< 1 Samuele 20 >

1 Davidi akimaki wuta na Nayoti ya Rama mpe akendeki epai ya Jonatan. Atunaki ye: — Nasali nini? Mabe nini nasali? Lisumu nini nasali liboso ya tata na yo mpo ete aluka koboma ngai?
And David fled from Naioth in Ramah, and came and said before Jonathan, What have I done? What is my iniquity, and what is my sin before thy father, that he seeks my life?
2 Jonatan azongisaki: — Te, Ekosalema te! Okokufa te! Tala, tata na ngai asalaka eloko moko te, ezala ya moke to ya monene, soki ayebisi ngai te. Mpo na nini tata na ngai abombela ngai kaka likambo oyo? Ezali bongo te.
And he said to him, Far from it. Thou shall not die. Behold, my father does nothing either great or small, but that he discloses it to me, and why should my father hide this thing from me? It is not so.
3 Kasi Davidi alapaki ndayi na koloba: « Tata na yo ayebi malamu ete nazwaki ngolu na miso na yo, mpe amilobelaki: ‹ Tika ete Jonatan ayeba makambo oyo te, noki te akoyoka pasi na motema! › Nzokande, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo moko, etikali kaka moke ete baboma ngai. »
And David swore moreover, and said, Thy father knows well that I have found favor in thine eyes, and he says, Let not Jonathan know this, lest he be grieved. But truly as Jehovah lives, and as thy soul lives, there is but a step between me and death.
4 Jonatan alobaki na Davidi: — Nakosala nyonso oyo okolinga ete ngai nasala mpo na yo.
Then Jonathan said to David, Whatever thy soul desires, I will even do it for thee.
5 Davidi azongiselaki Jonatan: — Lobi ekozala mokolo ya feti ya Sanza ya Sika; nasengelaki kovanda mesa moko na mokonzi mpo na kolia. Pesa ngai nzela ete nakende kobombama na bilanga kino na pokwa ya mokolo ya misato.
And David said to Jonathan, Behold, tomorrow is the new moon, and I should not fail to sit with the king to eat. But let me go that I may hide myself in the field to the third day at evening.
6 Soki tata na yo amitungisi mpo na kozanga na ngai komonana, okoloba na ye: « Davidi atungisaki ngai ete napesa ye nzela ya kokende noki na engumba na ye, Beteleemi, pamba te etuka mobimba ekosepela kuna mbeka oyo babonzaka mibu nyonso. »
If thy father misses me at all, then say, David earnestly asked leave of me that he might run to Bethlehem his city, for it is the yearly sacrifice there for all the family.
7 Soki alobi: « Malamu, » wana mosali na yo akozala na kimia. Kasi soki atomboki na kanda, wana yeba malamu ete azwi mokano ya kosala ngai mabe.
If he says thus, It is well. Thy servant shall have peace. But if he is angry, then know that evil is determined by him.
8 Boye, salela mosali na yo bolamu, pamba te okotisaki ye na boyokani elongo na yo liboso ya Yawe. Soki nasalaki mabe na likambo songolo, yo moko boma ngai! Mpo na nini kokaba ngai na maboko ya tata na yo?
Therefore deal kindly with thy servant, for thou have brought thy servant into a covenant of Jehovah with thee. But if there be in me iniquity, kill me thyself, for why should thou bring me to thy father?
9 Jonatan alobaki: — Te! Ekozala penza likambo ya nkele soki ngai nakoki koyeba ete tata na ngai azwi mokano ya kosala yo mabe, bongo nayebisi yo yango te!
And Jonathan said, Far be it from thee, for if I should at all know that evil were determined by my father to come upon thee, then would I not tell it to thee?
10 Davidi atunaki Jonatan: — Bongo soki tata na yo akozongisela yo eyano na kanda, nani akoyebisa ngai?
Then David said to Jonathan, Who shall tell me if perchance thy father answers thee roughly?
11 Jonatan azongiselaki Davidi: — Yaka, tokende na zamba! Boye, bango mibale bakendeki nzela moko na zamba.
And Jonathan said to David, Come, and let us go out into the field. And they went out both of them into the field.
12 Jonatan alobaki na Davidi: « Na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, lobi to sima na lobi, na ngonga oyo, nakoluka koyeba makanisi ya tata na ngai mpo na yo. Soki ezali malamu, bongo natindi moto te mpo na koyebisa yo yango,
And Jonathan said to David, Jehovah, the God of Israel-when I have sounded my father about this time tomorrow, or the third day, behold, if there be good toward David, shall I not then send to thee, and disclose it to thee?
13 wana tika ete Yawe asala na ngai Jonatan nyonso oyo ekozala malamu na miso na Ye! Kasi soki tata na ngai azali na makanisi ya kosala yo mabe, ngai nakoyebisa yo mpe nakotika yo kokende mpo ete okende na yo na kimia. Tika ete Yawe azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na tata na ngai!
