< 1 Samuele 15 >

1 Samuele alobaki na Saulo: « Yawe atindaki ngai kopakola yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya bato na Ye, Isalaele. Boye, yoka sik’oyo makambo oyo ewuti epai na Yawe.
ויאמר שמואל אל שאול אתי שלח יהוה למשחך למלך על עמו על ישראל ועתה שמע לקול דברי יהוה
2 Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Nakopesa bato ya Amaleki etumbu mpo na makambo oyo basalaki Isalaele tango bawutaki na Ejipito: bakangelaki Isalaele nzela.
כה אמר יהוה צבאות פקדתי את אשר עשה עמלק לישראל--אשר שם לו בדרך בעלתו ממצרים
3 Kende sik’oyo, bundisa bato ya Amaleki mpe bebisa penza biloko na bango nyonso. Kobatela bango te; boma mibali mpe basi, bana mpe babebe, bangombe, bantaba mpe bameme, bashamo mpe ba-ane. › »
עתה לך והכיתה את עמלק והחרמתם את כל אשר לו ולא תחמל עליו והמתה מאיש עד אשה מעלל ועד יונק משור ועד שה מגמל ועד חמור
4 Boye Saulo abengisaki basoda, mpe atangaki bango na Telayimi: basoda oyo babundaka na makolo, nkoto nkama mibale; mpe basoda oyo bawutaki na Yuda, nkoto zomi.
וישמע שאול את העם ויפקדם בטלאים מאתים אלף רגלי ועשרת אלפים את איש יהודה
5 Saulo akendeki kino na engumba ya Amaleki mpe atiaki basoda na bisika ya kobombama, na lubwaku.
ויבא שאול עד עיר עמלק וירב בנחל
6 Bongo Saulo alobaki na bato ya Keni: « Bokende na bino, bolongwa na milongo ya bato ya Amaleki mpo ete nabebisa bino te elongo na bango, pamba te bosalelaki bato nyonso ya Isalaele bolamu tango babimaki na Ejipito. » Boye bato ya Keni balongwaki na milongo ya bato ya Amaleki.
ויאמר שאול אל הקיני לכו סרו רדו מתוך עמלקי פן אספך עמו ואתה עשיתה חסד עם כל בני ישראל בעלותם ממצרים ויסר קיני מתוך עמלק
7 Saulo abundisaki bato ya Amaleki nzela mobimba, longwa na Avila kino na Shuri, na ngambo ya este ya Ejipito.
ויך שאול את עמלק מחוילה בואך שור אשר על פני מצרים
8 Akangaki ya bomoi Agagi, mokonzi ya bato ya Amaleki, mpe abebisaki bato nyonso na mopanga.
ויתפש את אגג מלך עמלק חי ואת כל העם החרים לפי חרב
9 Kasi Saulo mpe basoda babatelaki Agagi elongo na bibwele oyo elekaki kitoko kati na bameme, bantaba mpe bangombe, bibwele oyo eleki minene, bana meme oyo ya minene mpe nyonso oyo ezalaki malamu. Baboyaki kobebisa yango; babebisaki kaka oyo ezalaki ya mabe mpe ya kokonda.
ויחמל שאול והעם על אגג ועל מיטב הצאן והבקר והמשנים ועל הכרים ועל כל הטוב ולא אבו החרימם וכל המלאכה נמבזה ונמס אתה החרימו
10 Yawe alobaki na Samuele:
ויהי דבר יהוה אל שמואל לאמר
11 — Nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakomisaki Saulo mokonzi, pamba te apesi Ngai mokongo mpe aboyi kotosa mitindo na Ngai. Samuele asilikaki mpe abelelaki Yawe butu mobimba.
נחמתי כי המלכתי את שאול למלך--כי שב מאחרי ואת דברי לא הקים ויחר לשמואל ויזעק אל יהוה כל הלילה
12 Na tongo-tongo, Samuele atelemaki mpo na kokende kokutana na Saulo. Kasi bayebisaki ye: « Saulo akei na Karimeli, atongi kuna ekeko mpo na ye moko, bongo alongwe kuna mpe akei kino na Giligali. »
וישכם שמואל לקראת שאול בבקר ויגד לשמואל לאמר בא שאול הכרמלה והנה מציב לו יד ויסב ויעבר וירד הגלגל
13 Samuele akendeki epai ya Saulo, mpe Saulo alobaki na ye: — Tika ete Yawe apambola yo! Natosaki mitindo ya Yawe.
ויבא שמואל אל שאול ויאמר לו שאול ברוך אתה ליהוה--הקימתי את דבר יהוה
14 Kasi Samuele alobaki: — Makelele oyo nazali koyoka ezali te koganga ya bameme mpe ya bangombe?
ויאמר שמואל ומה קול הצאן הזה באזני וקול הבקר אשר אנכי שמע
15 Saulo azongisaki: — Basoda babotolaki yango na maboko ya bato ya Amaleki; babatelaki kati na bibwele bameme mpe bangombe oyo elekaki kitoko mpo ete babonza yango lokola mbeka epai na Yawe, Nzambe na biso; kasi nyonso wana mosusu, tobebisaki yango penza.
ויאמר שאול מעמלקי הביאום אשר חמל העם על מיטב הצאן והבקר למען זבח ליהוה אלהיך ואת היותר החרמנו
16 Samuele alobaki na Saulo: — Kata! Tika ete nayebisa yo makambo oyo Yawe alobaki na ngai na butu oyo ewuti koleka. Saulo alobaki na ye: — Yebisa ngai yango!
ויאמר שמואל אל שאול הרף ואגידה לך את אשר דבר יהוה אלי הלילה ויאמרו (ויאמר) לו דבר
17 Samuele alobaki: — Atako ozalaki komimona moto pamba na miso na yo moko, kasi boni, okomaki te mokonzi ya bikolo ya Isalaele? Yawe apakolaki yo mafuta mpo ete ozala mokonzi ya Isalaele.
