< Misala ya Bantoma 15 >

1 Ndambo ya bato bawutaki na Yuda mpe bakomaki na Antioshe, mpe bakomaki koteya bandeko: — Soki bokatisi ngenga te kolanda Mobeko ya Moyize, bokoki te kozwa lobiko.
І, поприходивши деякі з Юдеї, навчали братів: що коли не обріжетесь по звичаю Мойсейовому, не можете спасти ся.
2 Polo mpe Barnabasi batelemelaki bato wana; bongo kobendana makasi ekotaki kati na bango na tina na likambo yango. Boye, bazwaki mokano ete Polo, Barnabasi mpe ndambo ya bandimi mosusu bakende na Yelusalemi elongo na bantoma mpe bakambi ya Lingomba mpo na kolobela likambo yango.
Як же почав ся спір і немале змаганнє Павла та Варнави з ними, то постановили, щоб Павел та Варнава і деякі инші з них пійшли до апостолів та старших у Єрусалим ради сього питання.
3 Lingomba esungaki bango mpo na mobembo. Wana bakatisaki Fenisi mpe Samari, bazalaki koloba ndenge nini bato ya bikolo ya bapaya bazalaki kobongola mitema. Sango oyo ezalaki kopesa bandeko nyonso esengo.
Вони ж, послані від церкви, проходили Финикию та Самарию, оповідуючи про наверненнє поган; і зробили великі радощі всїм братам.
4 Tango bakomaki na Yelusalemi, Lingomba, bantoma mpe bakambi bayambaki bango; mpe Polo elongo na Barnabasi bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango.
Прийшовши ж у Єрусалим, прийняті були від церкви і апостолів і старших, і сповістили про все, що Бог з ними зробив.
5 Ndambo ya bandimi oyo bazalaki kala Bafarizeo batelemaki mpo na koloba: — Bato ya bikolo ya bapaya basengeli kokatama ngenga, mpe esengeli kotinda bango kotosa Mobeko ya Moyize.
Устали ж деякі з єресї Фарисейської, що увірували, кажучи, що треба обрізати їх та наказати, щоб хоронили закон Мойсеїв.
6 Bantoma mpe bakambi basanganaki mpo na koyekola malamu likambo yango.
І зібрались апостоли та старші вглянути в сю річ.
7 Lokola tembe elekaki makasi, Petelo atelemaki mpe alobaki: — Bandeko na ngai, boyebi malamu ete Nzambe apona ngai wuta kala kati na bino mpo ete nakoka koteya Sango Malamu epai ya bato ya bikolo ya bapaya, mpo ete bango mpe bakoka koyoka yango mpe bakoma bandimi.
Як же постало велике змаганнє, вставши Петр, рече до них: Мужі брати, ви знаєте, що з давніх днїв Бог між нами вибрав мене, щоб через мої уста погане чули слово благовістя, та й увірували.
8 Bongo, Nzambe oyo ayebi mitema ya bato alakisaki ete andimaki bango na nzela ya kopesa bango Molimo Mosantu, ndenge kaka apesaki biso.
І Бог, що знав серця, сьвідкував їм, давши їм Духа сьвятого, як нам,
9 Asalaki bokeseni te kati na biso mpe bango, pamba te akomisaki mitema na bango peto na nzela ya kondima.
і не розріжнив нічого між нами й ними, вірою очистивши серця їх.
10 Bongo mpo na nini bolingi sik’oyo komeka Nzambe, na nzela ya koluka komemisa bayekoli oyo, mokumba oyo tolongaki te komema, ezala biso to batata na biso?
Тепер же чого спокутуєте Бога, щоб наложив ярмо на шию ученикам, котрого нї батьки наші, ні ми не здолїли носити.
11 Te! Biso tondimaka ete tobiki na ngolu ya Nkolo Yesu, ndenge moko kaka na bango.
Нї віруємо, що благодаттю Господа Ісуса Христа спасемось, яко ж і вони.
