< 2 Samuele 12 >

1 Yawe atindaki Natan epai ya Davidi. Tango akomaki epai ya Davidi, alobaki na ye: « Ezalaki na bato mibale kati na engumba moko: moko kati na bango azalaki mozwi; mpe mosusu, mobola.
Then the Lord sent Nathan vnto Dauid, who came to him, and sayd vnto him, There were two men in one citie, the one riche, and the other poore.
2 Mozwi azalaki na bameme mpe bangombe ebele,
The rich man had exceeding many sheepe and oxen:
3 kasi mobola azalaki na eloko te longola kaka mwa mwana meme moko ya mwasi oyo asombaki. Abokolaki yango mpe ekolaki epai na ye elongo na bana na ye. Mpate yango ezalaki kolia bilei na sani moko, komela mayi na kopo moko na nkolo na yango mpe kolala na maboko na ye. Ezalaki lokola mwana na ye ya mwasi.
But the poore had none at all, saue one litle sheepe which he had bought, and nourished vp: and it grew vp with him, and with his children also, and did eate of his owne morsels, and dranke of his owne cup, and slept in his bosome, and was vnto him as his daughter.
4 Mokolo moko, mopaya moko ayaki epai ya mozwi, kasi mozwi aboyaki kozwa meme moko kati na bameme na ye to ngombe moko kati na bangombe na ye mpo na kolamba yango mpo na mopaya oyo ayaki epai na ye; azwaki kaka mwa mwana meme ya mwasi ya mobola mpe alambaki yango mpo na mopaya oyo ayaki epai na ye. »
Now there came a stranger vnto the rich man, who refused to take of his owne sheepe, and of his owne oxen to dresse for the stranger that was come vnto him, but tooke the poore mans sheepe, and dressed it for the man that was come to him.
5 Davidi asilikelaki mozwi makasi mpe alobaki na Natan: — Na Kombo na Yawe, moto oyo asali boye asengeli na kufa!
Then Dauid was exceeding wroth with the man, and sayde to Nathan, As the Lord liueth, the man that hath done this thing, shall surely dye,
6 Asengeli kofuta mwa mwana meme yango mbala minei, pamba te azalaki na mawa te ya kosala likambo ya boye.
And he shall restore the lambe foure folde, because he did this thing, and had no pitie thereof.
7 Natan alobaki na Davidi: — Moto yango ezali nde yo! Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Napakolaki yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele mpe nakangolaki yo na maboko ya Saulo;
Then Nathan sayd to Dauid, Thou art the man. Thus sayth the Lord God of Israel, I anoynted thee King ouer Israel, and deliuered thee out of the hand of Saul,
8 nakabaki na maboko na yo ndako ya nkolo na yo, Saulo, mpe basi na ye; napesaki yo libota ya Isalaele mpe libota ya Yuda. Bongo soki nyonso wana ezalaki moke koleka, nalingaki kobakisela yo lisusu ebele koleka.
And gaue thee thy lordes house, and thy lords wiues into thy bosome, and gaue thee the house of Israel, and of Iudah, and would moreouer (if that had bene too litle) haue giuen thee such and such things.
9 Mpo na nini otioli Liloba na Yawe na kosala makambo oyo ezali mabe na miso na Ye? Obomisi Iri, moto ya Iti, na mopanga mpe ozwi mwasi na ye mpo ete akoma mwasi na yo. Obomisi ye na mopanga ya bato ya Amoni.
Wherefore hast thou despised the commandement of the Lord, to doe euill in his sight? thou hast killed Vriah the Hittite with ye sworde, and hast taken his wife to be thy wife, and hast slaine him with the sworde of the children of Ammon.
10 Mpo na yango, mopanga ekolongwa lisusu te na ndako na yo, pamba te otioli ngai mpe ozwi mwasi ya Iri, moto ya Iti, mpo ete akoma mwasi na yo.
Now therefore the sworde shall neuer depart from thine house, because thou hast despised me, and taken the wife of Vriah the Hittite to be thy wife.
