim.
15 Bongo, bapesaki mitindo ete babimisa bango na Likita-Monene; mpe batikalaki bango moko mpo na koyekola likambo yango malamu.
I rozkázavše jim vystoupiti z rady, rozmlouvali vespolek,
16 Bazalaki kotunana: — Tosala penza nini na bato oyo? Pamba te bavandi nyonso ya Yelusalemi bayebi malamu ete bango nde basalaki likamwisi wana ya monene; tokoki kowangana yango te.
Řkouce: Co učiníme lidem těmto? Nebo že zjevný zázrak stal se skrze ně, všechněm přebývajícím v Jeruzalémě známé jest, aniž můžeme zapříti.
17 Kasi, mpo ete sango ya likambo oyo ekoba te kopanzana kati na bato, tokebisa bango boye: « Bomeka lisusu te koloba na Kombo na Yesu, ezala ata na nani! »
Ale aby se to více nerozhlašovalo v lidu, s pohrůžkou přikažme jim, aby více v tom jménu žádnému z lidí nemluvili.
18 Bongo, babengaki Petelo elongo na Yoane mpe bapekisaki bango ete bameka lisusu te koloba to koteya na Kombo na Yesu, ezala ata na lolenge nini.
I povolavše jich, přikázali jim, aby nikoli nemluvili, ani neučili ve jménu Ježíšovu.
19 Kasi Petelo mpe Yoane bazongiselaki bango: — Botala nanu ata bino moko, eloko nini ezali sembo na miso ya Nzambe: kotosa bino to kotosa Nzambe?
Tedy Petr a Jan odpovídajíce jim, řekli: Jest-li to spravedlivé před oblíčejem Božím, abychom vás více poslouchali než Boha, suďte.
20 Pamba te biso, tokokoka te kotika koloba makambo oyo tomonaki mpe toyokaki!
Neboť my nemůžeme nemluviti toho, co jsme viděli a slyšeli.
21 Sima na kogangela bango, batikaki bango mpo ete bakende, pamba te bamonaki te ndenge nini bakokaki kopesa bango etumbu, mpo ete bato nyonso bazalaki kokumisa Nzambe mpo na likambo oyo esalemaki.
A oni pohrozivše jim, propustili je, nenalezše na nich příčiny trestání, pro lid; nebo všickni velebili Boha z toho, co se bylo stalo.
22 Pamba te moto oyo abikaki na ndenge ya kokamwa azalaki na mibu koleka tuku minei.
Byl zajisté v letech více než ve čtyřidcíti člověk ten, při kterémž se byl stal zázrak ten uzdravení.
23 Tango batikaki bango, Petelo mpe Yoane bakendeki koyebisa baninga na bango makambo nyonso oyo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi balobelaki bango.
A jsouce propuštěni, přišli k svým, a pověděli, co k nim přední kněží a starší mluvili.
24 Tango bayokaki bongo, batombolaki mingongo na bango elongo mpo na kobondela Nzambe; balobaki: — Nkolo Yawe, Yo nde okela Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango;
Kteříž uslyševše to, jednomyslně pozdvihli hlasu k Bohu a řekli: Hospodine, ty jsi Bůh, kterýž jsi učinil nebe i zemi, i moře i všecko, což v nich jest,
25 Yo nde olobaki na nzela ya Molimo Mosantu, na monoko ya koko na biso, Davidi, mosali na yo: « Mpo na nini bikolo ezali kosala makelele, mpe bato bazali kosala makita ya pamba?
Kterýž jsi skrze ústa Davida, služebníka svého, řekl: Proč se bouřili národové, a lidé myslili marné věci?
26 Bakonzi ya mokili batomboki, mpe bakambi basangani mpo na kotelemela Nkolo mpe Mopakolami na Ye. »
Postavili se králové zemští, a knížata sešla se vespolek proti Pánu a proti pomazanému jeho.
27 Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki penza kati na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo mosusu mpe bana ya Isalaele, mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na Yo, Mosantu, oyo obulisa.
Právěť se jistě sešli proti svatému Synu tvému Ježíšovi, kteréhož jsi pomazal, Heródes a Pontský Pilát, s pohany a lidem Izraelským,
28 Ezali ndenge wana nde bakokisaki mabongisi oyo osala wuta kala, na nguya mpe na mokano na Yo.
Aby učinili to, což ruka tvá a rada tvá předuložila, aby se stalo.
29 Sik’oyo Nkolo, tala ndenge bazali kotungisa biso, mpe pesa basali na Yo makasi ya koteya Liloba na Yo na molende nyonso.
A nyní, Pane, pohlediž na pohrůžky jejich, a dejž služebníkům svým mluviti slovo své svobodně a směle,
30 Boye, sembola loboko na Yo mpo na kobikisa babeli, kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene, na Kombo na Yesu, Mosali na Yo, Mosantu.
Vztahuje ruku svou k uzdravování a k činění divů a zázraků, skrze jméno svatého Syna tvého Ježíše.
31 Boye, tango basilisaki kobondela, esika oyo basanganaki eninganaki; bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe bakomaki koteya Liloba na Nzambe na molende nyonso.
A když se oni modlili, zatřáslo se to místo, na kterémž byli shromážděni, a naplněni jsou všickni Duchem svatým, a mluvili slovo Boží směle a svobodně.
32 Bandimi nyonso bazalaki motema moko mpe makanisi moko. Moko te kati na bango azalaki koloba ete biloko na ye ezali kaka ya ye moko, kasi biloko nyonso ezalaki mpo na bango nyonso.
Toho pak množství věřících bylo jedno srdce a jedna duše. Aniž kdo co z těch věcí, kteréž měl, svým vlastním býti pravil, ale měli všecky věci obecné.
33 Bantoma bakobaki kotatola lisekwa ya Nkolo Yesu na nguya monene, mpe ngolu monene ezalaki na bango nyonso.
A mocí velikou vydávali apoštolé svědectví o vzkříšení Pána Ježíše, a milost veliká přítomná byla všechněm jim.
34 Moko te kati na bango akelelaki; pamba te bato oyo bazalaki na mabele to na bandako bazalaki koteka yango, bazalaki komema mbongo oyo batekelaki
Žádný zajisté mezi nimi nebyl nuzný; nebo kteřížkoli měli pole neb domy, prodávajíce, přinášeli peníze, za kteréž prodávali,
35 mpe kotia yango na makolo ya bantoma. Bantoma bazalaki kokabola yango na moto na moto, kolanda bosenga na ye.
A kladli před nohy apoštolské. I bylo rozdělováno to jednomu každému, jakž komu potřebí bylo.
36 Boye, Jozefi, moto ya libota ya Levi, oyo abotama na esanga Shipre mpe bantoma bapesaki ye kombo mosusu, Barnabasi oyo elakisi « molendisi, »
Jozes pak, kterýž přijmí měl od apoštolů Barnabáš, (což se vykládá syn utěšení, ) z pokolení Levítského, z Cypru rodem,
37 atekaki mpe elanga na ye mpe amemaki mbongo epai ya bantoma.
Měv pole, prodal je, a přinesl peníze, a položil k nohám apoštolským.

< Misala ya Bantoma 4 >