< 2 Masolo ya Kala 30 >

1 Ezekiasi atindaki bamemi sango kati na Isalaele mobimba mpe Yuda, mpe akomelaki Efrayimi mpe Manase mikanda mpo na kosenga na bango ete baya na Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi, mpo na kosepela feti ya Pasika ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
希西家差遣人去見以色列和猶大眾人,又寫信給以法蓮和瑪拿西人,叫他們到耶路撒冷耶和華的殿,向耶和華-以色列的上帝守逾越節;
2 Mokonzi elongo na bakalaka na ye mpe lisanga mobimba ya Yelusalemi bazwaki mokano ya kosepela feti ya Pasika na sanza ya mibale.
因為王和眾首領,並耶路撒冷全會眾已經商議,要在二月內守逾越節。
3 Balongaki te kosepela feti ya Pasika na mokolo oyo ekatama, pamba te Banganga-Nzambe oyo bamibulisaki bazalaki mingi te, mpe bato basanganaki te na Yelusalemi.
正月間他們不能守;因為自潔的祭司尚不敷用,百姓也沒有聚集在耶路撒冷;
4 Mokonzi mpe lisanga mobimba bandimaki mabongisi yango,
王與全會眾都以這事為善。
5 bazwaki mokano ya kopesa mayebisi kati na Isalaele mobimba, longwa na Beri-Sheba kino na Dani, mpo na kosenga na bato nyonso ete baya kosepela feti ya Pasika, na Yelusalemi mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. Pamba te bato moke kaka basepelaki yango kolanda ndenge ekomama kati na makomi.
於是定了命令,傳遍以色列,從別是巴直到但,使他們都來,在耶路撒冷向耶和華-以色列的上帝守逾越節;因為照所寫的例,守這節的不多了。
6 Na etinda ya mokonzi, bamemi sango bakendeki kati na Isalaele mobimba mpe Yuda, na mikanda oyo ewutaki epai ya mokonzi mpe bakalaka na ye. Tala makambo oyo ezalaki kati na mikanda yango: « Bana ya Isalaele, bozongela Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele, mpo ete Ye mpe azongela bino oyo bobiki na maboko ya bakonzi ya mboka Asiri!
驛卒就把王和眾首領的信,遵着王命傳遍以色列和猶大。信內說:「以色列人哪,你們當轉向耶和華-亞伯拉罕、以撒、以色列的上帝,好叫他轉向你們這脫離亞述王手的餘民。
7 Bozala te lokola batata mpe bandeko na bino oyo bazangaki boyengebene liboso ya Yawe, Nzambe ya batata na bango. Yango wana asalaki ete babebisama ndenge bozali komona.
你們不要效法你們列祖和你們的弟兄;他們干犯耶和華-他們列祖的上帝,以致耶和華丟棄他們,使他們敗亡,正如你們所見的。
8 Bozala moto makasi te lokola batata na bino; bomipesa epai na Yawe, boya na Esika ya bule oyo Ye moko abulisi mpo na libela mpe bosalela Yawe, Nzambe na bino, mpo ete kanda makasi na Ye ezala mosika na bino!
現在不要像你們列祖硬着頸項,只要歸順耶和華,進入他的聖所,就是永遠成聖的居所;又要事奉耶和華-你們的上帝,好使他的烈怒轉離你們。
9 Soki solo bozongeli Yawe, bandeko mpe bana na bino oyo bakendeki na bowumbu bakozwa ngolu liboso ya bato oyo bakangaki bango, mpe bakozonga na mokili oyo; pamba te Yawe, Nzambe na bino, atonda na ngolu mpe na mawa. Solo, soki bozongeli Ye, akobalola te elongi na Ye mosika na bino. »
你們若轉向耶和華,你們的弟兄和兒女必在擄掠他們的人面前蒙憐恤,得以歸回這地,因為耶和華-你們的上帝有恩典、施憐憫。你們若轉向他,他必不轉臉不顧你們。」
10 Bamemi sango batambolaki kati na bingumba nyonso ya Efrayimi mpe ya Manase kino na Zabuloni. Kasi bato bazalaki koseka mpe kotiola bango.
驛卒就由這城跑到那城,傳遍了以法蓮、瑪拿西,直到西布倫。那裏的人卻戲笑他們,譏誚他們。
11 Nzokande, ndambo ya bato ya Aseri, ya Manase mpe ya Zabuloni bamikitisaki mpe bakendeki na Yelusalemi.
然而亞設、瑪拿西、西布倫中也有人自卑,來到耶路撒冷。
12 Kati na mokili ya Yuda, loboko ya Nzambe ezalaki kosala na nguya makasi epai ya bato, mpo na kopesa bango bomoko na molimo mpo na kotosa mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, kolandisama na Liloba na Yawe.
上帝也感動猶大人,使他們一心遵行王與眾首領憑耶和華之言所發的命令。
13 Bato ebele basanganaki na Yelusalemi mpo na kosepela feti ya Mapa ezanga levire, na sanza ya mibale: bazalaki penza ebele ya bato.
二月,有許多人在耶路撒冷聚集,成為大會,要守除酵節。
14 Babukaki bitumbelo kati na Yelusalemi mpe balimwisaki bambabola nyonso ya malasi na kobwaka yango na lubwaku ya Sedron.
