< 2 Bakonzi 23 >

1 Mokonzi Joziasi abengisaki bampaka nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi epai na ye,
And the king sent, and they gathered to him all the elders of Judah and of Jerusalem.
2 mpe akendeki na Tempelo ya Yawe elongo na bato nyonso ya Yuda, bavandi nyonso ya Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe basakoli, bato nyonso, kobanda na oyo aleki na se kino na oyo aleki na lokumu. Mokonzi atangelaki bango makomi nyonso ya buku ya Boyokani oyo emonanaki kati na Tempelo ya Yawe.
And the king went up into the house of the LORD, and all the men of Judah and all the inhabitants of Jerusalem with him, and the priests, and the prophets, and all the people, both small and great: and he read in their ears all the words of the book of the covenant which was found in the house of the LORD.
3 Mokonzi atelemaki na etemelo ya kolobela, asalaki boyokani oyo liboso ya Yawe: « Nalapi ndayi ete nakolanda Yawe, nakotosa mibeko, mitindo mpe malako na Ye, na motema mpe na elimo na ngai mobimba; mpe nakotosa maloba ya boyokani, oyo ekomama kati na buku oyo. » Bato nyonso bandimaki kotosa boyokani yango.
And the king stood by a pillar, and made a covenant before the LORD, to walk after the LORD, and to keep his commandments and his testimonies and his statutes with all their heart and all their soul, to perform the words of this covenant that were written in this book. And all the people stood to the covenant.
4 Mokonzi apesaki mitindo epai ya Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, epai ya Banganga-Nzambe oyo balandi mpe epai ya bakengeli bikuke ya Tempelo ya Yawe, mpo ete balongola kati na Tempelo ya Yawe, biloko nyonso oyo esalema mpo na Bala, mpo na nzambe mwasi Ashera, mpe mpo na mampinga nyonso ya likolo. Mokonzi atumbaki yango libanda ya Yelusalemi, kati na bilanga ya lubwaku ya Sedron, mpe amemaki putulu na yango na Beteli.
And the king commanded Hilkiah the high priest, and the priests of the second order, and the keepers of the door, to bring forth out of the temple of the LORD all the vessels that were made for Baal, and for the grove, and for all the host of heaven: and he burned them without Jerusalem in the fields of Kidron, and carried the ashes of them to Bethel.
5 Mokonzi alongolaki banganga-nzambe ya bapaya oyo bakonzi ya Yuda batiaki mpo na kotumba ansa na bisambelo ya likolo ya bangomba ya bingumba ya Yuda mpe ya zingazinga ya Yelusalemi: bango nde bazalaki kotumba ansa mpo na Bala, mpo na moyi, mpo na sanza, mpo na minzoto mpe mpo na mampinga nyonso ya likolo.
And he put down the idolatrous priests, whom the kings of Judah had ordained to burn incense in the high places in the cities of Judah, and in the places round about Jerusalem; them also that burned incense to Baal, to the sun, and to the moon, and to the planets, and to all the host of heaven.
6 Alongolaki kati na Tempelo ya Yawe likonzi ya nzambe mwasi Ashera, mpe amemaki yango na lubwaku ya Sedron, libanda ya Yelusalemi, epai wapi batumbaki yango. Akomisaki yango putulu mpe asopaki yango na kunda epai wapi bakundaka bato ebele na libulu moko.
And he brought out the grove from the house of the LORD, without Jerusalem, to the brook Kidron, and burned it at the brook Kidron, and stamped it small to powder, and cast the powder thereof on the graves of the children of the people.
7 Mokonzi abukaki kati na Tempelo ya Yawe, bandako ya mibali oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule, bandako epai wapi basi bazalaki kotonga banzambala mpo na nzambe mwasi Ashera.
And he broke down the houses of the sodomites, that were by the house of the LORD, where the women wove hangings for the grove.
8 Joziasi abengisaki Banganga-Nzambe nyonso ya bingumba ya Yuda mpe bapanzaki bisambelo ya likolo ya bangomba oyo ezalaki longwa na Geba kino na Beri-Sheba epai wapi banganga-nzambe wana bazalaki kotumba ansa. Abukaki mpe bisika ya bule oyo batonga pene ya bikuke ya bingumba: oyo ezalaki na ebandeli ya ekuke ya Jozue, moyangeli ya engumba, mpe oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mwasi ya ekuke ya engumba.
