< 2 Bakolinto 10 >

1 Ngai Polo oyo namonani lokola moto na bolembu na miso na bino, kasi lokola moto ya makambo makasi tango nazalaka mosika, nazali kosenga na bino, na boboto mpe na bolingo ya Klisto:
我保祿──就是那在你們中面對面時就謙卑,不在的時候就對你們膽大的──親自藉基督的溫良和良善勸告你們,
2 Nabondeli bino, tango nakoya epai na bino, bopesa ngai nzela te ya kosalela makambo makasi oyo nazali kokanisa kolakisa epai ya bato oyo bakanisaka ete biso totambolaka na mosuni.
甚至求你們,不要叫我到你們那裏時,因果決而大了膽──這種果決,本來是我決意要對付那些,以我們為按照血肉而行事的人的──
3 Pamba te atako ezali penza ya solo ete tozali bato, mpe tozali kobika bomoi na biso kati na nzoto, kasi tobundaka te kolanda nzoto.
我們固然是在血肉中行事,卻不是按照血肉而交戰,
4 Bibundeli oyo tobundaka na yango ezali ya bonzoto te, kasi ezali bibundeli ya nguya kati na Nzambe mpo na kokweyisa bandako batonga makasi. Solo, tobukaka makanisi ya mabe,
因為我們作戰的武器,不是屬於血肉的,而是憑天主有力的武器,足以攻破堅固的堡壘:攻破敵人詭計,
5 tokweyisaka makanisi ya lokuta mpe nguya nyonso oyo etelemelaka boyebi ya Nzambe; tolongaka makanisi nyonso ya bomoto mpe tosalaka ete yango etosa Klisto.
以及一切為反對天主的智識所樹立的高塞,並擄獲一切人的心意,使之基督;
6 Lisusu, tomilengeli mpo na kopesa bozangi botosi nyonso etumbu, tango kaka botosi na bino ekokoka.
並且我們已準備停當,及至你們完全a寺,來懲罰一切的不服從。
7 Botala penza makambo ndenge ezaleli. Soki ezali na moto oyo andimisami solo ete azali ya Klisto, ayeba mpe ete soki ye azali ya Klisto, biso mpe tozali ya Klisto lokola ye.
你們看看擺在眼前的事實罷! 如果自信是屬於基督的,他自己該再想想:他怎樣屬於基督,我們也怎樣是;
8 Bongo, ata namikumisaka koleka mpo na bokonzi oyo Nkolo apesa biso, mpo na kolendisa kondima na bino kasi mpo na kobebisa yango te, nakoyokela yango soni ata moke te
因為既便我對我們的權柄有一點過份的誇耀──這權柄是由主所賜與,為建樹,而不是為破壞你們的──我也不羞愧,
9 mpo ete namonana te lokola nde nazali kobangisa bino na nzela ya mikanda na ngai.
免得有人以為我好像只會藉著書信來恐嚇你們。
10 Pamba te bato mosusu balobaka: « Mikanda na ye ezalaka makasi mpe ebangisaka; kasi soki ye moko azali elongo na biso, azalaka na ye moto ya bolembu mpe maloba na ye ezalaka tina te. »
因為有人說:「他的書信的確嚴厲而又強硬,但他本人在時卻軟弱無能,言語又空洞可輕。」
11 Boye tika ete moto oyo akanisaka bongo asimba likambo oyo: ndenge tolobaka kati na mikanda na biso tango tozalaka mosika na bino, ndenge wana mpe tokosala tango tokozala epai na bino.
這樣的人該想一想,我們不在的時候,寫信時在言語上是怎樣,我們來到的時候,在行事上也必是這樣。
12 Toboyi komikokanisa to komekana na bato mosusu oyo bamikumisaka bango moko, tango balukaka komikokanisa mpe komekana bango na bango. Solo, bazangi mayele!
其實;我們不敢拿自己與某些舉薦自己的人同例或相比:他們是以自己來度量自己,以自己來跟自己相比,這決不是明智。
13 Kasi biso, tokomikumisa te koleka ndelo; tokomikumisa kaka kati na bandelo ya mosala oyo Nzambe apesa biso, oyo mpe esali ete tokoma kino epai na bino.
我們誇耀決不越過範圍,而只是按照天主所指給我們的界限範圍,照這範圍也一直達到你們那裏。
14 Solo, toleki bandelo na biso te lokola nde tokomaki te kino epai na bino, pamba te tokomaki penza kino epai na bino mpo na komemela bino Sango Malamu ya Klisto.
我們並沒有過於伸展自己,好像從沒有到達你們那裏似的,其實,是我們先帶著基督的福音,到了你們那裏的;
15 Tomikumisaka te mpo na mosala ya bato mosusu; nzokande, tozali na elikya ete, wana kondima na bino ezali kokola, mosala na biso mpe ezali kokoba koya monene kati na bino kolanda bandelo ya mosala, oyo Nzambe apesa biso.
我們共並沒有越過了範圍,以別人勞苦而誇耀;我們只希望因著你們信德的長進,在你們中按照指給我們的界限越發開展,
16 Boye, tokoteya Sango Malamu kati na bituka oyo ezali mosika na bino. Pamba te toboyi na biso komikumisa na tina na mosala oyo bato mosusu basali kati na elanga na bango ya mosala.
以致將福音傳到你們以外的地方,但不在別人的界限內,以別人已成的事而誇耀。
17 Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa kati na Nkolo!
『凡要誇耀的,應當因主而誇耀。』
18 Pamba te moto oyo bandimaka, ezali te oyo amilobelaka ye moko, kasi ezali nde oyo Nkolo atatolaka bosolo na tina na ye.
因為不是自己舉薦自己的,那人是可取的,而是天主所舉薦的。

< 2 Bakolinto 10 >