< Misala ya Bantoma 3 >

1 Ezalaki mokolo moko, Petelo mpe Yoane bakendeki na Tempelo na tango ya mabondeli: ezalaki na ngonga ya misato sima na midi.
Now Peter and John were going up into the temple at the hour of prayer, the ninth hour.
2 Nzokande, ezalaki mpe na bato moko oyo bazalaki komema moto moko akufa makolo wuta abotama, mpe bazalaki kotia ye mikolo nyonso na ekuke ya Tempelo mpo ete asengaka mbongo epai ya bato oyo bazalaki kokota. Bazalaki kobenga ekuke yango « Ekuke ya kitoko. »
Now a man lame from birth was being carried every day to the Beautiful gate of temple, so he could ask people who were going into the temple for a gift of money.
3 Tango amonaki Petelo mpe Yoane kokota na Tempelo, asengaki bango likabo ya mawa.
When he saw Peter and John about to enter the temple, he asked them for a gift of money.
4 Boye, Petelo mpe Yoane batalaki ye malamu, mpe Petelo alobaki na ye: — Tala biso!
Peter, fastening his eyes upon him, with John, said, “Look at us.”
5 Moto yango atalaki bango malamu penza, na likanisi ya kozwa eloko epai na bango.
The lame man looked at them, expecting to receive something from them.
6 Kasi Petelo alobaki na ye: — Nazangi mbongo to wolo ya kopesa yo, kasi oyo nazali na yango, nazali kopesa yo yango: na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti, telema mpe tambola.
But Peter said, “Silver and gold I do not have, but what I do have, I will give to you. In the name of Jesus Christ of Nazareth, walk.”
7 Bongo, asimbaki ye na loboko ya mobali mpe atelemisaki ye. Mbala moko, makolo na ye ekomaki makasi.
Taking him by the right hand, Peter raised him up, and immediately the man's feet and ankle were made strong.
8 Mbala moko, atelemaki mpe abandaki kotambola, akotaki nzela moko na bango kati na lopango ya Tempelo: azalaki kotambola, kopumbwa mpe kokumisa Nzambe.
Leaping up, the lame man stood and began to walk; and he entered with Peter and John into the temple, walking, leaping, and praising God.
9 Tango bato nyonso bamonaki ye kotambola mpe kokumisa Nzambe,
All the people saw him walking and praising God.
10 basosolaki ete ezali moto oyo azalaki kovanda na « Ekuke ya kitoko » ya Tempelo mpo na kosenga makabo ya mawa. Bango nyonso bakamwaki mingi penza, mpe somo ekangaki bango mpo na makambo oyo esalemaki epai na ye.
They noticed that it was the man who had been asking people for a gift of money at the Beautiful Gate of the temple; and they were filled with wonder and amazement because of what had happened to him.
11 Lokola moto yango atingamaki na Petelo mpe Yoane, bato nyonso bakamwaki mpe bayaki na lombangu epai na bango, na esika oyo babengaka « Veranda ya Salomo. »
As he was holding on to Peter and John, all the people ran together to them in the porch that is called Solomon's, greatly marveling.
12 Tango Petelo amonaki bongo, alobaki na bango: — Bato ya Isalaele, mpo na nini bozali kokamwa likambo oyo? Mpo na nini bozali kotala biso lokola nde biso bato tosali ete moto oyo atambola, na nzela ya nguya mpe botosi na biso kati na makambo ya Nzambe?
When Peter saw this, he answered the people, “You men of Israel, why do you marvel? Why do you fix your eyes on us, as if we had made him to walk by our own power or godliness?
13 Biso te! Ezali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, Nzambe ya bakoko na biso, nde apesi nkembo na Yesu, Mosali na Ye, oyo bino bokabaki mpo ete baboma Ye. Yango wana, bowanganaki Ye liboso ya Pilato tango azwaki mokano ya kokangola Ye.
