< 2 Masolo ya Kala 15 >

1 Molimo ya Nzambe akitelaki Azaria, mwana mobali ya Odedi.
Then the Spirite of God came vpon Azariah the sonne of Obed.
2 Azaria ayaki liboso ya Asa mpe alobaki na ye: « Asa elongo na bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, boyoka ngai! Yawe azalaka elongo na bino soki bino bozali elongo na Ye. Soki boluki Ye, akomimonisa epai na bino. Nzokande, soki botiki Ye, Ye mpe akotika bino!
And he went out to meete Asa, and said vnto him, O Asa, and all Iudah, and Beniamin, heare ye me. The Lord is with you, while ye be with him: and if ye seeke him, he wil be founde of you, but if ye forsake him, he will forsake you.
3 Na tango molayi, Isalaele azangaki Nzambe ya solo, azangaki Banganga-Nzambe mpo na koteya ye, mpe azangaki mibeko.
Nowe for a long season Israel hath bene without the true God, and without Priest to teach and without Lawe.
4 Kasi kati na pasi na bango, bazongelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele; balukaki Ye, mpe Ye amimonisaki epai na bango.
But whosoeuer returned in his affliction to the Lord God of Israel, and sought him, he was founde of them.
5 Na tango yango, kimia ezalaki te mpo na bato oyo bazalaki kokende mpe kozonga, pamba te mobulu ezalaki kati na bavandi nyonso ya mikili.
And in that time there was no peace to him, that did goe out and goe in: but great troubles were to all the inhabitants of the earth.
6 Ekolo moko ezalaki kobundisa ekolo mosusu, engumba moko ezalaki kobundisa engumba mosusu, pamba te Nzambe azalaki kokotisa mobulu kati na bango na nzela ya pasi ya lolenge nyonso.
For nation was destroyed of nation, and citie of citie: for God troubled them with all aduersitie.
7 Boye bino, botelema ngwi mpe bolemba te, pamba te misala na bino ezali na lifuti. »
Be ye strong therefore, and let not your handes be weake: for your worke shall haue a rewarde.
8 Sima na Asa koyoka maloba oyo mpe lisakoli ya Azaria, mwana mobali ya mosakoli Odedi, azwaki mpiko, alongolaki banzambe ya bikeko kati na bituka ya Yuda, ya Benjame mpe kati na bingumba oyo abotolaki kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi; azongisaki etumbelo ya Yawe oyo ezalaki liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe.
And when Asa heard these wordes, and the prophesie of Obed the Prophet, he was encouraged, and tooke away the abominations out of all the lande of Iudah, and Beniamin, and out of the cities which he had taken of mount Ephraim, and he renued the altar of the Lord, that was before the porche of the Lord.
9 Asangisaki bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, elongo na bato oyo bawutaki na mabota ya Efrayimi, ya Manase mpe ya Simeoni, oyo bakomaki kovanda kati na bango, pamba te bana ebele ya Isalaele basanganaki na mokonzi Asa tango bamonaki ete Yawe, Nzambe na ye, azali elongo na ye.
And he gathered all Iudah and Beniamin, and the strangers with them out of Ephraim, and Manasseh, and out of Simeon: for there fell many to him out of Israel, when they sawe that the Lord his God was with him.
10 Basanganaki na Yelusalemi na sanza ya misato ya mobu ya zomi na mitano ya bokonzi ya Asa.
So they assembled to Ierusalem in the third moneth, in the fifteenth yere of the reigne of Asa.
11 Na mokolo wana, kati na bomengo ya bitumba oyo bazongaki na yango, babonzelaki Yawe bangombe nkama sambo mpe bameme nkoto sambo.
And they offred vnto the Lord the same time of the spoyle, which they had brought, euen seuen hundreth bullockes, and seuen thousande sheepe.
12 Basalaki boyokani na kolapa ndayi ete bakokangama na Yawe, Nzambe ya batata na bango, na mitema mpe na molimo na bango mobimba;
And they made a couenant to seeke the Lord God of their fathers, with all their heart, and with all their soule.
13 bongo moto nyonso oyo akokangama te na Yawe, Nzambe ya Isalaele, azala mwana to mokolo, tata to mama, basengeli koboma ye.
And whosoeuer will not seeke the Lord God of Israel, shalbe slaine, whether he were small or great, man or woman.
14 Balapaki ndayi epai na Yawe, na mongongo makasi, na kobeta maboko mpe milolo, mpe na lokito ya kelelo mpe ya maseke.
And they sware vnto the Lord with a loude voyce, and with shouting and with trumpets, and with cornets.
15 Bato nyonso ya Yuda basepelaki na ndayi yango, pamba te balapaki yango na mitema na bango mobimba; bazwaki mokano ya kokangama na Yawe Nzambe na esengo, mpe Ye amimonisaki epai na bango. Boye, Yawe apesaki bango bopemi na bangambo nyonso.
And all Iudah reioyced at the othe: for they had sworne vnto the Lord with all their heart, and sought him with a whole desire, and he was founde of them. And the Lord gaue them rest rounde about.
16 Mokonzi Asa alongolaki ezala Maaka, mama na ye, na lokumu ya mama ya mokonzi, pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki ekeko yango ya soni kino kokomisa yango putulu, mpe atumbaki yango kati na lubwaku ya Sedron.
And King Asa deposed Maachah his mother from her regencie, because she had made an idole in a groue: and Asa brake downe her idole, and stamped it, and burnt it at the brooke Kidron.
17 Kasi abebisaki te kati na Isalaele bisambelo ya likolo ya bangomba. Nzokande, Asa abatelaki motema na ye sembo, na mikolo nyonso ya bomoi na ye;
But the hie places were not taken away out of Israel: yet the heart of Asa was perfit all his dayes.
18 azongisaki kati na Tempelo ya Nzambe biloko oyo tata na ye mpe ye moko babulisaki: palata, wolo mpe biloko mosusu.
Also he brought into the house of God the things that his father had dedicate, and that he had dedicate, siluer, and golde, and vessels.
19 Bitumba ezalaki lisusu te kino na mobu ya tuku misato na mitano ya bokonzi ya Asa.
And there was no warre vnto the fiue and thirtieth yeere of the reigne of Asa.

< 2 Masolo ya Kala 15 >