< 2 Bakonzi 2 >

1 Tango Yawe akomaki pene ya konetola Eliya na likolo na nzela ya mopepe makasi, Eliya mpe Elize balongwaki na Giligali.
So it came about, when Yahweh was going to take up Elijah by a whirlwind into heaven, that Elijah left with Elisha from Gilgal.
2 Eliya alobaki na Elize: — Nabondeli yo, tikala awa; pamba te Yawe atindi ngai na Beteli. Elize azongisaki: — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te! Boye bakendeki na Beteli.
Elijah said to Elisha, “Stay here, please, because Yahweh has sent me to Bethel.” Elisha replied, “As Yahweh lives, and as you live, I will not leave you.” So they went down to Bethel.
3 Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Beteli, bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye: — Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali? Elize azongisaki: — Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye!
The sons of the prophets who were at Bethel came to Elisha and said to him, “Do you know that Yahweh will take away your master from you today?” Elisha replied, “Yes, I know it, but do not talk about it.”
4 Eliya alobaki na Elize: — Tikala awa; Yawe atindi ngai na Jeriko. Elize azongisaki: — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te! Boye bakendeki na Jeriko.
Elijah said to him, “Elisha, wait here, please, for Yahweh has sent me to Jericho.” Then Elisha replied, “As Yahweh lives, and as you live, I will not leave you.” So they went to Jericho.
5 Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Jeriko bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye: — Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali? Elize azongisaki: — Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye!
Then the sons of the prophets who were at Jericho came to Elisha and said to him, “Do you know that Yahweh will take away your master from you today?” Elisha answered, “Yes, I know it, but do not talk about it.”
6 Eliya alobaki na ye: — Elize, tikala awa; Yawe atindi ngai na Yordani. Elize azongisaki: — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te! Boye bango mibale bakobaki nzela na bango.
Then Elijah said to him, “Stay here, please, for Yahweh has sent me to the Jordan.” Elisha replied, “As Yahweh lives, and as you live, I will not leave you.” So the two went on.
7 Bayekoli tuku mitano ya basakoli bakendeki kotelema mosika ya esika oyo Eliya mpe Elize batelemaki, na ebale Yordani.
Later, fifty of the sons of the prophets stood opposite them at a distance while the two stood by the Jordan.
8 Eliya alongolaki kazaka na ye, agumbaki yango mpe abetaki yango na mayi ya ebale. Mayi ekabwanaki na ngambo ya loboko ya mobali mpe na ngambo ya loboko ya mwasi, mpe bango mibale bakatisaki.
Elijah took his cloak, rolled it up, and struck the water with it. The river divided on both sides so that the two of them walked over on dry ground.
9 Tango bakatisaki, Eliya alobaki na Elize: — Yebisa ngai nasala nini mpo na yo liboso ete Yawe alongola ngai liboso na yo. Elize azongisaki: — Tika ete nazwa nguya ya molimo na yo mbala mibale.
It came about, after they had crossed over, that Elijah said to Elisha, “Ask me what I should do for you before I am taken from you.” Elisha replied, “Please let a double portion of your spirit come on me.”
10 Eliya alobaki: — Osengi ngai eloko ya pasi, kasi soki okomona ngai wana Yawe akolongola ngai liboso na yo, okozwa yango; soki te, okozwa yango te.
Elijah answered, “You have asked for a difficult thing. Nevertheless, if you see me when I am taken from you, this will happen for you, but if not, it will not happen.”
11 Wana bazalaki kotambola mpe kosolola, mbala moko shar ya moto mpe bampunda ya moto ekabolaki bango mibale; mpe Eliya amataki na likolo na nzela ya mopepe makasi.
As they still went on and talked, behold, a chariot of fire and horses of fire appeared, which separated the two men from each other, and Elijah went up by a whirlwind into heaven.
12 Tango Elize amonaki bongo, agangaki: « Tata na ngai! Tata na ngai! Yo nde ozali lokola shar ya Isalaele mpe batambolisi na yango! » Bongo Elize amonaki ye lisusu te. Boye akangaki bilamba na ye mpe apasolaki yango na biteni mibale.
Elisha saw it and cried out, “My father, my father, the chariots of Israel and their horsemen!” He saw Elijah no more, and he took hold of his own clothes and tore them into two pieces.
13 Alokotaki kazaka ya Eliya, oyo ekweyaki wuta na mapeka na ye, azongaki mpe atelemaki na ngambo ya ebale Yordani.
He picked up Elijah's cloak that had fallen off him, and went back to stand by the bank of the Jordan.
