< 1 Samuele 7 >

1 Bato ya Kiriati-Yearimi bayaki kozwa Sanduku ya Yawe mpe bamemaki yango na ndako ya Abinadabi, na ngomba moke; mpe babulisaki Eleazari, mwana na ye ya mobali, mpo ete abatelaka Sanduku ya Yawe.
ויבאו אנשי קרית יערים ויעלו את ארון יהוה ויבאו אתו אל בית אבינדב בגבעה ואת אלעזר בנו קדשו לשמר את ארון יהוה
2 Wuta mokolo Sanduku ya Yawe ekomaki na Kiriati-Yearimi, elekaki mikolo ebele: mibu pene tuku mibale. Mpe bato nyonso ya Isalaele bayokaki posa ya kozonga epai na Yawe.
ויהי מיום שבת הארון בקרית יערים וירבו הימים ויהיו עשרים שנה וינהו כל בית ישראל אחרי יהוה
3 Bongo Samuele alobaki na bato nyonso ya Isalaele: « Soki ezali na motema na bino mobimba nde bolingi kozonga epai na Yawe, bolongola kati na bino banzambe ya bapaya mpe bikeko ya Asitarite; mpe bomipesa mobimba epai na Yawe mpe bosalela kaka Ye. Na nzela wana nde Ye akokangola bino na maboko ya bato ya Filisitia. »
ויאמר שמואל אל כל בית ישראל לאמר אם בכל לבבכם אתם שבים אל יהוה הסירו את אלהי הנכר מתוככם והעשתרות והכינו לבבכם אל יהוה ועבדהו לבדו ויצל אתכם מיד פלשתים
4 Bato ya Isalaele balongolaki kati na bango banzambe Bala mpe bikeko ya Asitarite, mpe basalelaki kaka Yawe.
ויסירו בני ישראל את הבעלים ואת העשתרת ויעבדו את יהוה לבדו
5 Samuele alobaki na bango: « Bosangisa bato nyonso ya Isalaele, na Mitsipa, mpe ngai nakosambela Yawe mpo na bino. »
ויאמר שמואל קבצו את כל ישראל המצפתה ואתפלל בעדכם אל יהוה
6 Bato ya Isalaele basanganaki na Mitsipa, batokaki mayi mpe basopaki yango na mabele, liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bakilaki bilei mpe batubelaki kuna masumu na koloba: « Tosalaki masumu liboso ya Yawe. » Samuele akambaki Isalaele wuta na Mitsipa.
ויקבצו המצפתה וישאבו מים וישפכו לפני יהוה ויצומו ביום ההוא ויאמרו שם חטאנו ליהוה וישפט שמואל את בני ישראל במצפה
7 Tango bato ya Filisitia bayokaki ete bato ya Isalaele basangani na Mitsipa, bakambi ya bato ya Filisitia bayaki kobundisa bango. Bongo tango bato ya Isalaele bayokaki sango yango, babangaki bato ya Filisitia.
וישמעו פלשתים כי התקבצו בני ישראל המצפתה ויעלו סרני פלשתים אל ישראל וישמעו בני ישראל ויראו מפני פלשתים
8 Bato ya Isalaele balobaki na Samuele: « Kotika te kosambela Yawe, Nzambe na biso, mpo na biso mpo ete abikisa biso na maboko ya bato ya Filisitia. »
ויאמרו בני ישראל אל שמואל אל תחרש ממנו מזעק אל יהוה אלהינו וישענו מיד פלשתים
9 Samuele akamataki mwana meme ya mobali, oyo ezalaki nanu komela mabele, mpe abonzaki yango mobimba lokola mbeka ya kotumba epai na Yawe. Abelelaki Yawe mpo na Isalaele, mpe Yawe ayokaki losambo na ye.
ויקח שמואל טלה חלב אחד ויעלה (ויעלהו) עולה כליל ליהוה ויזעק שמואל אל יהוה בעד ישראל ויענהו יהוה
10 Wana Samuele azalaki kobonza mbeka ya kotumba, bato ya Filisitia bapusanaki pembeni mpo na kobundisa bato ya Isalaele. Kasi na mokolo wana, Yawe atindelaki bato ya Filisitia kake makasi oyo ekotisaki mobulu kati na bango. Mpe bato ya Isalaele balongaki bango.
ויהי שמואל מעלה העולה ופלשתים נגשו למלחמה בישראל וירעם יהוה בקול גדול ביום ההוא על פלשתים ויהמם וינגפו לפני ישראל
11 Bato ya Isalaele babimaki na Mitsipa, balandaki bato ya Filisitia kino na se ya Beti-Kari mpe babomaki bango.
ויצאו אנשי ישראל מן המצפה וירדפו את פלשתים ויכום עד מתחת לבית כר
12 Bongo Samuele akamataki libanga moko mpe atiaki yango kati na Mitsipa mpe Sheni; apesaki yango kombo « Ebeni-Ezeri » mpo na koloba: « Kino na esika oyo, Yawe asungi biso. »
ויקח שמואל אבן אחת וישם בין המצפה ובין השן ויקרא את שמה אבן העזר ויאמר עד הנה עזרנו יהוה
13 Bato ya Filisitia bayokisamaki soni mpe bazongelaki lisusu te kokota na mokili ya Isalaele. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Samuele, loboko na Yawe etelemelaki bato ya Filisitia.
ויכנעו הפלשתים ולא יספו עוד לבוא בגבול ישראל ותהי יד יהוה בפלשתים כל ימי שמואל
14 Bingumba oyo bato ya Filisitia babotolaki epai ya bato ya Isalaele, kobanda na Ekroni kino na Gati, ezongaki na maboko ya bato ya Isalaele, mpe bato ya Isalaele bakangolaki bamboka nyonso ya zingazinga oyo ezalaki na se ya bokonzi ya bato ya Filisitia. Mpe kimia ezalaki kati na bato ya Isalaele mpe bato ya Amori.
ותשבנה הערים אשר לקחו פלשתים מאת ישראל לישראל מעקרון ועד גת ואת גבולן הציל ישראל מיד פלשתים ויהי שלום בין ישראל ובין האמרי
15 Samuele akambaki Isalaele mikolo nyonso ya bomoi na ye.
וישפט שמואל את ישראל כל ימי חייו
16 Abandaki kotambola mibu nyonso, kobanda na Beteli, koleka na Giligali kino na Mitsipa, mpo na kokamba bato ya Isalaele na bisika nyonso wana.
והלך מדי שנה בשנה וסבב בית אל והגלגל והמצפה ושפט את ישראל--את כל המקומות האלה
17 Kasi azalaki kozonga tango nyonso na Rama epai wapi ndako na ye ezalaki. Ezali kuna nde azalaki lisusu kokamba bato ya Isalaele. Mpe atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe.
ותשבתו הרמתה כי שם ביתו ושם שפט את ישראל ויבן שם מזבח ליהוה

< 1 Samuele 7 >