12 Lisanga mobimba evandaki kimia wana bazalaki koyoka Barnabasi mpe Polo koyebisa bango bikamwa mpe bilembo oyo Nzambe asalaki na nzela na bango, kati na bato ya bikolo ya bapaya.
Умовкла ж уся громада, й слухала, як Варнава та Павел оповідували про ознаки та чудеса, що зробив Бог через них між поганами.
13 Tango basilisaki koloba, Jake azwaki maloba mpe alobaki: — Bandeko, boyoka ngai!
Як же вмовкли вони, озвав ся Яков, говорячи: Мужі брати, вислухайте мене.
14 Simona awuti koyebisa biso ndenge nini, wuta na ebandeli, Nzambe aponaki bato kati na bikolo ya bapaya ete bazala bato na Ye.
Симон оповів, як Бог перше зглянув ся, щоб з поган прийняти людей в імя своє.
15 Makambo oyo ekokani na maloba ya basakoli, kolanda ndenge ekomama:
З сим сходять ся слова пророчі, яко ж писано:
16 « Sima na yango, nakozonga, nakotonga lisusu ndako ya kapo ya Davidi, oyo esila kokweya; nakotonga yango lisusu mpe nakotelemisa yango,
Після сього знов верну ся, і збудую намет Давидів, що впав, і руїни його збудую знов і поставлю його,
17 mpo ete bato oyo bakotikala baluka Nkolo, ezala bato nyonso ya bikolo ya bapaya oyo babengamaka na Kombo na Ngai, elobi Nkolo oyo asalaka makambo oyo,
щоб остальні з людей шукали Господа, і всї народи, на котрих призвано імя моє, глаголе Господь, що робить оце все.
18 makambo oyo eyebana wuta kala. » (aiōn g165)
Звісні од віку Богові всі діла Його. (aiōn g165)
19 Yango wana, tala likanisi na ngai: Tosengeli te kotungisa bato ya bikolo ya bapaya oyo bandimeli Nzambe.
То ж суджу, що не треба тим докучати, которі від поган обернулись до Бога;
20 Na esika ya kotungisa bango, tosengeli kaka kokomela bango ete balia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, basala kindumba te, balia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bamela makila te.
а написати їм, нехай удержують ся від ідолських гидот, та блуду, та давленого, та крови.
21 Pamba te wuta kala, kati na bingumba nyonso, ezali na bato oyo bateyaka Mobeko ya Moyize, mpe batangaka yango kati na bandako ya mayangani, mikolo nyonso ya Saba.
Мойсей бо від стародавніх родів має проповідуючих його по городах, і читаний по школах що-суботи.
22 Bantoma, bakambi elongo na Lingomba mobimba bazwaki mokano ya kopona ndambo ya bato kati na bango mpe ya kotinda bango na Antioshe elongo na Polo mpe Barnabasi. Baponaki Yuda oyo babengaka Barsabasi, mpe Silasi; bango mibale bazalaki bakambi kati na bandeko.
Зводили тодї апостоли і старші і вся церква вибраних мужів з між себе післати в Антиохию з Павлом та Варнавою: Юду, названого Варсавою, та Силу, мужів-проводирів мізк братами,
23 Bapesaki bango mokanda oyo ekomamaki boye: Biso bantoma mpe bakambi, bandeko na bino: Epai ya bato ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na Antioshe, na Siri mpe na Silisi; Mbote na bino.
написавши через руки їх так: Апостоли та старші і брати - братам з поган, що в Антиохиї, і Сириї і Киликиї, радуйте ся.
24 Toyokaki ete bandeko mosusu bawutaki epai na biso, ba-oyo topesaki ata nzela te, bayaki kotia mobulu kati na bino, batiaki penza mobulu kati na bino mpe batungisaki mitema na bino na nzela ya maloba na bango. Nzokande, totindaki bango te.
Яко ж чули ми, що деякі з між нас вийшовши, потрівожили вас словами і захитали душі ваші, говорячи, щоб обрізувались та хоронили закон, чого ми їм не наказували;
25 Boye, biso nyonso toyokanaki mpo na kopona bato mpe kotindela bino bango, elongo na bandeko balingami na biso, Barnabasi mpe Polo,
то зводилось нам, зібравшим ся однодушне вибраних мужів післати до вас з любими нашими Варнавою та Павлом,
26 ba-oyo bakaba bomoi na bango mpo na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
людьми, що віддавали душі свої за імя Господа нашого Ісуса Христа.