And he brought all the priests out of the cities of Judah, and defiled the high places where the priests had burned incense, from Geba to Beersheba, and broke down the high places of the gates that were in the entering in of the gate of Joshua the governor of the city, which were on a man’s left hand at the gate of the city.
9 Atako banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba bakokaki te kosala mosala na etumbelo ya Yawe kati na Yelusalemi, kasi bazalaki kolia mapa ezanga levire elongo na Banganga-Nzambe mosusu.
Nevertheless the priests of the high places came not up to the altar of the LORD in Jerusalem, but they did eat of the unleavened bread among their brothers.
10 Mokonzi apanzaki etumbelo ya Tofeti, oyo ezalaki na Lubwaku ya Beni-Inomi mpo ete moto moko te asalela yango lisusu mpo na kotumba mwana na ye ya mobali to ya mwasi lokola mbeka epai ya Moloki.
And he defiled Topheth, which is in the valley of the children of Hinnom, that no man might make his son or his daughter to pass through the fire to Molech.
11 Alongolaki, wuta na ekuke kino na Tempelo ya Yawe, bampunda oyo bakonzi ya Yuda babonzaki na nzambe Moyi, oyo ezalaki na lopango pembeni ya shambre ya Netani-Meleki, soda oyo baboma mokongo. Mokonzi atumbaki bashar oyo bazalaki kosalela losambo ya nzambe Moyi.
And he took away the horses that the kings of Judah had given to the sun, at the entering in of the house of the LORD, by the chamber of Nathanmelech the chamberlain, which was in the suburbs, and burned the chariots of the sun with fire.
12 Mokonzi abukaki bitumbelo oyo bakonzi ya Yuda batongaki na likolo ya shambre ya likolo ya Akazi, mpe bitumbelo oyo Manase atongisaki kati na mapango mibale ya Tempelo ya Yawe. Alongolaki yango wana, abukaki yango na biteni, mpe abwakaki yango na lubwaku ya Sedron.
And the altars that were on the top of the upper chamber of Ahaz, which the kings of Judah had made, and the altars which Manasseh had made in the two courts of the house of the LORD, did the king beat down, and broke them down from there, and cast the dust of them into the brook Kidron.
13 Mokonzi apanzaki mpe bisambelo ya likolo ya bangomba oyo ezalaki na este ya Yelusalemi, na ngambo ya loboko ya mobali ya ngomba ya Libebi, oyo Salomo, mokonzi ya Isalaele, atongaki mpo na Asitarite, nzambe mwasi ya makambo mabe ya bato ya Sidoni; mpo na Kemoshi, nzambe ya makambo mabe ya bato ya Moabi; mpe mpo na Moloki, nzambe ya makambo mabe ya bato ya Amoni.
And the high places that were before Jerusalem, which were on the right hand of the mount of corruption, which Solomon the king of Israel had built for Ashtoreth the abomination of the Zidonians, and for Chemosh the abomination of the Moabites, and for Milcom the abomination of the children of Ammon, did the king defile.
14 Joziasi abukaki mabanga ya bule, akweyisaki makonzi ya Ashera, mpe atondisaki esika yango na mikuwa ya bato.
And he broke in pieces the images, and cut down the groves, and filled their places with the bones of men.
15 Joziasi abukaki mpe etumbelo oyo ezalaki na Beteli mpe esambelo ya likolo ya ngomba oyo Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, atongaki mpo na kopengwisa bana ya Isalaele. Abukaki etumbelo yango mpe akomisaki yango putulu. Bongo atumbaki mpe likonzi ya Ashera.
Moreover the altar that was at Bethel, and the high place which Jeroboam the son of Nebat, who made Israel to sin, had made, both that altar and the high place he broke down, and burned the high place, and stamped it small to powder, and burned the grove.
16 Tango Joziasi atalaki na zingazinga, amonaki bakunda oyo ezalaki na likolo ya ngomba; boye akundolaki mikuwa oyo ezalaki kuna mpe atumbaki yango na likolo ya etumbelo. Na nzela yango, abebisaki lokumu ya etumbelo yango kolanda Liloba na Yawe, oyo moto na Nzambe asakolaki.
