< 2 Masolo ya Kala 7 >

1 Tango Salomo asilisaki kosambela, moto ekitaki wuta na Likolo mpe ezikisaki mbeka ya kotumba mpe bambeka mosusu, mpe nkembo na Yawe etondisaki Tempelo.
所羅門祈禱已畢,就有火從天上降下來,燒盡燔祭和別的祭。耶和華的榮光充滿了殿;
2 Banganga-Nzambe bakokaki te kokota na Tempelo ya Yawe, pamba te nkembo na Yawe etondisaki yango.
因耶和華的榮光充滿了耶和華殿,所以祭司不能進殿。
3 Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki moto kokita mpe nkembo na Yawe na likolo ya Tempelo, bafukamaki bilongi kino na mabele; bongo bagumbamelaki mpe basanzolaki Yawe na maloba oyo: « Azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko! »
那火降下、耶和華的榮光在殿上的時候,以色列眾人看見,就在鋪石地俯伏叩拜,稱謝耶和華說: 耶和華本為善, 他的慈愛永遠長存!
4 Mokonzi mpe bana nyonso ya Isalaele babonzaki bambeka liboso ya Yawe.
王和眾民在耶和華面前獻祭。
5 Mokonzi Salomo abonzaki lokola mbeka bangombe nkoto tuku mibale na mibale mpe bameme nkoto nkama moko na tuku mibale. Ezalaki ndenge wana nde mokonzi mpe bato nyonso babulisaki Tempelo ya Nzambe.
所羅門王用牛二萬二千,羊十二萬獻祭。這樣,王和眾民為上帝的殿行奉獻之禮。
6 Banganga-Nzambe batelemaki na bisika na bango ya mosala, ndenge moko na Balevi mpe bibetelo mindule ya Yawe oyo mokonzi Davidi asalaki mpo na kosanzola na yango Yawe na maloba oyo: « Bolingo na Ye ewumelaka seko na seko. » Ezalaki Davidi moto apesaki bango mokumba ya kobeta bibetelo mindule mpo na kokumisa Yawe. Banganga-Nzambe bazalaki ya kotalana na Balevi mpe bazalaki kobeta bakelelo; bongo bana nyonso ya Isalaele bazalaki ya kotelema.
祭司侍立,各供其職;利未人也拿着耶和華的樂器,就是大衛王造出來、藉利未人頌讚耶和華的。(他的慈愛永遠長存!)祭司在眾人面前吹號,以色列人都站立。
7 Salomo abulisaki lopango ya kati oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe mpe abonzaki wana bambeka ya kotumba mpe mafuta ya bambeka ya boyokani; pamba te etumbelo ya bronze oyo Salomo atongaki ekokaki te koyamba bambeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta.
所羅門因他所造的銅壇容不下燔祭、素祭,和脂油,便將耶和華殿前院子當中分別為聖,在那裏獻燔祭和平安祭牲的脂油。
8 Boye, na tango wana, Salomo elongo na Isalaele mobimba basalaki feti oyo ewumelaki mikolo sambo; ezalaki lisanga monene ya bato oyo bayaki wuta na Amati kino na mayi oyo etiolaka na kati-kati ya bangomba ya Ejipito.
那時所羅門和以色列眾人,就是從哈馬口直到埃及小河,所有的以色列人都聚集成為大會,守節七日。
9 Na mokolo ya mwambe, basalaki mayangani monene, pamba te babulisaki etumbelo mikolo sambo mpe basalaki feti mikolo sambo.
第八日設立嚴肅會,行奉獻壇的禮七日,守節七日。
10 Bongo na mokolo ya tuku mibale na misato ya sanza ya sambo, Salomo azongisaki bato na bandako na bango ya kapo, na esengo mpe na nsayi kati na mitema mpo na bolamu oyo Yawe asalelaki Davidi, Salomo mpe Isalaele, bato na Ye.
