< 2 Masolo ya Kala 5 >

1 Tango Salomo asilisaki misala nyonso ya kotonga Tempelo ya Yawe, amemaki biloko oyo Davidi, tata na ye, abulisaki: palata, wolo mpe bisalelo nyonso; atiaki yango kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Nzambe.
So was all the worke finished that Salomon made for the house of the Lord, and Salomon brought in the things that Dauid his father had dedicated, with the siluer and the golde, and all the vessels, and put them among the treasures of the house of God.
2 Bongo Salomo abengisaki, na Yelusalemi, bakambi nyonso ya Isalaele, bakambi nyonso ya bituka mpe ya mabota nyonso ya bato ya Isalaele, mpo na komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na Siona, engumba ya Davidi.
Then Salomon assembled the Elders of Israel, and all the heads of the tribes, the chiefe fathers of the children of Israel vnto Ierusalem to bring vp the Arke of the couenant of the Lord from the citie of Dauid, which is Zion.
3 Bato nyonso ya Isalaele basanganaki pene ya mokonzi na tango ya feti ya Bandako ya kapo, na sanza ya sambo.
And all ye men of Israel assembled vnto the King at the feast: it was in ye seuenth moneth.
4 Tango bakambi nyonso ya Isalaele bakomaki, Balevi batombolaki Sanduku.
And all the Elders of Israel came, and the Leuites tooke vp the Arke.
5 Banganga-Nzambe mpe Balevi bamemaki Sanduku yango, Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bisalelo nyonso ya bule oyo ezalaki kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
And they caried vp the Arke and the Tabernacle of the Congregation: and all the holy vessels that were in the Tabernacle, those did the Priests and Leuites bring vp.
6 Mokonzi Salomo mpe lisanga mobimba ya Isalaele oyo esanganaki epai na ye liboso ya Sanduku babonzaki lokola mbeka bameme mpe bangombe oyo balongaki kotanga te mpo na koyeba motango na yango, pamba te ezalaki ebele penza.
And King Salomon and all the Congregation of Israel that were assembled vnto him, were before ye Arke, offring sheepe and bullocks, which could not be told nor nobred for multitude.
7 Banganga-Nzambe batiaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na esika na yango, kati na Tempelo, kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, na se ya mapapu ya basheribe.
So the Priests brought the Arke of the couenant of the Lord vnto his place, into the Oracle of the house, into the most Holy place, euen vnder the wings of the Cherubims.
8 Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama na likolo ya esika oyo Sanduku ezalaki, bongo ezipaki Sanduku mpe banzete ya komemela yango.
For ye Cherubims stretched out their wings ouer the place of the Arke, and the Cherubims couered the Arke and the barres thereof aboue.
9 Mpo ete banzete yango elekaki milayi, basonge na yango ezalaki komonana wuta na likolo ya Sanduku, na liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule; kasi ezalaki komonana te wuta na libanda. Sanduku etikala wana kino na mokolo ya lelo.
And they drewe out the barres, that the endes of the barres might bee seene out of the Arke before the Oracle, but they were not seene without: and there they are vnto this day.
10 Kati na Sanduku, ezalaki na eloko mosusu te longola kaka bitando mibale ya mabanga oyo Moyize atiaki na Orebi epai wapi Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito.
Nothing was in the Arke, saue the two Tables, which Moses gaue at Horeb, where the Lord made a couenant with the children of Israel, when they came out of Egypt.
11 Tango Banganga-Nzambe bazalaki kobima libanda ya Esika ya bule, pamba te bango nyonso bamibulisaki mpe batalaki kokitana ya masanga na bango te,
And when the Priestes were come out of the Sanctuarie (for all the Priests that were present, were sanctified and did not waite by course.
12 Balevi oyo nyonso bazalaki kobeta mindule: Azafi, Emani, Yedutuni elongo na bana na bango ya mibali mpe bandeko na bango; bazalaki kotelema na ngambo ya este ya etumbelo, balata bilamba ya lino ya kitoko, mpe bazalaki kobeta manzanza, mandanda mpe banzenze. Bazalaki elongo na Banganga-Nzambe nkama moko na tuku mibale oyo bazalaki kobeta bakelelo.
And the Leuites the singers of all sortes, as of Asaph, of Heman, of Ieduthun, and of their sonnes and of their brethren, being clad in fine linen, stoode with cymbales, and with violes and harpes at the East ende of the altar, and with them an hundreth and twentie Priestes blowing with trumpets:
13 Babeti nyonso ya bakelelo mpe bayembi bazalaki kosangana lokola moto moko mpo na kotombola mongongo moko, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe. Bazalaki kotombola mingongo na bango mpo na kokumisa mpe koyembela Yawe na bakelelo, na manzanza mpe na bibetelo mosusu ya mindule: Yawe azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko! Na tango wana kaka, Tempelo ya Yawe etondisamaki na lipata.
And they were as one, blowing trumpets, and singing, and made one sounde to bee heard in praysing and thanking the Lord, and when they lift vp their voyce with trumpets and with cymbales, and with instruments of musicke, and when they praysed the Lord, singing, For he is good, because his mercie lasteth for euer) then the house, euen the house of the Lord was filled with a cloude,
14 Mpe mpo na lipata, Banganga-Nzambe bakokaki lisusu te kotelema kati na yango mpo na kosala mosala na bango, pamba te nkembo na Yawe etondisaki Tempelo ya Nzambe.
So that the Priests could not stand to minister, because of the cloude: for the glory of the Lord had filled the house of God.

< 2 Masolo ya Kala 5 >