And as Josiah turned himself, he spied the sepulchers that were there in the mount, and sent, and took the bones out of the sepulchers, and burned them on the altar, and polluted it, according to the word of the LORD which the man of God proclaimed, who proclaimed these words.
17 Mokonzi atunaki: — Kunda oyo nazali komona ezali ya nani? Bato ya engumba bazongisaki: — Ezali kunda ya moto na Nzambe oyo awutaki na Yuda mpe asakolaki makambo oyo owuti kosala na etumbelo ya Beteli.
Then he said, What title is that that I see? And the men of the city told him, It is the sepulcher of the man of God, which came from Judah, and proclaimed these things that you have done against the altar of Bethel.
18 Mokonzi alobaki: — Botika yango, moto moko te asimba mikuwa na ye. Boye batikaki mikuwa na ye mpe mikuwa ya mosakoli oyo awutaki na Samari.
And he said, Let him alone; let no man move his bones. So they let his bones alone, with the bones of the prophet that came out of Samaria.
19 Ndenge asalaki na Beteli, Joziasi abukaki bisika nyonso ya bule ya bisambelo ya likolo ya bangomba oyo bakonzi ya Isalaele batongaki kati na bingumba ya Samari, oyo na tina na yango Yawe asilikaki makasi.
And all the houses also of the high places that were in the cities of Samaria, which the kings of Israel had made to provoke the Lord to anger, Josiah took away, and did to them according to all the acts that he had done in Bethel.
20 Joziasi abomaki banganga-nzambe nyonso ya bisambelo ya likolo ya bangomba oyo bazalaki kuna, abonzaki bango lokola mbeka na likolo ya bitumbelo na bango moko mpe atumbaki mikuwa ya bato na likolo ya bitumbelo yango. Bongo azongaki na Yelusalemi.
And he slew all the priests of the high places that were there on the altars, and burned men’s bones on them, and returned to Jerusalem.
21 Mokonzi apesaki mitindo epai ya bato nyonso: « Bosala feti ya Pasika mpo na Yawe, Nzambe na bino, kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Boyokani. »
And the king commanded all the people, saying, Keep the passover to the LORD your God, as it is written in the book of this covenant.
22 Feti ya Pasika ya lolenge wana etikalaki nanu kosalema te wuta na tango oyo bilombe bakambaki Isalaele to na tango nyonso ya bakonzi ya Isalaele mpe ya bakonzi ya Yuda.
Surely there was not held such a passover from the days of the judges that judged Israel, nor in all the days of the kings of Israel, nor of the kings of Judah;
23 Kasi tango Joziasi akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, basalaki lisusu feti ya Pasika mpo na Yawe, na Yelusalemi.
But in the eighteenth year of king Josiah, wherein this passover was held to the LORD in Jerusalem.
24 Joziasi abomaki mpe bato oyo basololaka na milimo ya bakufi, bamoni makambo, bikilakila, banzambe ya bikeko, mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na mokili ya Yuda mpe ya Yelusalemi. Asalaki bongo mpo na kokokisa mitindo oyo ekomama kati na buku oyo Nganga-Nzambe Ilikia amonaki kati na Tempelo ya Yawe.
Moreover the workers with familiar spirits, and the wizards, and the images, and the idols, and all the abominations that were spied in the land of Judah and in Jerusalem, did Josiah put away, that he might perform the words of the law which were written in the book that Hilkiah the priest found in the house of the LORD.
25 Mokonzi moko te azongelaki Yawe lokola Joziasi, na motema na ye mobimba, na molimo na ye mobimba mpe na makasi na ye nyonso, kolanda mibeko nyonso ya Moyize. Mpe sima na ye, mokonzi moko te azalaki lokola ye.
And like to him was there no king before him, that turned to the LORD with all his heart, and with all his soul, and with all his might, according to all the law of Moses; neither after him arose there any like him.
26 Nzokande, Yawe atikaki te kanda makasi na Ye, oyo apeliselaki Yuda likolo ya mabe nyonso oyo Manase asalaki mpo na kopesa Ye kanda.
Notwithstanding the LORD turned not from the fierceness of his great wrath, with which his anger was kindled against Judah, because of all the provocations that Manasseh had provoked him with.
