< 2 Samuele 17 >

1 Ayitofeli alobaki na Abisalomi: — Nakopona mibali nkoto zomi na mibale mpe nakolanda Davidi na pokwa ya lelo.
Moreover Ahithophel said to Absalom, "Let me now choose twelve thousand men, and I will arise and pursue after David tonight.
2 Nakobundisa ye tango makasi na ye ekosila mpe nzoto na ye ekolemba; nakoyeisa mobulu epai na ye, mpe wana bato nyonso oyo bazali elongo na ye bakokima, ngai nakoboma ye mokonzi tango akotikala ye moko;
I will come on him while he is weary and exhausted, and will make him afraid. All the people who are with him shall flee. I will strike the king only,
3 mpe nakozongisa bato nyonso epai na yo. Kufa ya moto oyo ozali koluka elakisi kozonga ya bato nyonso! mpe bato nyonso bakozala na kimia.
and I will bring back all the people to you, as a bride returns to her husband. You seek the life of only one man; then all the people will be in peace."
4 Makanisi oyo emonanaki ya sembo na miso ya Abisalomi mpe ya bampaka nyonso ya Isalaele.
The saying pleased Absalom well, and all the elders of Israel.
5 Kasi Abisalomi alobaki: — Bobengisa lisusu Ushayi, moto ya Ariki, mpo ete toyoka makambo nini oyo ye mpe azali na yango ya koloba.
Then Absalom said, "Now call Hushai the Archite also, and let us hear likewise what he says."
6 Tango Ushayi akomaki epai na ye, Abisalomi alobaki: — Tala toli oyo Ayitofeli apesi. Boni, tosengeli kosala makambo oyo alobi? Soki te, yebisa biso makanisi na yo.
When Hushai had come to Absalom, Absalom spoke to him, saying, "Ahithophel has spoken like this. Shall we do what he says? And if not, speak up."
7 Ushayi azongiselaki Abisalomi: — Ya mbala oyo, toli oyo Ayitofeli apesi ezali malamu te.
Hushai said to Absalom, "The counsel that Ahithophel has given this time is not good."
8 Bongo Ushayi abakisaki: — Oyebi ete tata na yo mpe bato na ye bazali bato ya mpiko mpe bato na kanda makasi lokola ngombolo ya mwasi oyo bawuti kobotola bana na yango kati na zamba. Tata na yo azali moto oyo abundaka bitumba wuta kala, akolekisa te butu esika moko na bato.
Hushai said moreover, "You know your father and his men, that they are mighty men, and they are fierce in their minds, like a bear robbed of her cubs in the field. Your father is a man of war, and will not lodge with the people.
9 Ata azali sik’oyo ya kobombama kati na lidusu ya mabanga to na esika songolo, nzokande tango kaka bato kati na mampinga na biso bakobanda kokufa, ekozanga te komonana moto oyo akoyoka yango mpe akoloba: « Kati na bato oyo bazali kolanda Abisalomi, ebele bakufi. »
Look, he is now hidden in some pit, or in some other place. It will happen, when some of them have fallen at the first, that whoever hears it will say, 'There is a slaughter among the people who follow Absalom.'
10 Bongo na tango yango, ata soda oyo aleki na mpiko, oyo azali na motema lokola ya nkosi, akobanga makasi, pamba te Isalaele mobimba eyebi ete tata na yo mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ye bazali basoda ya mpiko.
Even he who is valiant, whose heart is as the heart of a lion, will utterly melt; for all Israel knows that your father is a mighty man, and those who are with him are valiant men.
11 Boye tala toli na ngai: « Tika ete Isalaele mobimba basangana epai na yo, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bazala ebele lokola zelo ya ebale monene! Bongo yo moko okotambola liboso na bango na bitumba.
But, I strongly advise as follows, that all Israel be gathered together to you, from Dan even to Beersheba, as the sand that is by the sea for multitude; and that you personally go into battle.
12 Bongo tokobundisa ye na bisika nyonso oyo akoki komonana mpe tokokweyela ye ndenge manoka ekweyaka na mabele. Mpe ezala ye to bato na ye, moko te akotikala na bomoi.
So shall we come on him in some place where he shall be found, and we will light on him as the dew falls on the ground; and of him and of all the men who are with him we will not leave so much as one.
13 Soki akimi na engumba moko, Isalaele mobimba ekomema basinga kuna na engumba yango mpe tokobenda engumba yango na lubwaku kino etikala ata na libanga moko te. »
Moreover, if he be gone into a city, then shall all Israel bring ropes to that city, and we will draw it into the river, until there isn't one small stone found there."
14 Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele balobaki: — Toli ya Ushayi, moto ya Ariki, ezali malamu koleka oyo ya Ayitofeli, pamba te Yawe azwaki mokano ya kokakola batoli malamu ya Ayitofeli mpo na komema pasi epai ya Abisalomi.
Absalom and all the men of Israel said, "The counsel of Hushai the Archite is better than the counsel of Ahithophel." For the LORD had ordained to defeat the good counsel of Ahithophel, to the intent that the LORD might bring evil on Absalom.
15 Ushayi alobaki na Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari: — Ayitofeli apesaki toli na Abisalomi mpe na bampaka ya Isalaele ete basala likambo songolo, mpe ngai napesi bango toli ete basala likambo pakala.
Then Hushai said to Zadok and to Abiathar the priests, "Ahithophel counseled Absalom and the elders of Israel that way; and I have counseled this way.