14 Azwaki kazaka ya Eliya, abetaki yango na mayi mpe alobaki: « Wapi sik’oyo Yawe, Nzambe ya Eliya? » Tango Elize abetaki kazaka yango na mayi, mayi ya ebale ekabwanaki na ngambo ya loboko ya mobali mpe na ngambo ya loboko ya mwasi.
He struck the water with Elijah's cloak that had fallen and said, “Where is Yahweh, the God of Elijah?” When he had struck the waters, they divided on both sides and Elisha crossed over.
15 Bayekoli ya basakoli, oyo bawutaki na Jeriko bamonaki mpe balobaki: « Molimo ya Eliya evandi sik’oyo likolo ya Elize! » Bakendeki kokutana na ye mpe bagumbamaki liboso na ye kino na mabele.
When the sons of the prophets who were from Jericho saw him across from them, they said, “The spirit of Elijah does rest on Elisha!” So they came to meet him, and bowed themselves to the ground before him.
16 Balobaki: — Tala biso basali na yo, tozali na mibali ya mpiko tuku mitano. Tika ete baluka mokonzi na yo, tango mosusu Molimo na Yawe amemi ye mpe abwaki ye na ngomba to na lubwaku. Elize azongisaki: — Te, botinda bango te!
They said to him, “See now, among your servants there are fifty strong men. Let them go, we ask, and look for your master, in case the Spirit of Yahweh has taken him up and thrown him onto some mountain or into some valley.” Elisha answered, “No, do not send them.”
17 Kasi batungisaki Elize makasi kino ayokaki soni mpo na koboya. Boye alobaki: — Botinda bango. Mpe batindaki mibali tuku mitano oyo balukaki Eliya mikolo misato, kasi batikalaki komona ye te.
But when they urged Elisha until he was ashamed, he said, “Send them.” Then they sent fifty men, and they looked for three days, but did not find him.
18 Tango bazongaki epai ya Elize oyo atikalaki na Jeriko, Elize alobaki na bango: — Napekisaki bino te kokende?
They came back to Elisha, while he stayed at Jericho, and he said to them, “Did I not say to you, 'Do not go'?”
19 Bato ya engumba ya Jeriko bayebisaki Elize: — Oh nkolo! Engumba na biso etongami na esika ya malamu ndenge ozali komona yango, kasi mayi ezali mabe mpe mabele ebotaka te.
The men of the city said to Elisha, “See, we beg of you, the situation of this city is pleasant, as my master can see, but the water is bad and the land is not fruitful.”
20 Elize alobaki: — Bomemela ngai sani ya moke ya sika mpe botia mungwa na kati. Bamemelaki ye yango
Elisha replied, “Bring me a new bowl and put salt in it,” so they brought it to him.
21 mpe akendeki na etima, abwakaki kuna mungwa mpe alobaki: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Napetoli mayi oyo; ekoyeisa lisusu kufa te mpe ekobebisa lisusu mabele te mpo ete ebota mbuma. › »
Elisha went out to the spring of water and threw salt in it; then he said, “Yahweh says this, 'I have healed these waters. From this time on, there will be no more death or unfruitful land.'”
22 Boye mayi etikala peto kino na mokolo ya lelo, kolanda liloba oyo Elize abimisaki.
So the waters were healed to this day, by the word which Elisha spoke.
23 Longwa kuna na Jeriko, Elize akendeki na Beteli. Wana azalaki kotambola na nzela, bilenge mibali babimaki wuta na engumba mpe bazalaki kotiola ye; bazalaki koloba: « Moto na libandi, longwa awa! Moto na libandi, longwa awa! »
Then Elisha went up from there to Bethel. As he was going up the road, young boys came out of the city and mocked him; they said to him, “Go up, you baldhead! Go up, you baldhead!”
24 Abalukaki, atalaki bango mpe alakelaki bango mabe na Kombo na Yawe. Boye, bangombolo mibale ebimaki na zamba mpe epasolaki bana tuku minei na mibale kati na bango.
Elisha looked behind him and saw them; he called on Yahweh to curse them. Then two female bears came out of the woods and injured forty-two of the boys.
25 Longwa wana Elize akendeki na ngomba Karimeli; mpe longwa kuna, azongaki na Samari.
Then Elisha went from there to Mount Carmel, and from there he returned to Samaria.

< 2 Bakonzi 2 >