< 2 Bakonzi 21 >

1 Manase azalaki na mibu zomi na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Efitsiba. »
Manasseh was twelve years old when he began to reign; and he reigned five and fifty years in Jerusalem: and his mother’s name was Hephzi-bah.
2 Manase asalaki makambo mabe na miso ya Yawe na ndenge amekolaki misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bato ya Isalaele.
And he did that which was evil in the sight of the LORD, after the abominations of the heathen, whom the LORD cast out before the children of Israel.
3 Atongaki lisusu bisambelo ya likolo ya bangomba oyo Ezekiasi, tata na ye, abukaki; atongaki mpe bitumbelo mpo na nzambe Bala mpe atelemisaki likonzi mpo na nzambe mwasi Ashera, ndenge Akabi, mokonzi ya Isalaele, asalaki; afukamelaki mpe agumbamelaki mampinga nyonso ya likolo.
For he built again the high places which Hezekiah his father had destroyed; and he reared up altars for Baal, and made an Asherah, as did Ahab king of Israel, and worshipped all the host of heaven, and served them.
4 Atongaki bitumbelo mpo na banzambe ya bapaya kati na Tempelo ya Yawe oyo, na tina na yango, Yawe alobaki: « Nakotia Kombo na Ngai kati na Yelusalemi. »
And he built altars in the house of the LORD, whereof the LORD said, In Jerusalem will I put my name.
5 Atongaki kati na mapango nyonso mibale ya Tempelo ya Yawe bitumbelo mpo na mampinga nyonso ya likolo.
And he built altars for all the host of heaven in the two courts of the house of the LORD.
6 Abonzaki na moto, lokola mbeka, mwana na ye ya mobali; asalelaki kindoki, soloka mpe maji. Atiaki na mosala bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe bamoni makambo. Akobaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe; mpe, na bongo, apelisaki kanda ya Yawe.
And he made his son to pass through the fire, and practised augury, and used enchantments, and dealt with them that had familiar spirits, and with wizards: he wrought much evil in the sight of the LORD, to provoke him to anger.
7 Atiaki kati na Tempelo ya Yawe ekeko ya Ashera, oyo asalisaki; nzokande, Yawe alobaki na Davidi mpe na Salomo, mwana na ye ya mobali: « Nakotia Kombo na Ngai mpo na libela kati na Tempelo oyo mpe kati na Yelusalemi oyo naponi kati na mabota nyonso ya Isalaele.
And he set the graven image of Asherah, that he had made, in the house of which the LORD said to David and to Solomon his son, In this house, and in Jerusalem, which I have chosen out of all the tribes of Israel, will I put my name for ever:
8 Soki kaka bato ya Isalaele batosi mibeko mpe mitindo nyonso oyo napesaki bango na nzela ya Moyize, mosali na Ngai, nakosala ete bayengayenga lisusu te mosika ya mabele oyo napesaki epai ya batata na bango. »
neither will I cause the feet of Israel to wander any more out of the land which I gave their fathers; if only they will observe to do according to all that I have commanded them, and according to all the law that my servant Moses commanded them.
9 Kasi bato ya Isalaele batosaki te. Manase apengwisaki bango, mpe basalaki lisusu mabe koleka bikolo oyo Yawe abebisaki liboso ya bato ya Isalaele.
But they hearkened not: and Manasseh seduced them to do that which is evil more than did the nations, whom the LORD destroyed before the children of Israel.
10 Yawe alobaki na nzela ya basali na ye, basakoli:
And the LORD spake by his servants the prophets, saying,
11 « Lokola Manase, mokonzi ya Yuda, asalaki makambo ya nkele, lokola asalaki makambo mabe koleka ata bato ya Amori oyo bazalaki liboso na ye, mpe lokola apengwisaki Yuda na nzela ya banzambe na ye ya bikeko,
Because Manasseh king of Judah hath done these abominations, and hath done wickedly above all that the Amorites did, which were before him, and hath made Judah also to sin with his idols:
12 tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Nakoyeisa kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda pasi oyo ekozala lokola kake na matoyi ya moto nyonso oyo akoyoka sango na yango.
therefore thus saith the LORD, the God of Israel, Behold, I bring such evil upon Jerusalem and Judah, that whosoever heareth of it, both his ears shall tingle.