11 Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Nakoyeisa pasi epai na yo wuta na ndako na yo moko; na miso na yo, nakokamata basi na yo mpe nakopesa bango na moko kati na baninga na yo, oyo akosangisa na bango nzoto na moyi makasi.
Thus sayth the Lord, Behold, I will rayse vp euil against thee out of thine owne house, and will take thy wiues before thine eyes, and giue them vnto thy neighbour, and he shall lie with thy wiues in the sight of this sunne.
12 Osalaki yango na nkuku, kasi ngai nakosala likambo oyo na moyi mpe na miso ya Isalaele mobimba. › »
For thou diddest it secretly: but I will doe this thing before all Israel, and before the sunne.
13 Davidi alobaki na Natan: — Solo, nasalaki masumu epai na Yawe. Natan azongisaki: — Yawe alongoli masumu na yo; okokufa te.
Then Dauid sayde vnto Nathan, I haue sinned against the Lord. And Nathan sayde vnto Dauid, The Lord also hath put away thy sinne, thou shalt not die.
14 Kasi lokola na likambo oyo yo osali, opesi na banguna ya Yawe nzela ya kofinga Ye, mwana oyo bakobotela yo akokufa.
Howbeit because by this deede thou hast caused the enemies of the Lord to blaspheme, the childe that is borne vnto thee shall surely die.
15 Sima na yango, Natan azongaki na ndako na ye. Yawe abetaki mwana oyo mwasi ya Iri abotelaki Davidi, mpe mwana yango akomaki kobela.
So Nathan departed vnto his house: and the Lord stroke the childe that Vriahs wife bare vnto Dauid, and it was sicke.
16 Davidi abondelaki Nzambe mpo na mwana, akilaki bilei, akotaki na ndako na ye mpe akomaki kolala na mabele babutu nyonso.
Dauid therefore besought God for the childe, and fasted and went in, and lay all night vpon the earth.
17 Bakambi ya ndako na ye bayaki kotelema pembeni na ye mpo na kotelemisa ye wuta na mabele, kasi aboyaki mpe andimaki te kolia bilei elongo na bango.
Then the Elders of his house arose to come vnto him, and to cause him to rise from the groud: but he would not, neither did he eate meate with them.
18 Na mokolo ya sambo, mwana akufaki. Basali ya Davidi babangaki koyebisa ye ete mwana akufi, pamba te bazalaki komilobela: « Wana mwana azalaki nanu na bomoi, tango tolobaki na Davidi, ayokaki biso te. Awa sik’oyo mwana akufi, tokoloba na ye ndenge nini? Soki toyebisi ye sik’oyo ete mwana akufi, akoki kosala likambo moko ya mabe! »
So on the seuenth day the child dyed: and the seruants of Dauid feared to tell him that the childe was dead: for they sayde, Beholde, while the childe was aliue, we spake vnto him, and he woulde not hearken vnto our voyce: how then shall we say vnto him, The childe is dead, to vexe him more?
19 Davidi amonaki basali na ye koloba na se se kati na bango, mpe asosolaki ete mwana akufi. Atunaki: — Boni, mwana akufi? Bazongisaki: — Iyo, akufi.
But when Dauid sawe that his seruantes whispered, Dauid perceiued that the childe was dead: therefore Dauid sayde vnto his seruants, Is the childe dead? And they sayd, He is dead.
20 Bongo Davidi atelemaki wuta na mabele, amisukolaki nzoto, amipakolaki malasi, alataki bilamba mosusu, akotaki na Tempelo ya Yawe mpe agumbamaki mpo na kosambela. Sima, azongaki na ndako na ye, asengaki bilei mpe aliaki.
Then Dauid arose from the earth, and washed and anoynted himselfe, and changed his apparell, and came into the house of the Lord, and worshipped, and afterward came to his owne house, and bade that they should set bread before him, and he did eate.
