< 2 Masolo ya Kala 27 >

1 Yotami azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yerusha. » Yerusha azalaki mwana ya Tsadoki.
約坦登基的時候年二十五歲,在耶路撒冷作王十六年,他母親名叫耶路沙,是撒督的女兒。
2 Yotami asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Oziasi, tata na ye, asalaki; kasi ye, atikalaki kokota te kati na Tempelo ya Yawe. Atako bongo, bato bakobaki kosala makambo mabe.
約坦行耶和華眼中看為正的事,效法他父烏西雅一切所行的,只是不入耶和華的殿。百姓還行邪僻的事。
3 Yotami atongaki ekuke ya likolo ya Tempelo ya Yawe mpe asalaki misala ebele na mir, na ngomba Ofeli.
約坦建立耶和華殿的上門,在俄斐勒城上多有建造,
4 Atongaki mpe bingumba kati na etuka ya bangomba ya Yuda, bandako makasi mpe bandako milayi kati na bazamba.
又在猶大山地建造城邑,在樹林中建築營寨和高樓。
5 Yotami abundisaki mokonzi ya bato ya Amoni mpe alongaki bango. Na mobu wana mpe na mibu mibale oyo elandaki, bato ya Amoni bafutaki ye lokola mpako ya mokonzi bakilo nkoto misato na nkama mitano ya palata, bakilo nkoto minei na nkama mitano ya ble mpe bakilo nkoto minei na nkama mitano ya orje.
約坦與亞捫人的王打仗勝了他們,當年他們進貢銀一百他連得,小麥一萬歌珥,大麥一萬歌珥;第二年、第三年也是這樣。
6 Yotami akomaki na nguya makasi, pamba te azalaki kotambola na bosembo na miso ya Yawe, Nzambe na ye.
約坦在耶和華-他上帝面前行正道,以致日漸強盛。
7 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yotami, bitumba mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele mpe ya Yuda.
約坦其餘的事和一切爭戰,並他的行為,都寫在以色列和猶大列王記上。
8 Azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi.
他登基的時候年二十五歲,在耶路撒冷作王十六年。
9 Yotami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Akazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
約坦與他列祖同睡,葬在大衛城裏。他兒子亞哈斯接續他作王。

< 2 Masolo ya Kala 27 >