16 Sik’oyo, tinda noki sango epai ya Davidi mpo na koloba na ye: « Kolekisa te butu kati na bitando ya esobe, kasi kende mosika, noki te mokonzi mpe bato oyo bazali elongo na yo bokufa. »
Now therefore send quickly, and tell David, saying, 'Do not lodge this night at the fords of the wilderness, but by all means pass over; lest the king be swallowed up, and all the people who are with him.'"
17 Wana Jonatan mpe Ayimaatsi bavandaki na Eyini-Rogeli, mwasi mosali moko amemelaki bango sango oyo bango basengelaki kokende koyebisa mokonzi Davidi; pamba te basengelaki te kokota kati na engumba mpo ete bamona bango te.
Now Jonathan and Ahimaaz were staying by En Rogel; and a female servant used to go and tell them; and they went and told king David. For they might not be seen to come into the city.
18 Nzokande elenge mobali moko amonaki bango mpe akendeki koyebisa Abisalomi. Boye mibali nyonso mibale bakimaki noki mpe bakendeki na ndako ya moto moko ya Bawurimi. Lokola azalaki na libulu moko ya mayi kati na lopango na ye, bakitaki kuna.
But a boy saw them, and told Absalom. Then they both went away quickly, and came to the house of a man in Bahurim, who had a well in his court; and they went down there.
19 Mwasi na ye akamataki kapo, atiaki yango na monoko ya libulu mpe asopaki bambuma na likolo na yango. Moto moko te ayebaki likambo yango.
The woman took and spread the covering over the well's mouth, and spread out bruised grain on it; and nothing was known.
20 Tango bato ya Abisalomi bayaki epai ya mwasi, batunaki: — Ayimaatsi mpe Jonatan bazali wapi? Mwasi azongiselaki bango: — Bakatisi mayi. Bato ya Abisalomi balukaki, kasi bamonaki moto moko te; mpe bazongaki na Yelusalemi.
Absalom's servants came to the woman to the house; and they said, "Where are Ahimaaz and Jonathan?" The woman said to them, "They have gone over the brook of water." When they had sought and could not find them, they returned to Jerusalem.
21 Tango bakendeki, Ayimaatsi mpe Jonatan babimaki na libulu mpe bakendeki koyebisa mokonzi Davidi: « Botelema mpe bokatisa mayi noki, pamba te Ayitofeli apesi toli moko ya mabe na tina na yo. »
It happened, after they had departed, that they came up out of the well, and went and told king David. And they said to him, "Arise and pass quickly over the water; for thus has Ahithophel counseled against you."
22 Boye Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye batelemaki mpe bakatisaki ebale Yordani. Liboso ete tongo etana, bango nyonso basilisaki kokatisa Yordani, moko te atikalaki.
Then David arose, and all the people who were with him, and they passed over the Jordan. By the morning light there lacked not one of them who had not gone over the Jordan.
23 Tango Ayitofeli amonaki ete balandi te toli na ye, amataki na ane mpe azongaki na ndako na ye kati na engumba na ye. Abongisaki biloko ya ndako na ye mpe amidiembikaki. Boye akufaki mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye.
When Ahithophel saw that his counsel was not followed, he saddled his donkey, and arose, and went home, to his city, and set his house in order, and hanged himself; and he died, and was buried in the tomb of his father.
24 Davidi akendeki na Maanayimi, mpe Abisalomi akatisaki Yordani elongo na bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki elongo na ye.
Then David came to Mahanaim. Absalom passed over the Jordan, he and all the men of Israel with him.
25 Abisalomi atiaki Amasa mokonzi ya mampinga na esika ya Joabi. Amasa azalaki mwana mobali ya Yeteri, moto ya Isalaele, oyo abalaki Abigayili, mwana mwasi ya Naashi mpe ndeko mwasi ya Tseruya, mama ya Joabi.
Absalom set Amasa over the army instead of Joab. Now Amasa was the son of a man, whose name was Jether the Ishmaelite, who went in to Abigail the daughter of Jesse, sister to Zeruiah, Joab's mother.
26 Bato ya Isalaele mpe Abisalomi batongaki molako na bango kati na Galadi.
Israel and Absalom camped in the land of Gilead.
27 Tango Davidi akomaki na Maanayimi, bayambaki ye epai ya Shovi, mwana mobali ya Naashi ya mboka Raba ya bato ya Amoni, epai ya Makiri, mwana mobali ya Amieli ya mboka ya Lo-Debari, mpe epai ya Barizilayi, moto ya Galadi ya mboka Rogelimi.
It happened, when David had come to Mahanaim, that Shobi the son of Nahash of Rabbah of the people of Ammon, and Makir the son of Ammiel of Lodebar, and Barzillai the Gileadite of Rogelim,
28 Bamemaki biloko ya kolalela, bambeki, basani, ble, orje, farine, bambuma oyo bakalinga, madesu, mpe misili,
brought beds, and basins, and pottery utensils, and wheat, and barley, and meal, and parched grain, and beans, and lentils,
29 mafuta ya nzoyi, miliki, bameme, fromaje ya ngombe, mpo ete Davidi elongo na bato na ye balia; pamba te bazalaki kolobana bango na bango: « Solo, sima na bango kotambola kati na esobe, bato oyo balembi, bazali konyokwama na nzala mpe na posa ya mayi. »
and honey, and curd of the flock, and cheese of the herd. And they presented them to David and to the people who were with him to eat. For they said, "The people are hungry and tired and thirsty in the wilderness."

< 2 Samuele 17 >