13 Nakobebisa Yelusalemi ndenge nabebisaki Samari, mpe nakokomisa yango lokola ndako ya Akabi. Nakonika Yelusalemi ndenge banikaka mpe babalolaka nzungu.
And I will stretch over Jerusalem the line of Samaria, and the plummet of the house of Ahab: and I will wipe Jerusalem as a man wipeth a dish, wiping it and turning it upside down.
14 Nakosundola ndambo ya libula na Ngai oyo ekotikala, nakokaba bango na maboko ya banguna na bango. Banguna na bango bakobebisa bango mpe bakobotola biloko na bango,
And I will cast off the remnant of mine inheritance, and deliver them into the hand of their enemies; and they shall become a prey and a spoil to all their enemies;
15 pamba te basalaki mabe na miso na Ngai mpe bapelisaki kanda na Ngai, wuta na mokolo oyo batata na bango babimaki na Ejipito kino na mokolo ya lelo. › »
because they have done that which is evil in my sight, and have provoked me to anger, since the day their fathers came forth out of Egypt, even unto this day.
16 Mpe lisusu, Manase asopaki makila ya bato oyo bayebi likambo te mpe atondisaki Yelusalemi na makila yango na bisika nyonso —kotanga te masumu oyo apengwisaki na yango Yuda mpo na kosala mabe na miso ya Yawe.
Moreover Manasseh shed innocent blood very much, till he had filled Jerusalem from one end to another; beside his sin wherewith he made Judah to sin, in doing that which was evil in the sight of the LORD,
17 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Manase, misala na ye nyonso mpe masumu oyo asalaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
Now the rest of the acts of Manasseh, and all that he did, and his sin that he sinned, are they not written in the book of the chronicles of the kings of Judah?
18 Manase akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na elanga ya ndako na ye ya bokonzi, oyo babengaka elanga ya Uza. Amoni, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
And Manasseh slept with his fathers, and was buried in the garden of his own house, in the garden of Uzza: and Amon his son reigned in his stead.
19 Amoni azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mibale na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Meshulemeti. » Meshulemeti azalaki mwana mwasi ya Arutsi, moto ya Yotiba.
Amon was twenty and two years old when he began to reign; and he reigned two years in Jerusalem: and his mother’s name was Meshullemeth the daughter of Haruz of Jotbah.
20 Amoni asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Manase, tata na ye, asalaki.
And he did that which was evil in the sight of the LORD, as did Manasseh his father.
21 Atambolaki na banzela nyonso ya tata na ye, na kosambelaka banzambe ya bikeko oyo tata na ye asambelaki mpe agumbamelaki.
And he walked in all the way that his father walked in, and served the idols that his father served, and worshipped them:
22 Asundolaki Yawe, Nzambe ya batata na ye, mpe atambolaki na banzela ya Yawe te.
and he forsook the LORD, the God of his fathers, and walked not in the way of the LORD.
23 Bakalaka ya Amoni basalelaki ye likita mpe babomaki ye kati na ndako na ye ya bokonzi.
And the servants of Amon conspired against him, and put the king to death in his own house.
24 Bongo bato ya mokili babomaki bato nyonso oyo basalelaki mokonzi Amoni likita mpe bakomisaki Joziasi, mwana na ye ya mobali, mokonzi na esika na ye.
But the people of the land slew all them that had conspired against king Amon; and the people of the land made Josiah his son king in his stead.
25 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Amoni, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
Now the rest of the acts of Amon which he did, are they not written in the book of the chronicles of the kings of Judah?
26 Bakundaki ye kati na kunda na ye, kati na elanga ya Uza; mpe Joziasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
And he was buried in his sepulchre in the garden of Uzza: and Josiah his son reigned in his stead.

< 2 Bakonzi 21 >