21 Basali na ye batunaki: — Mpo na nini ozali kosala boye? Wana mwana azalaki na bomoi, ozalaki komilalisa nzala mpe ozalaki kolela; awa sik’oyo mwana akufi, otelemi mpe okomi kolia!
Then saide his seruants vnto him, What thing is this, that thou hast done? thou diddest fast and weepe for the childe while it was aliue, but when the childe was dead, thou diddest rise vp, and eate meate.
22 Azongisaki: — Solo, wana mwana azalaki nanu na bomoi, nazalaki kokila bilei mpe kolela, pamba te nazalaki komilobela: « Nani ayebi? Tango mosusu Yawe akosalela ngai ngolu mpe akotika mwana na bomoi! »
And he sayde, While the childe was yet aliue, I fasted, and wept: for I sayde, Who can tell whether God will haue mercy on me, that the childe may liue?
23 Kasi lokola sik’oyo akufi, mpo na nini nakila bilei? Boni, nakoki kozongisa ye lisusu na bomoi? Ngai nde nakokende epai na ye, kasi ye akozonga epai na ngai te.
But now being dead, wherefore shoulde I now fast? Can I bring him againe any more? I shall goe to him, but he shall not returne to me.
24 Bongo Davidi abondisaki mwasi na ye, Batisheba; akendeki epai na ye mpe asangisaki na ye nzoto. Batisheba abotelaki ye lisusu mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Salomo. » Yawe alingaki ye
And Dauid comforted Bath-sheba his wife, and went in vnto her, and lay with her, and she bare a sonne, and he called his name Salomon: also the Lord loued him.
25 mpe atindaki maloba na nzela ya mosakoli Natan ete bapesa ye kombo « Yedidia, » pamba te Yawe alingaki ye.
For the Lord had sent by Nathan the Prophet: therefore he called his name Iedidiah, because the Lord loued him.
26 Joabi abundisaki engumba Raba ya bato ya Amoni mpe abotolaki mboka mokonzi.
Then Ioab fought against Rabbah of the children of Ammon, and tooke the citie of the kingdome.
27 Joabi atindaki bantoma koloba na Davidi: « Nabundisi Raba mpe nabotoli eteni ya mabele epai wapi mayi ezali.
Therefore Ioab sent messengers to Dauid, saying, I haue fought against Rabbah, and haue taken the citie of waters.
28 Sik’oyo, sangisa basoda oyo batikali, bozingela engumba Raba mpe bokamata yango; soki te nakokamata yango ngai moko, mpe kombo na ngai ekosakolama kuna. »
Now therefore gather the rest of the people together, and besiege the city, that thou mayest take it, lest the victorie be attributed to me.
29 Davidi asangisaki mampinga nyonso mpe akendeki na Raba, abundisaki mpe akamataki yango.
So Dauid gathered al the people together, and went against Rabbah, and besieged it, and tooke it.
30 Alongolaki motole oyo ezalaki na moto ya mokonzi na yango. Motole yango esalemaki na bakilo ya wolo koleka tuku misato mpe ezalaki na libanga ya talo na likolo na yango. Wuta na tango wana, ekomaki na moto ya Davidi. Akamataki bomengo ebele ya bitumba kati na engumba yango.
And he tooke their Kings crowne from his head, (which weighed a talent of golde, with precious stones) and it was set on Dauids head: and he brought away the spoyle of the citie in exceeding great abundance.
31 Amemaki na bowumbu bato oyo bazalaki kuna, atiaki bango na misala oyo basalaka na si, na piki mpe na epasola; atiaki bango mpe na mosala ya kosala babiliki. Davidi asalaki ndenge wana na bavandi ya bingumba nyonso ya bato ya Amoni. Bongo azongaki na Yelusalemi elongo na mampinga na ye nyonso.
And he carryed away the people that was therein, and put them vnder sawes, and vnder yron harowes, and vnder axes of yron, and cast them into the tyle kylne: euen thus did he with all the cities of the children of Ammon. Then Dauid and all the people returned vnto Ierusalem.

< 2 Samuele 12 >