< 1 Samuele 2 >

1 Ana asambelaki na maloba oyo: Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yawe mpo ete alendisi bomoi na ngai. Wana nazali na esengo mpo ete okangoli ngai, monoko na ngai ekotelemela banguna na ngai.
哈拿禱告說: 我的心因耶和華快樂; 我的角因耶和華高舉。 我的口向仇敵張開; 我因耶和華的救恩歡欣。
2 Moko te azali bule lokola Yawe; moko te, bobele Yo. Libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso.
只有耶和華為聖; 除他以外沒有可比的, 也沒有磐石像我們的上帝。
3 Bolobaloba maloba ebele te ya lolendo, mpe tika ete lofundu ebima na monoko na bino te, pamba te Yawe azali Nzambe oyo ayebi nyonso mpe asambisaka misala nyonso ya bato.
人不要誇口說驕傲的話, 也不要出狂妄的言語; 因耶和華是大有智識的上帝, 人的行為被他衡量。
4 Tolotolo ya bilombe ebukani, kasi bato na bolembu bazwi makasi.
勇士的弓都已折斷; 跌倒的人以力量束腰。
5 Bato oyo bazalaki na bozwi ebele bakomi koluka mosala mpo na bilei, kasi ba-oyo bazalaki kokelela batiki kosala. Mwasi oyo abotaki te akobota mbala sambo, kasi mwasi oyo abotaki bana ebele akobota lisusu te.
素來飽足的,反作用人求食; 飢餓的,再不飢餓。 不生育的,生了七個兒子; 多有兒女的,反倒衰微。
6 Yawe abomaka mpe apesaka bomoi, akitisaka bato na mokili ya bakufi mpe asekwisaka. (Sheol h7585)
耶和華使人死,也使人活, 使人下陰間,也使人往上升。 (Sheol h7585)
7 Yawe akomisaka moto mobola, mpe akomisaka moto mozwi; akitisaka mpe atombolaka.
他使人貧窮,也使人富足, 使人卑微,也使人高貴。
8 Alongolaka mobola na putulu, mpe abimisaka na fulu moto oyo azanga; mpo ete avandisa bango esika moko na bato ya lokumu mpe apesa bango kiti ya lokumu lokola libula. Pamba te miboko ya mabele ezali ya Yawe, mpe ezali na likolo na yango nde atia mokili.
他從灰塵裏抬舉貧寒人, 從糞堆中提拔窮乏人, 使他們與王子同坐, 得着榮耀的座位。 地的柱子屬於耶和華; 他將世界立在其上。
9 Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.
他必保護聖民的腳步, 使惡人在黑暗中寂然不動; 人都不能靠力量得勝。
10 Bato oyo batiaka tembe na Yawe bakopanzana, pamba te akokweyisela bango kake wuta na likolo. Yawe akosambisa mokili mobimba, akopesa mokonzi na yango nguya mpe akobakisa makasi ya mopakolami na Ye.
與耶和華爭競的,必被打碎; 耶和華必從天上以雷攻擊他, 必審判地極的人, 將力量賜與所立的王, 高舉受膏者的角。
11 Sima na yango, Elikana azongaki na ndako na ye, na Rama; kasi mwana atikalaki mpo na kosalela Yawe na bokambami ya Nganga-Nzambe Eli.
以利加拿往拉瑪回家去了。那孩子在祭司以利面前事奉耶和華。
12 Bana mibali ya Eli bazalaki kilikili, bayebaki Yawe te.
以利的兩個兒子是惡人,不認識耶和華。
13 Tala ndenge nini Banganga-Nzambe oyo bazalaki kosala na miso ya bato: tango nyonso moto moko azalaki koya kobonza mbeka, mosali ya Nganga-Nzambe azalaki koya na ngonga ya kotumba mbeka yango, azalaki kosimba kanya ya misapi misato na loboko na ye,
這二祭司待百姓是這樣的規矩:凡有人獻祭,正煮肉的時候,祭司的僕人就來,手拿三齒的叉子,
14 azalaki kokotisa yango na sani, na nzungu, na kikalungu to na mbeki; mpe azalaki kokamata, mpo na Nganga-Nzambe, eteni nyonso ya nyama oyo ezalaki kokangama na kanya. Ezali ndenge wana nde bana mibali ya Eli bazalaki kosala epai ya bana nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kokende kuna na Silo.