他們起來,把耶路撒冷的祭壇和燒香的壇盡都除去,拋在汲淪溪中。
15 Bakataki kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya mibale. Banganga-Nzambe elongo na Balevi bayokaki soni, bamibulisaki mpe babonzaki bambeka ya kotumba kati na Tempelo ya Yawe.
二月十四日,宰了逾越節的羊羔。祭司與利未人覺得慚愧,就潔淨自己,把燔祭奉到耶和華殿中,
16 Bazongelaki misala na bango ndenge ekomama na mibeko ya Moyize, moto na Nzambe. Balevi bazalaki kopesa makila ya bambeka epai ya Banganga-Nzambe; mpe bango, Banganga-Nzambe, bazalaki kosopa yango na etumbelo.
遵着神人摩西的律法,照例站在自己的地方;祭司從利未人手裏接過血來,灑在壇上。
17 Lokola bato mingi kati na lisanga bamibulisaki te, Balevi bazwaki mokumba ya kokata bakingo ya bampate ya Pasika mpo na bato wana nyonso oyo bazalaki peto te; mpe na bongo, bakokaki te kobulisa bampate na bango epai na Yawe.
會中有許多人尚未自潔,所以利未人為一切不潔之人宰逾越節的羊羔,使他們在耶和華面前成為聖潔。
18 Atako bato ebele oyo bawutaki na Manase, na Efrayimi, na Isakari mpe na Zabuloni bamipetolaki te, kasi baliaki Pasika na kozanga kolanda oyo ekomama. Yango wana Ezekiasi abondelaki boye mpo na bango: « Yawe, Yo oyo ozali malamu, tika ete olimbisa
以法蓮、瑪拿西、以薩迦、西布倫有許多人尚未自潔,他們卻也吃逾越節的羊羔,不合所記錄的定例。希西家為他們禱告說:「凡專心尋求上帝,就是耶和華-他列祖之上帝的,雖不照着聖所潔淨之禮自潔,求至善的耶和華也饒恕他。」
19 moto nyonso oyo amipesi na koluka Nzambe, Yawe, Nzambe ya bakoko na ye, na motema na ye mobimba atako amipetolaki te kolanda mibeko ya Esika ya bule! »
20 Yawe ayokaki libondeli ya Ezekiasi mpe abetaki bato te.
耶和華垂聽希西家的禱告,就饒恕百姓。
21 Boye bato ya Isalaele oyo bazalaki na Yelusalemi basepelaki mikolo sambo mpe na esengo makasi feti ya Mapa ezanga levire wana Balevi mpe Banganga-Nzambe bazalaki kokumisa Yawe mikolo nyonso na kobeta makasi bibetelo mindule na bango mpo na lokumu ya Yawe.
在耶路撒冷的以色列人大大喜樂,守除酵節七日。利未人和祭司用響亮的樂器,日日頌讚耶和華。
22 Ezekiasi alendisaki Balevi nyonso oyo balakisaki ete bayebi malamu mosala ya Yawe. Na mikolo sambo ya feti, baliaki misuni ya bambeka, babonzaki bambeka ya boyokani mpe basanzolaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango.
希西家慰勞一切善於事奉耶和華的利未人。於是眾人吃節筵七日,又獻平安祭,且向耶和華-他們列祖的上帝認罪。
23 Lisanga mobimba eyokanaki kobakisa mikolo mosusu sambo mpo na kokoba kosepela feti. Boye, basalaki feti na esengo na mikolo yango sambo.
全會眾商議,要再守節七日;於是歡歡喜喜地又守節七日。
24 Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, apesaki mpo na lisanga bangombe ya mibali nkoto moko, bameme mpe bantaba nkoto sambo; mpe bakalaka bapesaki mpo na lisanga bangombe ya mibali nkoto moko, bameme mpe bantaba nkoto zomi. Banganga-Nzambe ebele bamibulisaki.
猶大王希西家賜給會眾公牛一千隻,羊七千隻為祭物;眾首領也賜給會眾公牛一千隻,羊一萬隻,並有許多的祭司潔淨自己。
25 Lisanga mobimba ya Yuda, Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso ya Isalaele mpe bapaya oyo bawutaki na Isalaele to bavandi ya Yuda bazalaki na esengo.
猶大全會眾、祭司、利未人,並那從以色列地來的會眾和寄居的人,以及猶大寄居的人,盡都喜樂。
26 Esengo ezalaki makasi kati na Yelusalemi, pamba te wuta na tango ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, likambo ya boye etikala nanu kosalema te kati na Yelusalemi.
這樣,在耶路撒冷大有喜樂,自從以色列王大衛兒子所羅門的時候,在耶路撒冷沒有這樣的喜樂。
27 Banganga-Nzambe mpe Balevi batelemaki mpo na kopambola bato, mpe Nzambe ayokaki bango mpo ete losambo na bango ekomaki kino na Likolo, evandelo na Ye ya bule.
那時,祭司、利未人起來,為民祝福。他們的聲音蒙上帝垂聽,他們的禱告達到天上的聖所。

< 2 Masolo ya Kala 30 >