27 Yango wana, totindeli bino Yuda mpe Silasi mpo ete bakoka koyebisa bino makambo oyo tokomi kati na mokanda oyo.
Післали ми оце Юду та Силу, котрі й самі розкажуть про те словом.
28 Molimo Mosantu mpe biso tomoni malamu ete tomemisa bino mikumba mosusu te, longola kaka bikateli oyo:
Зводилось бо сьвятому Духу та й нам, ніякої тяготи більш не накладувати вам, опріч сього конечного:
29 Bolia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bomela makila te, bolia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bosala kindumba te. Ekozala malamu soki bokimi makambo yango. Botikala malamu!
щоб удержувались від жертів ідолам, та крови, та давленого, та блуду. Від чого оберегаючи себе, добре робити мете. Бувайте здорові.
30 Boye, batikaki bango kokende na Antioshe epai wapi basangisaki Lingomba mobimba mpe bapesaki mokanda yango.
Послані ж прийшли в Антиохию і, зібравши громаду, подали посланнє.
31 Bato batangaki mokanda yango mpe basepelaki mingi na malendisi oyo ezalaki kati na yango.
Прочитавши ж (ті), зраділи від сього потїшення.
32 Lokola Yuda mpe Silasi bazalaki basakoli, bazwaki penza tango molayi mpo na koloba na bandeko mpe kolendisa bango ete bayika mpiko kati na kondima.
Юда ж та Сила, будучи самі пророками, многими словами втїшали братів і утверджували.
33 Bawumelaki wana mwa tango, mpe bandeko batombelaki bango kimia mpo na bozongi epai ya bato oyo batindaki bango. [
Пробувши ж (там якийсь) час, відпущені були з упокоєм од братів до апостолів.
34 Kasi Silasi asepelaki kotikala wana.]
Зводив же Сила зостатись там.
35 Polo mpe Barnabasi batikalaki na Antioshe epai wapi, elongo na bato mosusu ebele, bazalaki koteya mpe kosakola Liloba na Nkolo.
Павел же та Варнава пробували в Антиохиї, навчаючи та благовіствуючи слово Господнє з многими иншими.
36 Sima na mwa mikolo, Polo alobaki na Barnabasi: — Tozonga na bingumba nyonso epai wapi toteyaki Liloba na Nkolo, mpo ete totala bandeko mpo na koyeba soki bazali ndenge nini.
По кількох же днях рече Павел до Варнави: Вернувшись одвідаємо братів наших по всіх городах, де проповідували ми слово Господнє, як вони мають ся.
37 Barnabasi azalaki na posa ya komema, elongo na bango, Yoane oyo babengaka mpe Malako;
Варнава ж раяв узяти з собою Йоана, званого Марком.
38 kasi Polo asepelaki te ete bamema ye elongo na bango, pamba te akabwanaki na bango na Pafili mpe akobaki lisusu te elongo na bango kati na mosala.
Павло ж не удостоїв брати з собою того, хто одлучивсь од них з Памфилиї, і не пійшов з ними на діло.
39 Boye, babendanaki makasi penza mpe basukaki na kokabwana. Barnabasi azwaki Malako mpe akotaki elongo na ye kati na masuwa mpo na kokende na Shipre.
Постала ж ріжниця, так, що вони розлучились між собою; і Варнава, взявши Марка, поплив у Кипр,
40 Kasi Polo azwaki Silasi mpe akendeki elongo na ye, sima na bandeko kotika bango na se ya ngolu ya Nkolo.
Павел же, вибравши Силу, пійшов, переданий благодатї Божій від братів,
41 Atambolaki kati na Siri mpe na Silisi mpo na kolendisa Mangomba.
і проходив Сирию і Киликию, утверджаючи церкви.

< Misala ya Bantoma 15 >