將叉子往罐裏,或鼎裏,或釜裏,或鍋裏一插,插上來的肉,祭司都取了去。凡上到示羅的以色列人,他們都是這樣看待。
15 Kutu, liboso ete mafuta ya mbeka etumbama, mosali ya Nganga-Nzambe azalaki koya koloba na moto oyo azalaki kobonza mbeka: « Longolaka libela eteni ya Nganga-Nzambe, pamba te akondima te kozwa na maboko na yo nyama oyo yo moko otumbi; kasi akondima kaka nyama ya mobesu. »
又在未燒脂油以前,祭司的僕人就來對獻祭的人說:「將肉給祭司,叫他烤吧。他不要煮過的,要生的。」
16 Bongo soki moto yango azongiseli mosali ya Nganga-Nzambe: « Tika ete mafuta etumbama nanu, bongo okozwa, na sima, eteni oyo olingi, » mosali azalaki kozongisa: « Te! Pesa ngai yango nde sik’oyo, noki te nakozwa yango na makasi. »
獻祭的人若說:「必須先燒脂油,然後你可以隨意取肉。」僕人就說:「你立時給我,不然我便搶去。」
17 Lisumu oyo ya bana mibali ya Eli ezalaki monene na miso ya Yawe, pamba te bazalaki kozwa na limemia te mbeka oyo ebonzami mpo na Yawe.
如此,這二少年人的罪在耶和華面前甚重了,因為他們藐視耶和華的祭物。
18 Kasi Samuele azalaki kosala mosala na ye liboso ya Yawe. Elenge mobali Samuele azalaki kolata efode ya lino.
那時,撒母耳還是孩子,穿着細麻布的以弗得,侍立在耶和華面前。
19 Mibu nyonso, mama na ye azalaki kotongela ye nzambala ya moke, mpe azalaki komemela ye yango tango nyonso azalaki kokende elongo na mobali na ye mpo na kobonza mbeka.
他母親每年為他做一件小外袍,同着丈夫上來獻年祭的時候帶來給他。
20 Eli azalaki kopambola Elikana mpe mwasi na ye na maloba oyo: « Tika ete Yawe apesa yo bana na nzela ya mwasi oyo, mpo na kozwa esika ya mwana oyo asengaki na mabondeli mpe abonzaki epai na Yawe! » Sima na yango, bazongaki epai na bango.
以利為以利加拿和他的妻祝福,說:「願耶和華由這婦人再賜你後裔,代替你從耶和華求來的孩子。」他們就回本鄉去了。
21 Yawe asalelaki Ana ngolu, mpe Ana azwaki lisusu bazemi, abotaki bana mibali misato mpe bana basi mibale. Nzokande elenge mobali Samuele azalaki kokola liboso ya Yawe.
耶和華眷顧哈拿,她就懷孕生了三個兒子,兩個女兒。那孩子撒母耳在耶和華面前漸漸長大。
22 Eli akomaki mobange makasi, mpe azalaki koyoka makambo nyonso oyo bana na ye ya mibali bazalaki kosala epai ya bana nyonso ya Isalaele; azalaki mpe koyoka ete bazalaki kosangisa nzoto na basi oyo bazalaki kosala na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
以利年甚老邁,聽見他兩個兒子待以色列眾人的事,又聽見他們與會幕門前伺候的婦人苟合,
23 Alobaki na bango: « Mpo na nini bozali kosala makambo mabe boye? Nazali koyoka bato nyonso kolobela yango.
他就對他們說:「你們為何行這樣的事呢?我從這眾百姓聽見你們的惡行。
24 Te, bana na ngai! Sango oyo nazali koyoka bato ya Yawe kopanza na tina na bino ezali malamu te.
我兒啊,不可這樣!我聽見你們的風聲不好,你們使耶和華的百姓犯了罪。
25 Pamba te soki moto asali moninga na ye mabe, Nzambe akosambisa ye; kasi soki moto asali lisumu epai na Yawe, nani akoloba mpo na ye? » Kasi bana batikalaki koyokela tata na bango te, pamba te ezalaki mokano ya Yawe mpo na koboma bango.
