< 1 Samuele 16 >

1 Yawe alobaki na Samuele: — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi. 2 Samuele alobaki: — Nakokende ndenge nini? Soki Saulo ayoki bongo akoboma ngai. Yawe azongiselaki ye: — Kamata mwana ngombe ya mwasi elongo na yo mpe loba: « Nakeyi kobonzela Yawe mbeka. » 3 Bongo tango okotumba mbeka, okobengisa Izayi; mpe Ngai moko nakolakisa yo nini oyo osengeli kosala. Moto oyo nakolakisa yo, okopakola ye mafuta mpo na Ngai. 4 Samuele asalaki makambo oyo Yawe alobaki. Tango akomaki na Beteleemi, bampaka ya engumba balengaki tango bakutanaki na ye. Batunaki ye: — Boni, koya na yo ezali ya kimia? 5 Samuele azongisaki: — Solo, koya na ngai ezali ya kimia. Nayei mpo na kobonzela Yawe mbeka. Bomibulisa mpe boya kotumba mbeka elongo na ngai. Bongo abulisaki Izayi elongo na bana na ye ya mibali mpe abengisaki bango na kotumba mbeka elongo na ye. 6 Tango bakomaki, Samuele atalaki Eliabi mpe amilobelaki: « Solo, mopakolami na Yawe atelemi awa liboso na Ye. » 7 Kasi Yawe alobaki na Samuele: — Kotala te lolenge ya nzoto na ye to molayi na ye, pamba te naponi ye te. Yawe atalaka te ndenge moto atalaka. Moto atalaka kaka oyo ebetaka na miso, kasi Yawe atalaka motema. 8 Bongo Izayi abengisaki Abinadabi mpe alekisaki ye liboso ya Samuele. Kasi Samuele alobaki: « Ezali ye te nde Yawe aponi. » 9 Izayi alekisaki lisusu Shama liboso ya Samuele, kasi Samuele alobaki: « Ezali ye te nde Yawe aponi. » 10 Izayi alekisaki liboso ya Samuele bana sambo na ye ya mibali. Kasi Samuele alobaki na ye: « Yawe aponi moko te kati na bango. » 11 Bongo Samuele atunaki Izayi: — Boni, bana na yo ya mibali bakoki bango nyonso? Izayi azongisaki: — Te! Ezali lisusu na moko oyo aleki bolenge, kasi azali koleisa bampate. Samuele alobaki: — Bengisa ye, pamba te tokovanda na mesa te soki akomi nanu te. 12 Boye, Izayi atindaki bato mpo na kobenga ye, mpe bayaki na ye. Langi ya poso ya nzoto na ye ezalaki kitoko; azalaki na miso kitoko mpe elobeli ya malamu. Bongo Yawe alobaki na Samuele: « Telema mpe pakola ye mafuta, pamba te ezali nde ye. » 13 Boye Samuele azwaki liseke ya mafuta mpe apakolaki ye na miso ya bandeko na ye ya mibali. Banda mokolo wana, Molimo na Yawe akitelaki Davidi na nguya. Mpe Samuele azongaki na Rama. 14 Molimo na Yawe alongwaki na Saulo, mpe molimo mabe kowuta na Yawe etungisaki ye. 15 Basali ya Saulo bayebisaki ye: — Tala, molimo moko ya mabe ewuti na Yawe mpe ezali kotungisa yo. 16 Tika ete nkolo na biso atinda basali na ye, oyo bazali awa mpo ete balukela ye moto moko oyo ayebi kobeta lindanda. Wana molimo mabe oyo ewuti na Yawe ekoya kotungisa yo, ye akobeta lindanda na ye, mpe yo okoyoka nzoto malamu. 17 Boye Saulo alobaki na basali na ye: — Bolukela ngai moto moko oyo ayebi kobeta lindanda malamu, mpe boya na ye epai na ngai. 18 Moko kati na basali na ye azongisaki: — Namoni mwana mobali moko ya Izayi ya Beteleemi, oyo ayebi penza kobeta lindanda. Azali soda ya mpiko mpe elombe ya bitumba, alobaka kitoko mpe azali mwana mobali moko ya kitoko penza; Yawe mpe azalaka elongo na ye. 19 Saulo atindaki bantoma epai ya Izayi mpo na koloba na ye: « Tindela ngai Davidi, mwana na yo ya mobali, oyo azali koleisa bampate. » 20 Izayi azwaki ane moko; atiaki na likolo na yango mapa, mbeki moko ya vino mpe mwana ntaba, mpe atindaki yango epai ya Saulo elongo na Davidi, mwana na ye ya mobali. 21 Davidi ayaki epai ya Saulo mpe akomaki kosala epai na ye. Saulo alingaki ye makasi, mpe Davidi akomaki komemela Saulo bibundeli. 22 Saulo atindaki maloba epai ya Izayi: « Nabondeli yo, tika ete Davidi akoba kosala epai na ngai, pamba te nazali kosepela na ye. » 23 Tango nyonso molimo mabe kowuta na Nzambe ezalaki koya kotungisa Saulo, Davidi azalaki kozwa lindanda na ye mpe kobeta yango. Mpe pema ya Saulo ezalaki kokita, azalaki koyoka nzoto malamu, mpe molimo mabe yango ezalaki kolongwa kati na ye.

< 1 Samuele 16 >