< 2 Bakonzi 17 >

1 Tango Akazi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na mibale na bokonzi, Oze, mwana mobali ya Ela, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari. Akonzaki mibu libwa.
猶大王亞哈斯十二年,以拉的兒子何細亞在撒馬利亞登基作以色列王九年。
2 Oze asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, kasi ndenge moko te na bakonzi ya Isalaele, oyo bazalaki liboso na ye.
他行耶和華眼中看為惡的事,只是不像在他以前的以色列諸王。
3 Salimanasari, mokonzi ya Asiri, ayaki kobundisa Oze. Mpe Oze akomaki mowumbu mpe akomaki kofuta mpako epai ya Salimanasari.
亞述王撒縵以色上來攻擊何細亞,何細亞就服事他,給他進貢。
4 Kasi mokonzi ya Asiri asosolaki ete Oze asaleli ye likita, pamba te Oze atindaki bantoma epai ya So, mokonzi ya Ejipito, mpe atikaki kofuta mpako epai ya mokonzi ya Asiri ndenge azalaki kosala mobu na mobu. Boye Salimanasari akangaki Oze mpe atiaki ye na boloko.
何細亞背叛,差人去見埃及王梭,不照往年所行的與亞述王進貢。亞述王知道了,就把他鎖禁,囚在監裏。
5 Mokonzi ya Asiri akotaki na makasi na mokili mobimba, abundisaki Samari mpe azingelaki yango mibu misato.
亞述王上來攻擊以色列遍地,上到撒馬利亞,圍困三年。
6 Tango Oze akokisaki mibu libwa na bokonzi, mokonzi ya Asiri abotolaki Samari mpe amemaki bana ya Isalaele na bowumbu na Asiri. Atiaki bango na Ala mpe na bapembeni ya ebale ya Abori, na etuka ya Gozani mpe na bingumba ya Medi.
何細亞第九年亞述王攻取了撒馬利亞,將以色列人擄到亞述,把他們安置在哈臘與歌散的哈博河邊,並米底亞人的城邑。
7 Makambo oyo esalemaki mpo ete bato ya Isalaele basalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na bango, oyo abimisaki bango wuta na bokonzi ya Faraon, mokonzi ya Ejipito; bagumbamelaki banzambe mosusu.
這是因以色列人得罪那領他們出埃及地、脫離埃及王法老手的耶和華-他們的上帝,去敬畏別神,
8 Balandaki bizaleli ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso na bango mpe makambo oyo bakonzi ya Isalaele bakotisaki.
隨從耶和華在他們面前所趕出外邦人的風俗和以色列諸王所立的條規。
9 Bato ya Isalaele basalaki na nkuku makambo ya nkele na miso ya Yawe, Nzambe na bango. Batongaki bisambelo ya likolo ya bangomba kati na bingumba na bango nyonso, kobanda na likolo ya bamir ya lopango kino na bingumba batonga makasi.
以色列人暗中行不正的事,違背耶和華-他們的上帝,在他們所有的城邑,從瞭望樓直到堅固城,建築邱壇;
10 Batelemisaki mabanga ya bule mpe makonzi ya nzambe mwasi Ashera na likolo ya bangomba nyonso mpe na se ya banzete nyonso ya mibesu.
在各高岡上、各青翠樹下立柱像和木偶;
11 Batumbaki ansa na bisambelo nyonso ya likolo ya bangomba, ndenge bikolo oyo Yawe abenganaki liboso na bango ezalaki kosala. Basalaki makambo mabe oyo etumbolaki kanda ya Yawe.
在邱壇上燒香,效法耶和華在他們面前趕出的外邦人所行的,又行惡事惹動耶和華的怒氣;
12 Bagumbamelaki banzambe ya bikeko oyo na tina na yango Yawe alobaki: « Bokosala bongo te. »
且事奉偶像,就是耶和華警戒他們不可行的。
13 Yawe akebisaki Isalaele mpe Yuda na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli mpe bamoni makambo, na maloba oyo: « Botika banzela na bino ya mabe, bobatela mibeko mpe bikateli na Ngai kolanda mibeko nyonso oyo napesaki bino mpe bakoko na bino na nzela ya basali na Ngai, basakoli. »
但耶和華藉眾先知、先見勸戒以色列人和猶大人說:「當離開你們的惡行,謹守我的誡命律例,遵行我吩咐你們列祖,並藉我僕人眾先知所傳給你們的律法。」
14 Kasi bayokaki te; batiaki moto makasi lokola bakoko na bango, oyo baboyaki kondimela Yawe, Nzambe na bango.
他們卻不聽從,竟硬着頸項,效法他們列祖,不信服耶和華-他們的上帝,
15 Babwakaki bikateli na Ye, boyokani oyo asalaki elongo na bakoko na bango mpe makebisi oyo apesaki bango. Balandaki bikolo oyo ezalaki zingazinga na bango. Yawe apesaki bango mitindo ete basala te lokola bango, kasi bango basalaki kaka makambo oyo Yawe apekisaki bango kosala.