Jehovah do so to Jonathan, and more also, should it please my father to do thee evil, if I not disclose it to thee, and send thee away that thou may go in peace. And Jehovah be with thee as he has been with my father.
14 Sima na mikolo, soki nakozala nanu na bomoi, salela ngai bolamu lokola bolamu ya Yawe mpo ete baboma ngai te.
And thou shall not only show me the loving kindness of Jehovah, while I yet live, that I not die,
15 Mpe kolemba te kosalela libota na ngai bolamu, ata tango Yawe akolongola banguna nyonso ya Davidi, na etando ya mokili. »
but also thou shall not cut off thy kindness from my house forever. No, not when Jehovah has cut off the enemies of David every one from the face of the earth.
16 Boye Jonatan asalaki boyokani elongo na libota ya Davidi na maloba oyo: « Tika ete Yawe azongisa mabe na mabe na banguna ya Davidi! »
So Jonathan made a covenant with the house of David, saying, And Jehovah will require it at the hand of David's enemies.
17 Mpe Jonatan asengaki ete Davidi alapa lisusu ndayi na ye na kombo ya bolingo na ye Davidi epai ya Jonatan, pamba te azalaki kolinga ye ndenge ye moko amilingaka.
And Jonathan caused David to swear again, for the love that he had to him. For he loved him as he loved his own soul.
18 Bongo Jonatan alobaki na Davidi: — Lobi ekozala mokolo ya feti ya Sanza ya Sika; bato bakomitungisa mpo na yo mpo ete okozala te, mpe bakomona ete esika na yo ekozala pamba.
Then Jonathan said to him, Tomorrow is the new moon, and thou will be missed because thy seat will be empty.
19 Sima na lobi, na pokwa, okokende kino na esika epai wapi obombamaki tango likambo oyo ebandaki mpe okovanda pembeni ya libanga Ezeli.
And when thou have stayed three days, thou shall go down quickly, and come to the place where thou hid thyself when the business was in hand, and shall remain by the stone Ezel.
20 Ngai nakobwaka makonga misato na ngambo moko ya libanga yango lokola nde nazali kobwaka na elembo moko.
And I will shoot three arrows on the side of it, as though I shot at a mark.
21 Bongo nakotinda elenge mobali moko kokende koluka makonga yango. Soki nalobi na ye: « Tala, makonga ezali pembeni na yo, lokota mpe yaka na yango awa, » wana nalingi koloba: « Na Kombo na Yawe, yaka mpo ete ozali na kimia, likambo ezali te. »
And, behold, I will send the lad, saying, Go, find the arrows. If I say to the lad, Behold, the arrows are on this side of thee, take them, and come, for there is peace to thee and no hurt, as Jehovah lives.
22 Kasi soki nalobi na elenge mobali: « Tala, makonga ezali mosika na yo; » wana nalingi koloba: « Kima na yo, pamba te Yawe akimisi yo. »
But if I say thus to the boy, Behold, the arrows are beyond thee, go thy way, for Jehovah has sent thee away.
23 Bongo mpo na liloba oyo tosololaki ngai na yo, yeba ete Yawe azali Motatoli kati na ngai mpe yo mpo na libela.
And concerning the matter which thou and I have spoken of, behold, Jehovah is between thee and me forever.
24 Davidi abombamaki kati na zamba. Bongo na tango ya feti ya Sanza ya Sika, mokonzi avandaki na mesa mpo na kolia.
So David hid himself in the field. And when the new moon came, the king sat down to eat food.
25 Mokonzi avandaki lokola momesano na esika na ye pembeni ya mir. Jonatan atelemaki, mpe Abineri avandaki pembeni ya Saulo, kasi esika ya Davidi ezalaki polele.
And the king sat upon his seat, as at other times, even upon the seat by the wall, and Jonathan stood up, and Abner sat by Saul's side, but David's place was empty.
26 Saulo alobaki eloko moko te na mokolo wana, pamba te akanisaki kaka ete eloko moko esalemi epai ya Davidi oyo ekomisi ye mbindo.
Nevertheless Saul spoke nothing that day, for he thought, Something has befallen him. He is not clean. Surely he is not clean.
27 Kasi mokolo oyo elandaki, mokolo ya mibale ya feti ya Sanza ya Sika, lokola esika ya Davidi ezalaki lisusu polele, Saulo alobaki na mwana na ye ya mobali, Jonatan: — Mpo na nini mwana mobali ya Izayi ayei te mpo na kolia, ezala lobi oyo eleki to lelo?
And it came to pass on the morrow after the new moon, which was the second day, that David's place was empty. And Saul said to Jonathan his son, Why has the son of Jesse not come in to the food, neither yesterday, nor today?
28 Jonatan azongiselaki Saulo: — Davidi atungisaki ngai ete napesa ye nzela ya kokende noki na Beteleemi.
And Jonathan answered Saul, David earnestly asked leave of me to go to Bethlehem.
