< 2 Samuele 11 >

1 Na mobu oyo elandaki, na tango oyo bakonzi bazalaka na momesano ya kokende na bitumba, Davidi atindaki Joabi elongo na basali na ye mpe mampinga nyonso ya Isalaele. Babomaki bato ya Amoni mpe bazingelaki Raba. Kasi Davidi atikalaki na Yelusalemi.
ויהי לתשובת השנה לעת צאת המלאכים וישלח דוד את יואב ואת עבדיו עמו ואת כל ישראל וישחתו את בני עמון ויצרו על רבה ודוד יושב בירושלם
2 Mokolo moko na pokwa, Davidi alamukaki wuta na mbeto na ye mpe atambolaki na veranda ya likolo ya ndako ya mokonzi. Wuta na likolo ya veranda, amonaki mwasi moko azali kosukola. Mwasi yango azalaki kitoko makasi.
ויהי לעת הערב ויקם דוד מעל משכבו ויתהלך על גג בית המלך וירא אשה רחצת מעל הגג והאשה טובת מראה מאד
3 Davidi atindaki moto moko kokende koluka koyeba soki mwasi yango azali nani. Moto yango alobaki: « Ezali Batisheba, mwana mwasi ya Eliami, mwasi ya Iri, moto ya Iti. »
וישלח דוד וידרש לאשה ויאמר הלוא זאת בת שבע בת אליעם--אשת אוריה החתי
4 Davidi atindaki bantoma mpo na kozwa ye. Batisheba ayaki epai ya Davidi, mpe Davidi asangisaki na ye nzoto. Sima na ye komipetola na mbindo na ye, Batisheba azongaki na ndako na ye.
וישלח דוד מלאכים ויקחה ותבוא אליו וישכב עמה והיא מתקדשת מטמאתה ותשב אל ביתה
5 Akomaki na zemi, mpe atindaki maloba epai ya Davidi: « Nazali na zemi. »
ותהר האשה ותשלח ותגד לדוד ותאמר הרה אנכי
6 Davidi atindaki maloba epai ya Joabi: « Tindela ngai Iri, moto ya Iti. » Joabi atindaki Iri epai ya Davidi.
וישלח דוד אל יואב שלח אלי את אוריה החתי וישלח יואב את אוריה אל דוד
7 Tango Iri akomaki epai na ye, Davidi atunaki ye soki Joabi azali malamu, soki basoda bazali malamu mpe soki bitumba ezali koleka ndenge nini.
ויבא אוריה אליו וישאל דוד לשלום יואב ולשלום העם ולשלום המלחמה
8 Bongo Davidi alobaki na Iri: « Kende na ndako na yo mpe sukola makolo na yo. » Iri atikaki ndako ya mokonzi; mpe sima na ye, mokonzi atindelaki ye kado.
ויאמר דוד לאוריה רד לביתך ורחץ רגליך ויצא אוריה מבית המלך ותצא אחריו משאת המלך
9 Kasi Iri alalaki na ekotelo ya ndako ya mokonzi elongo na basali nyonso ya mokonzi na ye; akendeki te na ndako na ye.
וישכב אוריה פתח בית המלך את כל עבדי אדניו ולא ירד אל ביתו
10 Tango bayebisaki Davidi ete Iri akendeki na ndako te, atunaki ye: — Boni, yo owuti mosika te? Mpo na nini oboyi kozonga na ndako na yo?
ויגדו לדוד לאמר לא ירד אוריה אל ביתו ויאמר דוד אל אוריה הלוא מדרך אתה בא--מדוע לא ירדת אל ביתך
11 Iri azongiselaki Davidi: — Sanduku, Isalaele mpe Yuda bazali kovanda na bandako ya kapo; mpe Joabi, nkolo na ngai, elongo na bato na ye bazali kolala libanda kati na zamba. Ndenge nini ngai nakende na ndako na ngai mpo na kolia, komela mpe kolala na mwasi na ngai? Solo, na kombo na yo mokonzi, nakoki kosala likambo ya boye te.
ויאמר אוריה אל דוד הארון וישראל ויהודה ישבים בסכות ואדני יואב ועבדי אדני על פני השדה חנים ואני אבוא אל ביתי לאכל ולשתות ולשכב עם אשתי חיך וחי נפשך אם אעשה את הדבר הזה
12 Davidi alobaki na Iri: — Vanda lisusu awa lelo, bongo lobi nakozongisa yo. Iri avandaki na Yelusalemi mokolo wana mpe mokolo oyo elandaki.
ויאמר דוד אל אוריה שב בזה גם היום--ומחר אשלחך וישב אוריה בירושלם ביום ההוא וממחרת
13 Davidi abengisaki ye. Iri aliaki mpe amelaki elongo na ye, mpe Davidi alangwisaki ye. Kasi na pokwa, Uri abimaki mpo na kokende kolala na mbeto na ye elongo na basali ya mokonzi, kasi akendeki na ndako na ye te.
