< 1 Batesalonika 4 >

1 Bandeko, mpo na oyo etali makambo mosusu, tolakisaki bino ndenge nini bosengeli kotambola mpo na kosepelisa Nzambe, mpe yango nde bozali kosala. Kasi sik’oyo, tozali kosenga na bino mpe kotinda bino na makasi, kati na Nkolo Yesu, ete bokoba kosalaka bongo koleka.
Finally then, brothers, we beg and exhort you in the Lord Jesus, that as you received from us how you ought to walk and to please God, that you abound more and more.
2 Pamba te boyebi mitindo oyo topesaki bino na Kombo ya Nkolo Yesu.
For you know what instructions we gave you through the Lord Jesus.
3 Nzambe alingi ete bozalaka bule tango nyonso: bokimaka pite;
For this is the will of God: your sanctification, that you abstain from sexual immorality,
4 moko na moko kati na bino asengeli koyeba kobatela nzoto na ye kati na bosantu mpe lokumu,
that each one of you know how to control his own body in sanctification and honour,
5 asengeli koboya kozala mowumbu ya baposa ya nzoto lokola Bapagano oyo bayebi Nzambe te,
not in the passion of lust, even as the Gentiles who don’t know God,
6 asengeli mpe te kokosa to kosala ndeko na ye mabe kati na makambo oyo etali bonzoto, pamba te Nkolo akopesa etumbu na bato nyonso oyo basalaka mabe ya lolenge wana, ndenge toyebisaki mpe tokebisaki bino liboso.
that no one should take advantage of and wrong a brother or sister in this matter; because the Lord is an avenger in all these things, as also we forewarned you and testified.
7 Nzambe abengaki biso te mpo ete tozala bato ya mbindo, kasi mpo ete tobika bomoi na biso na lolenge ya bule.
For God called us not for uncleanness, but in sanctification.
8 Boye moto oyo atosaka mitindo yango te atiolaka moto te kasi atiolaka nde Nzambe oyo apesaki bino Molimo Mosantu na Ye.
Therefore he who rejects this doesn’t reject man, but God, who has also given his Holy Spirit to you.
9 Mpo na oyo etali bolingo kati na bino, ezali lisusu na tina te ya kokomela bino, pamba te Ye moko Nzambe ateyaki bino kolingana bino na bino.
But concerning brotherly love, you have no need that one write to you. For you yourselves are taught by God to love one another,
10 Ezali mpe bolingo yango nde bosengeli kotalisa epai ya bandeko nyonso kati na Masedwane mobimba. Mpe bandeko, tozali kosenga na bino ete bokoba kosalaka bongo koleka,
for indeed you do it towards all the brothers who are in all Macedonia. But we exhort you, brothers, that you abound more and more;
11 ete bolukaka kobika bomoi na bino kati na kimia; mpe tika ete moto nyonso atalaka makambo na ye moko mpe aliaka na motoki na ye moko, ndenge kaka toyebisaki bino yango,
and that you make it your ambition to lead a quiet life, and to do your own business, and to work with your own hands, even as we instructed you,
12 mpo ete, mokolo na mokolo, Bapagano bamemia bino, mpe mpo ete bobika te bomoi na bino na sima ya mokongo ya moto.
that you may walk properly towards those who are outside, and may have need of nothing.
13 Bandeko, toboyi bozanga boyebi na tina na bato oyo bakufa, mpo ete bozala na mawa te lokola bamosusu oyo bazangi elikya.
But we don’t want you to be ignorant, brothers, concerning those who have fallen asleep, so that you don’t grieve like the rest, who have no hope.
14 Pamba te ndenge tondimaka ete Yesu akufaki mpe asekwaki, ndenge mpe tondimaka ete Nzambe akomema, na nzela ya Yesu mpe elongo na Ye, bato oyo bakufa kati na Ye.
For if we believe that Jesus died and rose again, even so God will bring with him those who have fallen asleep in Jesus.
15 Kolanda liloba na Nkolo, tala makambo oyo tozali koyebisa bino: biso ba-oyo tokotikala na bomoi kino na tango oyo Nkolo akoya, tokokende te liboso ya bato oyo bakufa;
For this we tell you by the word of the Lord, that we who are alive, who are left until the coming of the Lord, will in no way precede those who have fallen asleep.
16 pamba te tango kaka mitindo ekopesama na nzela ya koganga ya mokonzi ya ba-anjelu mpe ya kelelo ya Nzambe, Ye moko Nkolo akokita wuta na Lola mpe bato oyo basila kokufa kati na Klisto bakosekwa bato ya liboso.
For the Lord himself will descend from heaven with a shout, with the voice of the archangel and with God’s trumpet. The dead in Christ will rise first,
17 Sima na yango, biso bato oyo tokozala na bomoi na tango yango tokomemama elongo na bango kati na mapata mpo na kokutana na Nkolo, na likolo; mpe na bongo, tokozala elongo na Nkolo libela na libela.
then we who are alive, who are left, will be caught up together with them in the clouds to meet the Lord in the air. So we will be with the Lord forever.
18 Yango wana, bolendisanaka na maloba oyo.
Therefore comfort one another with these words.

< 1 Batesalonika 4 >