The God of Abraham, and of Isaac, and of Jacob, the God of our fathers, has glorified his servant Jesus. He is the one whom you delivered up and rejected before the face of Pilate, when he had decided to release him.
14 Bowanganaki Ye oyo azali Mosantu mpe Sembo. Boye, bosengaki ete Pilato atikela bino mobomi na esika ya Yesu.
You rejected the Holy and Righteous One, and you asked instead for a murderer to be released to you.
15 Bobomaki nde Mobandisi ya bomoi. Kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, bongo biso tozali penza batatoli ya likambo yango.
You killed the Founder of life, whom God raised from the dead—and we are witnesses of this.
16 Ezali na nzela ya kondima kati na Kombo na Yesu nde moto oyo bozali komona mpe boyebi azwi makasi ya kotelema. Ezali Kombo na Yesu mpe kondima oyo ewuti kati na Yesu nde ekomisi nzoto na ye mobimba kolongono ndenge bozali komona yango.
Now, by faith in his name—this man whom you see and know—this same name made him strong. The faith that is through Jesus gave to him this complete health in the presence of all of you.
17 Sik’oyo bandeko na ngai, nayebi ete bosalaki makambo na kozanga boyebi, ndenge bakonzi na bino basalaki.
Now, brothers, I know that you acted in ignorance, as did also your rulers.
18 Kasi ezali ndenge wana nde Nzambe akokisaki makambo oyo aloba wuta kala na nzela ya basakoli nyonso, ete Klisto na Ye asengeli komona pasi.
But the things which God foretold by the mouth of all the prophets, that his Christ should suffer, he has now fulfilled.
19 Yango wana, bobongola mitema mpe bozonga epai ya Nzambe mpo ete alimbisa masumu na bino,
Repent, therefore, and turn, so that your sins may be blotted out, so that there may come periods of refreshing from the presence of the Lord;
20 mpe mpo ete Nkolo akoka kopesa bino tango ya kopema mpe akoka kotindela bino Klisto oyo apona mpo na bino—Ye nde Yesu.
and that he may send the Christ who has been appointed for you, Jesus.
21 Asengeli kotikala kuna na Likolo kino na tango oyo Nzambe akobongisa biloko nyonso, ndenge alaka yango wuta kala na nzela ya babulami na Ye, basakoli. (aiōn g165)
He is the One heaven must receive until the time of the restoration of all things, about which God spoke long ago by the mouth of his holy prophets. (aiōn g165)
22 Pamba te Moyize alobaki: « Yawe, Nzambe na bino, akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino; bosengeli kotosa nyonso oyo akoloba na bino.
Moses indeed said, 'The Lord God will raise up a prophet like me from among your brothers. You shall listen to everything that he will speak to you.
23 Moto nyonso oyo akotosa te mosakoli yango, bakolongola ye kati na bato na ye na nzela ya kufa. »
It will happen that every person who does not listen to that prophet will be completely destroyed from among the people.'
24 Basakoli nyonso, kobanda na Samuele kino na basakoli oyo bayaki sima na ye, bango nyonso basakolaki na tina na makambo oyo ezali kosalema na mikolo oyo.
Yes, and all the prophets from Samuel and those who came after him, they spoke out and announced these days.
25 Bino nde bozali bakitani ya basakoli mpe ya Boyokani oyo Nzambe asalaki elongo na bakoko na bino, tango alobaki na Abrayami: « Nakopambola mabota nyonso ya mokili na nzela ya bakitani na yo! »
You are the sons of the prophets and of the covenant that God made with your ancestors, as he said to Abraham, 'In your seed shall all the families of the earth be blessed.'
26 Tango Nzambe asekwisaki Mosali na Ye, atindaki Ye nanu epai na bino mpo ete apambola bino na kolongola, moko na moko kati na bino, mosika na banzela na bino ya mabe.
After God raised up his servant, he sent him to you first, in order to bless you by turning every one of you from your wickedness.”

< Misala ya Bantoma 3 >