厭棄他的律例和他與他們列祖所立的約,並勸戒他們的話,隨從虛無的神,自己成為虛妄,效法周圍的外邦人,就是耶和華囑咐他們不可效法的;
16 Batikaki mitindo nyonso ya Yawe, Nzambe na bango, mpe bamisalelaki banzambe ya bikeko ya bana ngombe mibale basala na bibende oyo banyangwisa na moto, mpe likonzi ya nzambe mwasi Ashera. Bango nyonso bagumbamelaki mampinga nyonso ya likolo, mpe basambelaki nzambe Bala.
離棄耶和華-他們上帝的一切誡命,為自己鑄了兩個牛犢的像,立了亞舍拉,敬拜天上的萬象,事奉巴力,
17 Batumbaki na moto lokola mbeka bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi. Basalelaki soloka mpe kindoki, mpe bamikabaki mpo na kosala makambo mabe na miso ya Yawe. Boye batumbolaki kanda ya Yawe.
又使他們的兒女經火,用占卜,行法術賣了自己,行耶和華眼中看為惡的事,惹動他的怒氣。
18 Yawe asilikelaki makasi bana ya Isalaele mpe abenganaki bango mosika na Ye. Kaka libota ya Yuda nde batikalaki.
所以耶和華向以色列人大大發怒,從自己面前趕出他們,只剩下猶大一個支派。
19 Nzokande, libota yango mpe ya Yuda babatelaki te mitindo ya Yawe, Nzambe na bango, balandaki bizaleli oyo Isalaele akotisaki.
猶大人也不遵守耶和華-他們上帝的誡命,隨從以色列人所立的條規。
20 Boye, Yawe abwakaki bana nyonso ya Isalaele, ayokisaki bango pasi, akabaki bango na maboko ya bato ya mobulu, mpe abenganaki bango mosika na Ye.
耶和華就厭棄以色列全族,使他們受苦,把他們交在搶奪他們的人手中,以致趕出他們離開自己面前,
21 Tango Yawe alongolaki Isalaele na se ya bokonzi ya Davidi, bana ya Isalaele bakomisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mokonzi na bango. Jeroboami atindikaki Isalaele ete balanda Yawe te, mpe amemisaki bango lisumu ya monene.
將以色列國從大衛家奪回;他們就立尼八的兒子耶羅波安作王。耶羅波安引誘以色列人不隨從耶和華,陷在大罪裏。
22 Bato ya Isalaele bakangamaki na masumu nyonso ya Jeroboami mpe batikaki yango te
以色列人犯耶羅波安所犯的一切罪,總不離開,
23 kino tango Yawe abenganaki bango mosika na Ye, ndenge ayebisaki bango na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli. Boye, bamemaki bana ya Isalaele na bowumbu, mosika ya mokili na bango, na Asiri kino lelo.
以致耶和華從自己面前趕出他們,正如藉他僕人眾先知所說的。這樣,以色列人從本地被擄到亞述,直到今日。
24 Mokonzi ya Asiri amemaki bato wuta na bingumba ya Babiloni, ya Kuti, ya Ava, ya Amati mpe ya Sefarivayimi; mpe atiaki bango na Samari, na esika ya bana ya Isalaele. Bato yango bazwaki Samari mpe bavandaki kati na bingumba na yango.
亞述王從巴比倫、古他、亞瓦、哈馬,和西法瓦音遷移人來,安置在撒馬利亞的城邑,代替以色列人;他們就得了撒馬利亞,住在其中。
25 Liboso, tango bazalaki kovanda kuna, bato yango bazalaki kogumbamela Yawe te. Boye Yawe atindaki nkosi kati na bango, mpe ebomaki ndambo ya bato kati na bango.
他們才住那裏的時候,不敬畏耶和華,所以耶和華叫獅子進入他們中間,咬死了些人。
26 Bayebisaki mokonzi ya Asiri: — Bikolo oyo omemaki na bowumbu mpe otiaki kati na bingumba ya Samari bayebi te makambo oyo Nzambe ya mokili wana alingaka. Boye Nzambe atindi kati na bango nkosi oyo ezali koboma bango, pamba te bato yango bayebi te makambo oyo Nzambe yango alingaka.
有人告訴亞述王說:「你所遷移安置在撒馬利亞各城的那些民,不知道那地之神的規矩,所以那神叫獅子進入他們中間,咬死他們。」
27 Boye mokonzi ya Asiri apesaki mitindo oyo: — Botinda kuna moko kati na Banganga-Nzambe oyo bomemaki na bowumbu wuta na Samari mpo ete avanda kuna mpe alakisa bato makambo oyo Nzambe ya mokili wana alingaka.