七月二十三日,王遣散眾民;他們因見耶和華向大衛和所羅門與他民以色列所施的恩惠,就都心中喜樂,各歸各家去了。
11 Sima na Salomo kosilisa kotonga Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe kokokisa nyonso oyo azalaki na yango na makanisi ya kosala kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na ndako na ye moko,
所羅門造成了耶和華殿和王宮;在耶和華殿和王宮凡他心中所要做的,都順順利利地做成了。
12 Yawe abimelaki Salomo, na butu, mpe alobaki: — Nayoki losambo na yo mpe naponi esika oyo lokola Ndako ya bambeka mpo na Ngai.
夜間耶和華向所羅門顯現,對他說:「我已聽了你的禱告,也選擇這地方作為祭祀我的殿宇。
13 Soki nakangi likolo mpo ete mvula ebeta te to natindi mabanki mpo ete ebebisa mokili to natindi bokono mabe kati na bato,
我若使天閉塞不下雨,或使蝗蟲吃這地的出產,或使瘟疫流行在我民中,
14 soki bato na Ngai, oyo babengami na Kombo na Ngai bamikitisi, basambeli, baluki elongi na Ngai, mpe bapesi mokongo na banzela na bango ya mabe, Ngai, nakoyoka bango wuta na Likolo, nakolimbisa masumu na bango mpe nakobikisa mokili na bango.
這稱為我名下的子民,若是自卑、禱告,尋求我的面,轉離他們的惡行,我必從天上垂聽,赦免他們的罪,醫治他們的地。
15 Kobanda sik’oyo, miso na Ngai ekofungwama, mpe matoyi na Ngai ekoyoka na bokebi mabondeli oyo ekosalema na esika oyo.
我必睜眼看、側耳聽在此處所獻的禱告。
16 Naponi mpe nabulisi Tempelo wana mpo ete Kombo na Ngai ezala kuna tango nyonso. Miso mpe motema na Ngai ekozala kuna na Tempelo yango mpo na libela.
現在我已選擇這殿,分別為聖,使我的名永在其中,我的眼、我的心也必常在那裏。
17 Mpo na yo, soki okotambola liboso na Ngai ndenge Davidi, tata na yo, atambolaki; soki okosala nyonso oyo natindaki yo mpe okobatela mibeko mpe malako na Ngai,
你若在我面前效法你父大衛所行的,遵行我一切所吩咐你的,謹守我的律例典章,
18 nakolendisa kiti na yo ya bokonzi kolanda boyokani oyo nasalaki elongo na Davidi, tata na yo, tango nalobaki: « Okotikalaka kozanga te mokitani mpo na kokamba Isalaele lokola mokonzi. »
我就必堅固你的國位,正如我與你父大衛所立的約,說:『你的子孫必不斷人作以色列的王。』
19 Kasi soki bopengwi mosika na Ngai, soki bosundoli mibeko mpe malako na Ngai, oyo natie liboso na bino; soki bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango,
「倘若你們轉去丟棄我指示你們的律例誡命,去事奉敬拜別神,
20 nakopikola bino na mabele na Ngai, mabele oyo napesaki bino; nakobwaka mosika ya miso na Ngai Tempelo oyo nabulisi mpo na Kombo na Ngai mpe nakokomisa yango eloko ya kotiola mpe ya soni kati na bikolo nyonso.
我就必將以色列人從我賜給他們的地上拔出根來,並且我為己名所分別為聖的殿也必捨棄不顧,使他在萬民中作笑談,被譏誚。
21 Atako Tempelo oyo ezali sik’oyo kitoko penza, kasi bato nyonso oyo bakoleka pembeni na yango bakokamwa mpe bakoloba: « Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na mokili oyo mpe na Tempelo oyo? »
這殿雖然甚高,將來經過的人必驚訝說:『耶和華為何向這地和這殿如此行呢?』
22 Mpe bakoyanola: « Ezali mpo ete basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na Ejipito mpe bamipesaki na banzambe mosusu, bafukamelaki yango mpe basalelaki yango; yango wana Yawe ayeisi likolo na bango pasi oyo nyonso. »
人必回答說:『是因此地的人離棄耶和華-他們列祖的上帝,就是領他們出埃及地的上帝,去親近別神,敬拜事奉他,所以耶和華使這一切災禍臨到他們。』」

< 2 Masolo ya Kala 7 >