27 Boye Yawe alobaki: « Nakobengana mpe Yuda na miso na Ngai ndenge nabenganaki Isalaele; nakobwaka Yelusalemi, engumba oyo napona, elongo na Tempelo na yango, oyo na tina na yango nalobaki: ‹ Kombo na Ngai ekozala kuna. › »
And the LORD said, I will remove Judah also out of my sight, as I have removed Israel, and will cast off this city Jerusalem which I have chosen, and the house of which I said, My name shall be there.
28 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joziasi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
Now the rest of the acts of Josiah, and all that he did, are they not written in the book of the chronicles of the kings of Judah?
29 Tango Joziasi azalaki mokonzi, Faraon Neko, mokonzi ya Ejipito, akendeki na ebale Efrate mpo na kosunga mokonzi ya Asiri. Mokonzi Joziasi akendeki kokutana na ye mpo na kokanga ye nzela, kasi Neko abundisaki ye mpe abomaki ye, na Megido.
In his days Pharaohnechoh king of Egypt went up against the king of Assyria to the river Euphrates: and king Josiah went against him; and he slew him at Megiddo, when he had seen him.
30 Basoda ya Joziasi bamemaki ebembe na ye na likolo ya shar, longwa na Megido kino na Yelusalemi epai wapi bakundaki ye kati na kunda na ye moko. Bato ya mokili bazwaki Yoakazi, mwana mobali ya Joziasi, bapakolaki ye mafuta mpe bakomisaki ye mokonzi mpo na kokitana na tata na ye.
And his servants carried him in a chariot dead from Megiddo, and brought him to Jerusalem, and buried him in his own sepulcher. And the people of the land took Jehoahaz the son of Josiah, and anointed him, and made him king in his father’s stead.
31 Yoakazi azalaki na mibu tuku mibale na misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki basanza misato na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Amutali. » Amutali azalaki mwana ya Jeremi, moto ya Libina.
Jehoahaz was twenty and three years old when he began to reign; and he reigned three months in Jerusalem. And his mother’s name was Hamutal, the daughter of Jeremiah of Libnah.
32 Yoakazi asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge bakoko na ye basalaki.
And he did that which was evil in the sight of the LORD, according to all that his fathers had done.
33 Faraon Neko atiaki ye na boloko mpe akangaki ye minyololo, na Ribila, kati na mokili ya Amati, mpo ete akonza lisusu te na Yelusalemi. Faraon Neko afutisaki na makasi mokili ya Yuda mpako ya nkoto misato nkama minei ya bakilo ya palata mpe bakilo tuku misato na minei ya wolo.
And Pharaohnechoh put him in bands at Riblah in the land of Hamath, that he might not reign in Jerusalem; and put the land to a tribute of an hundred talents of silver, and a talent of gold.
34 Faraon Neko akomisaki Eliakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi mpo na kokitana na Joziasi, tata na ye; abongolaki kombo na ye mpe akomisaki yango « Yeoyakimi. » Kasi akangaki Yoakazi mpe amemaki ye na Ejipito. Mpe Yoakazi akufaki kuna.
And Pharaohnechoh made Eliakim the son of Josiah king in the room of Josiah his father, and turned his name to Jehoiakim, and took Jehoahaz away: and he came to Egypt, and died there.
35 Yeoyakimi afutaki epai ya Faraon Neko palata mpe wolo oyo asengaki. Mpo na kofuta yango, Yeoyakimi asengaki ete bato ya mokili bafuta mpako. Afutisaki bato mpako ya palata to ya wolo kolanda bozwi na bango.
And Jehoiakim gave the silver and the gold to Pharaoh; but he taxed the land to give the money according to the commandment of Pharaoh: he exacted the silver and the gold of the people of the land, of every one according to his taxation, to give it to Pharaohnechoh.
36 Yeoyakimi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Zebuda. » Zebuda azalaki mwana ya Pedaya, moto ya Ruma.
Jehoiakim was twenty and five years old when he began to reign; and he reigned eleven years in Jerusalem. And his mother’s name was Zebudah, the daughter of Pedaiah of Rumah.
37 Yeoyakimi asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge kaka bakoko na ye basalaki.
And he did that which was evil in the sight of the LORD, according to all that his fathers had done.

< 2 Bakonzi 23 >