ויקרא לו דוד ויאכל לפניו וישת--וישכרהו ויצא בערב לשכב במשכבו עם עבדי אדניו ואל ביתו לא ירד
14 Na tongo, Davidi akomelaki Joabi mokanda mpe atindaki yango na nzela ya Iri.
ויהי בבקר ויכתב דוד ספר אל יואב וישלח ביד אוריה
15 Kati na mokanda yango, akomaki boye: « Tia Iri na molongo ya liboso, na esika oyo bitumba ezali makasi. Mpe bino, bozonga sima na ye mpo ete babeta ye mpe akufa. »
ויכתב בספר לאמר הבו את אוריה אל מול פני המלחמה החזקה ושבתם מאחריו ונכה ומת
16 Joabi oyo azalaki kokengela engumba, atiaki Iri na esika oyo ayebaki ete ezali penza na basoda ya mpiko.
ויהי בשמור יואב אל העיר ויתן את אוריה אל המקום אשר ידע כי אנשי חיל שם
17 Bongo tango bato ya engumba babimaki mpo na kobundisa Joabi, ndambo ya basoda kati na mampinga ya Davidi bakufaki; Iri, moto ya Iti, mpe akufaki.
ויצאו אנשי העיר וילחמו את יואב ויפל מן העם מעבדי דוד וימת גם אוריה החתי
18 Joabi atindelaki Davidi sango nyonso ya bitumba.
וישלח יואב ויגד לדוד את כל דברי המלחמה
19 Apesaki mitindo oyo epai ya ntoma: « Tango okosilisa kopesa sango ya bitumba epai ya mokonzi,
ויצו את המלאך לאמר ככלותך את כל דברי המלחמה--לדבר אל המלך
20 mokonzi akoki kotomboka mpe kotuna yo: ‹ Mpo na nini bopusanaki makasi pembeni ya engumba mpo na kobunda? Boyebaki te ete bakokaki kobeta batolotolo wuta na mir?
והיה אם תעלה חמת המלך ואמר לך מדוע נגשתם אל העיר להלחם הלוא ידעתם את אשר ירו מעל החומה
21 Nani abomaki Abimeleki, mwana mobali ya Yerubesheti? Ezalaki te mwasi oyo, wuta na likolo ya mir, abwakelaki ye libanga oyo banikelaka ble, yango wana akufaki na Tebesi? Mpo na nini bopusanaki pembeni ya mir? › Soki atuni yo bongo, loba na ye: ‹ Mosali na yo, Iri, moto ya Iti, mpe akufi. › »
מי הכה את אבימלך בן ירבשת הלוא אשה השליכה עליו פלח רכב מעל החומה וימת בתבץ למה נגשתם אל החומה ואמרת--גם עבדך אוריה החתי מת
22 Motindami akendeki, mpe tango akomaki, ayebisaki Davidi makambo nyonso oyo Joabi atindaki ye koloba.
וילך המלאך ויבא ויגד לדוד את כל אשר שלחו יואב
23 Alobaki na Davidi: — Bato yango bazalaki makasi koleka biso, bayaki kobundisa biso na libanda, mpe tobenganaki bango kino na ekotelo ya engumba.
ויאמר המלאך אל דוד כי גברו עלינו האנשים ויצאו אלינו השדה ונהיה עליהם עד פתח השער
24 Bongo basoda oyo babundaka na batolotolo babetaki na batolotolo na bango basali na yo wuta na likolo ya mir. Ndambo ya bato ya mokonzi bakufaki, ezala mosali na yo, Iri, moto ya Iti, mpe akufaki.
ויראו המוראים אל עבדיך מעל החומה וימותו מעבדי המלך וגם עבדך אוריה החתי--מת
25 Davidi alobaki na ntoma: — Tala makambo oyo okoloba na Joabi: « Tika ete likambo oyo etungisa yo te. Mopanga ekoki koboma songolo to pakala. Sala makasi mpo na kobundisa engumba mpe bebisa yango. » Loba makambo oyo mpo na kolendisa Joabi.
ויאמר דוד אל המלאך כה תאמר אל יואב אל ירע בעיניך את הדבר הזה--כי כזה וכזה תאכל החרב החזק מלחמתך אל העיר והרסה וחזקהו
26 Tango mwasi ya Iri ayokaki ete mobali na ye akufi, asalelaki ye matanga.
ותשמע אשת אוריה כי מת אוריה אישה ותספד על בעלה
27 Sima na matanga, Davidi abengisaki mwasi ya Uri kati na ndako na ye mpe akomisaki ye mwasi na ye. Mwasi yango abotelaki Davidi mwana mobali. Kasi likambo oyo Davidi asalaki esepelisaki Yawe te.
ויעבר האבל וישלח דוד ויאספה אל ביתו ותהי לו לאשה ותלד לו בן וירע הדבר אשר עשה דוד בעיני יהוה

< 2 Samuele 11 >