< 2 Bakolinto 9 >

1 Mpo na ngai, ezali na tina te ya kokomela bino na tina na lisungi ya kopesa na basantu,
אמנם אין צרך לכתב אליכם על דבר השרות אשר לעזרת הקדשים׃
2 pamba te nayebi molende na bino mpo na kosunga, mpe nazalaki komikumisa na tina na yango epai ya bato ya Masedwane. Nazalaki koloba na bango: « Kati na Akayi, wuta na mobu oyo eleki, bazali ya kobongama mpo na kopesa. » Mpe bolingo na bino etindikaki bato mingi kati na bango na kosunga.
כי ידעתי את נדיבתכם אשר עליה אני מתהלל בכם לפני אנשי מקדוניא לאמר אכיא מזמנת היא משנה שעברה ותער הקנאה היוצאת מכם את רוח רבם׃
3 Kasi nazali kotindela bino bandeko mpo ete, na likambo yango, lolendo na biso na tina na bino emonana te lokola ya pamba, kasi mpo ete bozala penza ya kobongama, ndenge kaka nalobaki yango.
אבל שלחתי את האחים פן תהיה לריק תהלתנו עליכם בדבר הזה ולמען תהיו מזמנים כאשר אמרתי׃
4 Pamba te soki bato ya Masedwane bayei elongo na ngai mpe bakuti bino bozali ya kobongama te, tokoyoka penza soni, mpo ete tozali penza kotiela bino motema; mpe ekozala soni na biso kaka te, kasi soni na bino mpe lokola.
פן בבוא אתי אנשים ממקדוניא ימצאו אתכם לא מזמנים ונבוש אנחנו ואינני אמר אתם בבטחון הזה אשר התהללנו בו׃
5 Yango wana, namonaki ete ezali malamu kosenga na bandeko yango ete bakoma epai na bino liboso na ngai, mpo na kobongisa makabo oyo bolakaki. Boye ekomizalela tango ngai nakokoma, mpe ekolakisa ete bopesaki yango na esengo mpe na bonsomi, kasi na makasi te.
על כן היה נכון בעיני לבקש מן האחים כי יקדמו ללכת אליכם ויכינו את ברכתכם המיועדה מלפנים למען תהיה מוכנת כעין ברכה ולא כעין כילות׃
6 Bokanisaka likambo oyo: Moto oyo alonaka moke abukaka mpe moke, mpe moto oyo alonaka ebele abukaka mpe ebele.
כי הנה הזרע בצמצום גם יקצר בצמצום והזרע בברכות גם יקצר בברכות׃
7 Tika ete moko na moko kati na bino apesa oyo akanaki kopesa kati na motema na ye, na mawa te mpe na makasi te, pamba te Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.
וכל איש כאשר ידבנו לבו לא מצער ולא מאנס כי הנתן בלב שמח יאהבנו אלהים׃
8 Nzambe azali mpe na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya ndenge na ndenge mpo ete, na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozala na nyonso oyo bozali na yango na bosenga mpe botonda lisusu na oyo bokosala na yango misala ya malamu ya lolenge nyonso,
ואלהים יכל להשפיע עליכם כל חסד עד כי יהיה לכם בכל עת די ספוקכם בכל ותותירו בכל מעשה טוב׃
9 kolanda ndenge ekomama: « Akabelaka babola na motema ya esengo, mpe bosembo na Ye ewumelaka libela na libela. » (aiōn g165)
ככתוב פזר נתן לאביונים צדקתו עמדת לעד׃ (aiōn g165)
10 Mpe Ye oyo apesaka nkona epai ya moloni mpe lipa lokola bilei akopesa lisusu, akofulukisa nkona na bino mpe akokolisa bambuma ya bosembo na bino.
והנתן זרע לזרע ולחם לאכל יתן וירבה את זרעכם ויפריא תנובות צדקתכם׃
11 Boye bokokoma bazwi ya biloko nyonso mpo ete bokoka kokabaka tango nyonso; bongo bato epai ya banani tokopesa makabo na bino bakozongisa matondi epai ya Nzambe.
למען תעשירו בכל לכל התמימות הפעלת תודה לאלהים על ידינו׃
12 Pamba te lotomo ya makabo na bino ezali kaka te mpo na kokokisa bosenga ya basantu, kasi ezali mpe mpo ete matondi mingi ezonga epai ya Nzambe.
כי שרות העבודה הזאת לא לבד ימלא את מחסרי הקדושים כי גם יודו רבים לאלהים בשרותכם הנאמן הזה׃
13 Mpo ete lotomo yango ekotalisa bosolo ya komipesa na bino, basantu bakokumisa Nzambe mpo na botosi ya kondima na bino kati na Sango Malamu ya Klisto, mpe mpo na esengo oyo mitema na bino ezali na yango mpo na kokabola biloko na bino elongo na bango mpe elongo na bato nyonso.
ויכבדו את האלהים על משמעת הודאתכם לבשורת המשיח ועל תמת התחברותכם אליהם ואל כלם׃
14 Mpe bakosambela mpo na bino, mpo na kolakisa bolingo makasi oyo bazali na yango mpo na bino, likolo ya ngolu monene oyo Nzambe apesa bino.
והם בהתחננם בעדכם נכספים לכם בעבור חסד האלהים אשר גבר עליכם׃
15 Tika ete matondi epesamela Nzambe mpo na likabo na Ye, oyo bato bakoki kolimbola te!
ותודה לאלהים על מתנתו העצומה מספר׃

< 2 Bakolinto 9 >