29 Alobaki: « Pesa ngai nzela ya kokende mpo ete etuka na ngai esengeli kobonza mbeka kati na engumba, mpe ndeko na ngai ya mobali abengisi ngai mpo ete nazala kuna. Soki nazwi ngolu na miso na yo, tika ngai kokende kotala bandeko na ngai. » Yango wana ayei te na mesa ya mokonzi.
And he said, Let me go, I pray thee, for our family has a sacrifice in the city, and my brother, he has commanded me. And now, if I have found favor in thine eyes, let me get away, I pray thee, and see my brothers. Therefore he has not come to the king's table.
30 Saulo asilikelaki makasi Jonatan mpe alobaki na ye: — Yo mwana mobali ya mwasi ya yawuli mpe motomboki, nayebi solo ete okoteli mwana mobali ya Izayi; kasi ezali mpo na soni na yo mpe ya mama oyo abota yo.
Then Saul's anger was kindled against Jonathan, and he said to him, Thou son of a perverse rebellious woman, do I not know that thou have chosen the son of Jesse to thine own shame, and to the shame of thy mother's nakedness?
31 Pamba te tango nyonso mwana mobali ya Izayi akozala na bomoi kati na mokili oyo, ezala yo to bokonzi na yo, bokozala na kimia te. Sik’oyo, lukisa ye mpe memela ngai ye, pamba te asengeli kokufa.
For as long as the son of Jesse lives upon the ground, thou shall not be established, nor thy kingdom. Therefore now send and fetch him to me, for he shall surely die.
32 Jonatan atunaki Saulo, tata na ye: — Basengeli koboma ye mpo na nini? Asali nini?
And Jonathan answered Saul his father, and said to him, Why should he be put to death? What has he done?
33 Saulo abwakelaki Jonatan likonga na ye mpo na koboma ye, mpe Jonatan asosolaki ete tata na ye azali na makanisi ya koboma Davidi.
And Saul cast his spear at him to smite him. By this Jonathan knew that it was determined by his father to put David to death.
34 Jonatan alongwaki na mesa na kanda makasi mpe atikalaki kolia te na mokolo oyo ya mibale ya feti ya Sanza ya Sika, pamba te ayokaki pasi na motema na ndenge tata na ye afingaki Davidi.
So Jonathan arose from the table in fierce anger, and ate no food the second day of the month, for he was grieved for David because his father had done him shame.
35 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Jonatan akendeki na zamba kokutana na Davidi. Azalaki elongo na elenge mobali moko.
And it came to pass in the morning, that Jonathan went out into the field at the time appointed with David, and a little lad with him.
36 Alobaki na elenge mobali: « Kima mbangu mpe lokota makonga oyo nazali kobwaka. » Tango elenge mobali azalaki kokima mbangu, Jonatan abwakaki likonga liboso na ye.
And he said to his lad, Run, now find the arrows which I shoot. And as the lad ran, he shot an arrow beyond him.
37 Mpe tango elenge mobali akomaki na esika oyo likonga ya Jonatan ekweyaki, Jonatan alobaki na ye na mongongo makasi: « Boni, likonga ezali liboso na yo te? »
And when the lad was come to the place of the arrow which Jonathan had shot, Jonathan cried after the lad, and said, Is not the arrow beyond thee?
38 Bongo Jonatan agangaki lisusu: « Sala noki! Kima mbangu, kotelema te! » Elenge mobali alokotaki likonga mpe azongaki epai ya nkolo na ye.
And Jonathan cried after the lad, Make speed, haste, stay not. And Jonathan's lad gathered up the arrows, and came to his master.
39 Elenge mobali ayebaki ata eloko moko te na makambo oyo nyonso; kaka Jonatan mpe Davidi nde bayebaki.
But the lad knew nothing. Only Jonathan and David knew the matter.
40 Bongo Jonatan apesaki bibundeli na ye epai ya elenge mobali mpe alobaki: « Kende kozongisa yango na engumba. »
And Jonathan gave his weapons to his lad, and said to him, Go, carry them to the city.
41 Sima na elenge mobali kozonga, Davidi abimaki na ngambo ya sude ya libanga mpe agumbamaki mbala misato liboso ya Jonatan, elongi etala na se. Bayambanaki mpe balelaki elongo, kasi Davidi alelaki mingi koleka.
And as soon as the lad was gone, David arose out of a place toward the South, and fell on his face to the ground, and bowed himself three times. And they kissed each other, and wept one with another until David surpassed him.
42 Jonatan alobaki na Davidi: « Kende na kimia, pamba te biso mibale tolapanaki ndayi na Kombo na Yawe na koloba: ‹ Yawe azali Motatoli kati na yo mpe ngai, mpe kati ya bakitani na yo mpe bakitani na ngai mpo na libela. › » Bongo Davidi akendeki, mpe Jonatan azongaki na engumba.
And Jonathan said to David, Go in peace, inasmuch as we have sworn both of us in the name of Jehovah, saying, Jehovah shall be between me and thee, and between my seed and thy seed, forever. And he arose and departed, and Jonathan went into the city.

< 1 Samuele 20 >