人若得罪人,有士師審判他;人若得罪耶和華,誰能為他祈求呢?」然而他們還是不聽父親的話,因為耶和華想要殺他們。
26 Elenge mobali Samuele akobaki kokola na nzoto, mpe azalaki kosepelisa Yawe mpe bato.
孩子撒母耳漸漸長大,耶和華與人越發喜愛他。
27 Mokolo moko, moto moko na Nzambe ayaki epai ya Eli mpe alobaki na ye: — Tala liloba oyo Yawe alobi: « Boni, namimonisaki te na polele epai ya libota ya tata na yo tango bazalaki na Ejipito, na se ya bokonzi ya Faraon?
有神人來見以利,對他說:「耶和華如此說:『你祖父在埃及法老家作奴僕的時候,我不是向他們顯現嗎?
28 Naponaki tata na yo kati na bikolo nyonso ya Isalaele mpo ete asalela Ngai lokola Nganga-Nzambe, mpo ete amata na etumbelo na Ngai, atumba mbeka ya malasi mpe alata efode liboso na Ngai. Napesaki lisusu, na libota ya tata na yo, makabo nyonso ya bana ya Isalaele, makabo oyo bazikisa na moto.
在以色列眾支派中,我不是揀選人作我的祭司,使他燒香,在我壇上獻祭,在我面前穿以弗得,又將以色列人所獻的火祭都賜給你父家嗎?
29 Bongo mpo na nini bozali kozwa na limemia te bambeka mpe makabo na Ngai, oyo napeselaki mitindo ete epesama kati na Ndako na Ngai? Mpo na nini ozali kopesa bana na yo ya mibali lokumu koleka Ngai, na ndenge bozali kolia biteni oyo eleki kitoko kati na bambeka oyo bato na Ngai, Isalaele, bazali kobonzela Ngai?
我所吩咐獻在我居所的祭物,你們為何踐踏?尊重你的兒子過於尊重我,將我民以色列所獻美好的祭物肥己呢?』
30 Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi: ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi: ‹ Esili! Mosika na Ngai elaka oyo! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.
因此,耶和華-以色列的上帝說:『我曾說,你和你父家必永遠行在我面前;現在我卻說,決不容你們這樣行。因為尊重我的,我必重看他;藐視我的,他必被輕視。
31 Mpe na mikolo oyo ezali koya, nakokomisa mikolo na yo mpe ya libota na yo mikuse, mpe mobange akotikala kozala lisusu te kati na molongo ya libota na yo.
日子必到,我要折斷你的膀臂和你父家的膀臂,使你家中沒有一個老年人。
32 Atako bakosalela Isalaele bolamu, kasi yo okomona pasi kati na Ndako na Ngai; mpe mobange akotikala kozala lisusu te kati na molongo ya libota na yo.
在上帝使以色列人享福的時候,你必看見我居所的敗落。在你家中必永遠沒有一個老年人。
33 Nzokande, kati na bato na yo, ekozala na moto moko oyo nakolongola te liboso ya etumbelo na Ngai, mpo ete obanda koyokelaka ye zuwa mpe obanda kozikaka motema; kasi bana nyonso oyo bakobotama na ndako na yo bakokufa na bolenge na bango.
我必不從我壇前滅盡你家中的人;那未滅的必使你眼目乾癟、心中憂傷。你家中所生的人都必死在中年。
34 Mpe makambo oyo ekokweyela bana na yo mibale ya mibali, Ofini mpe Fineasi, ekozala elembo mpo na yo: bango mibale bakokufa mokolo moko.
你的兩個兒子何弗尼、非尼哈所遭遇的事可作你的證據:他們二人必一日同死。
35 Nakomiponela Nganga-Nzambe ya sembo oyo akosala kolanda motema mpe makanisi na Ngai. Nakobongisela ye libota moko oyo ekowumela, mpe akosala tango nyonso mosala ya bonganga-Nzambe liboso ya mopakolami na Ngai.
我要為自己立一個忠心的祭司;他必照我的心意而行。我要為他建立堅固的家;他必永遠行在我的受膏者面前。
36 Bongo moto nyonso oyo akotikala kati na libota na yo akobanda koya kofukama liboso na ye mpo na kozwa mbongo moko ya palata mpe eteni ya lipa, mpe akoloba: ‘Kotisa ngai ata na mosala moko kati na misala ya bonganga-Nzambe mpo ete nazwaka ata eteni ya lipa.’ › »
你家所剩下的人都必來叩拜他,求塊銀子,求個餅,說:求你賜我祭司的職分,好叫我得點餅吃。』」

< 1 Samuele 2 >