亞述王就吩咐說:「叫所擄來的祭司回去一個,使他住在那裏,將那地之神的規矩指教那些民。」
28 Boye moko kati na Banganga-Nzambe oyo bamemaki na bowumbu wuta na Samari ayaki kovanda na Beteli mpe alakisaki bango kogumbamela Yawe.
於是有一個從撒馬利亞擄去的祭司回來,住在伯特利,指教他們怎樣敬畏耶和華。
29 Kasi ekolo na ekolo esalaki banzambe na yango kati na bingumba nyonso oyo bazalaki kovanda, mpe batiaki banzambe yango kati na bisika ya bule ya bisambelo ya likolo ya bangomba oyo bato ya Samari batongaki.
然而,各族之人在所住的城裏各為自己製造神像,安置在撒馬利亞人所造有邱壇的殿中。
30 Bato oyo bawutaki na Babiloni basalaki ekeko ya nzambe Sukoti-Benoti; ba-oyo bawutaki na Kuti basalaki ekeko ya nzambe Nerigali; ba-oyo bawutaki na Amati basalaki ekeko ya nzambe Ashima;
巴比倫人造疏割‧比訥像;古他人造匿甲像;哈馬人造亞示瑪像;
31 ba-oyo bawutaki na Ava basalaki bikeko ya nzambe Nibikazi mpe nzambe Taritaki; ba-oyo bawutaki na Sefarivayimi bazalaki kokoba kotumba bana na bango na moto lokola mbeka epai ya Adrameleki mpe Anameleki, banzambe ya bato ya Sefarivayimi.
亞瓦人造匿哈和他珥他像;西法瓦音人用火焚燒兒女,獻給西法瓦音的神亞得米勒和亞拿米勒。
32 Bato ya bikolo yango bazalaki na bango kotosa Yawe, kasi baponaki lisusu kati na bango bato mpo na kosala mosala ya bonganga-nzambe kati na bisika ya bule ya bisambelo ya likolo ya bangomba.
他們懼怕耶和華,也從他們中間立邱壇的祭司,為他們在有邱壇的殿中獻祭。
33 Atako bazalaki kotosa Yawe, kasi bazalaki mpe kosalela banzambe na bango kolanda bizaleli ya bikolo epai wapi bawutaki.
他們又懼怕耶和華,又事奉自己的神,從何邦遷移,就隨何邦的風俗。
34 Kino lelo, bakangami kaka na bizaleli na bango ya kala; bagumbamelaka penza Yawe te mpe batosaka te bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bakitani ya Jakobi oyo apesaki kombo « Isalaele. »
他們直到如今仍照先前的風俗去行,不專心敬畏耶和華,不全守自己的規矩、典章,也不遵守耶和華吩咐雅各後裔的律法、誡命。(雅各,就是從前耶和華起名叫以色列的。)
35 Tango Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele, alobaki na bango: « Bokogumbamela banzambe mosusu te, bokofukamela yango te, bokosalela yango te mpe bokobonzela yango bambeka te;
耶和華曾與他們立約,囑咐他們說:「不可敬畏別神,不可跪拜事奉他,也不可向他獻祭。
36 kaka Yawe oyo abimisaki bino wuta na Ejipito, na nguya mpe na loboko esembolama, nde bosengeli kogumbamela. Liboso na Ye kaka nde bosengeli kogumbama mpe kobonza bambeka.
但那用大能和伸出來的膀臂領你們出埃及地的耶和華,你們當敬畏,跪拜,向他獻祭。
37 Bosengeli tango nyonso kozala na bokebi mpo na kobatela bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe akomaki mpo na bino. Bogumbamela banzambe mosusu te,
他給你們寫的律例、典章、律法、誡命,你們應當永遠謹守遵行,不可敬畏別神。
38 bobosana te boyokani oyo nasalaki elongo na bino, mpe bogumbamela banzambe mosusu te.
我-耶和華與你們所立的約你們不可忘記,也不可敬畏別神。
39 Kaka Yawe, Nzambe na bino, nde bosengeli kogumbamela, pamba te Ye nde akangolaki bino na maboko ya banguna na bino nyonso. »
但要敬畏耶和華-你們的上帝,他必救你們脫離一切仇敵的手。」
40 Kasi bato ya bikolo wana bayokaki te mpe batingamaki kaka na bizaleli na bango ya kala.
他們卻不聽從,仍照先前的風俗去行。
41 Atako bato ya bikolo yango bazalaki kotosa Yawe, kasi bazalaki mpe kosalela banzambe na bango ya bikeko. Kino lelo, bana na bango mpe bakitani na bango bazali kokoba kosala makambo oyo bakoko na bango bazalaki kosala.
如此這些民又懼怕耶和華,又事奉他們的偶像。他們子子孫孫也都照樣行,效法他們的祖宗,直到今日。

< 2 Bakonzi 17 >