ויאמר שמואל--הלוא אם קטן אתה בעיניך ראש שבטי ישראל אתה וימשחך יהוה למלך על ישראל
18 Yawe apesaki yo etinda mpe alobaki: « Kende mpe bebisa penza bato oyo ya masumu, bato ya Amaleki; bundisa bango kino okosilisa koboma bango. »
וישלחך יהוה בדרך ויאמר לך והחרמתה את החטאים את עמלק ונלחמת בו עד כלותם אתם
19 Mpo na nini otosaki Yawe te? Mpo na nini owelaki kozwa bomengo ya bitumba, mpe osalaki mabe na miso ya Yawe?
ולמה לא שמעת בקול יהוה ותעט אל השלל ותעש הרע בעיני יהוה
20 Saulo azongiselaki Samuele: — Ngai natosaki Yawe, nakokisaki etinda oyo apesaki ngai: Nabebisaki penza bato ya Amaleki, namemaki kutu Agagi, mokonzi na bango.
ויאמר שאול אל שמואל אשר שמעתי בקול יהוה ואלך בדרך אשר שלחני יהוה ואביא את אגג מלך עמלק ואת עמלק החרמתי
21 Kasi basoda bazwaki kati na bomengo ya bitumba bameme mpe bangombe oyo elekaki malamu kati na oyo Nzambe asengaki ete ebebisama, mpo ete babonza yango lokola mbeka epai na Yawe, Nzambe na yo, na Giligali.
ויקח העם מהשלל צאן ובקר ראשית החרם לזבח ליהוה אלהיך בגלגל
22 Samuele alobaki: — Boni, Yawe asepelaka mingi na bambeka ya kotumba mpe na makabo koleka kotosa mongongo na Ye? Te! Botosi eleki mbeka; koyoka eleki mafuta ya meme ya mobali.
ויאמר שמואל החפץ ליהוה בעלות וזבחים כשמע בקול יהוה הנה שמע מזבח טוב להקשיב מחלב אילים
23 Pamba te botomboki ekokani na lisumu ya kosambela banzambe ya bikeko. Lokola obwaki Liloba na Yawe, Ye mpe abwaki yo; ozali lisusu mokonzi te.
כי חטאת קסם מרי ואון ותרפים הפצר יען מאסת את דבר יהוה וימאסך ממלך
24 Bongo Saulo alobaki na Samuele: — Nasali lisumu, nabuki mobeko ya Yawe mpe malako na Ye. Nabangaki bato, yango wana natosaki bango.
ויאמר שאול אל שמואל חטאתי כי עברתי את פי יהוה ואת דבריך כי יראתי את העם ואשמע בקולם
25 Sik’oyo nabondeli yo, limbisa masumu na ngai; mpe zonga elongo na ngai, mpo ete nakoka kogumbamela Yawe.
ועתה שא נא את חטאתי ושוב עמי ואשתחוה ליהוה
26 Kasi Samuele alobaki na Saulo: — Nakozonga elongo na yo te; pamba te lokola obwakaki Liloba na Yawe, Yawe mpe abwaki yo mpe ozali lisusu mokonzi ya Isalaele te.
ויאמר שמואל אל שאול לא אשוב עמך כי מאסתה את דבר יהוה וימאסך יהוה מהיות מלך על ישראל
27 Lokola Samuele abalukaki mpo na kokende, Saulo akangaki ye na songe ya kazaka na ye, mpe kazaka epasukaki.
ויסב שמואל ללכת ויחזק בכנף מעילו ויקרע
28 Bongo Samuele alobaki na ye: — Na mokolo ya lelo, Yawe abotoli yo bokonzi kati na Isalaele mpe apesi yango epai ya moko kati na baninga na yo, oyo azali malamu koleka yo.
ויאמר אליו שמואל קרע יהוה את ממלכות ישראל מעליך היום ונתנה לרעך הטוב ממך
29 Ye oyo azali nkembo ya Isalaele akosaka te mpe abongolaka makanisi na Ye te, pamba te azali moto te mpo ete abongola makanisi na Ye.
וגם נצח ישראל לא ישקר ולא ינחם כי לא אדם הוא להנחם
30 Saulo alobaki: — Nasali lisumu. Kasi, sik’oyo, nabondeli yo: pesa ngai lokumu liboso ya bampaka ya bato na ngai mpe liboso ya Isalaele, zonga elongo na ngai mpo ete nakoka kogumbamela Yawe, Nzambe na yo.
ויאמר חטאתי--עתה כבדני נא נגד זקני עמי ונגד ישראל ושוב עמי והשתחויתי ליהוה אלהיך
31 Boye Samuele akendeki elongo na Saulo, mpe Saulo agumbamelaki Yawe.
וישב שמואל אחרי שאול וישתחו שאול ליהוה
32 Kasi Samuele alobaki na ye: « Memela ngai Agagi, mokonzi ya bato ya Amaleki. » Agagi ayaki na esengo, pamba te azalaki komilobela: « Solo, pasi ya kufa elongwe mpe ekeyi mosika na ngai. »
ויאמר שמואל הגישו אלי את אגג מלך עמלק וילך אליו אגג מעדנת ויאמר אגג אכן סר מר המות
33 Kasi Samuele alobaki: « Ndenge mopanga na yo ezangisaki basi bana na bango, ndenge wana mpe mama na yo, kati na basi, akozanga mwana mobali. » Boye, Samuele abomaki Agagi liboso ya Yawe, na Giligali.
ויאמר שמואל--כאשר שכלה נשים חרבך כן תשכל מנשים אמך וישסף שמואל את אגג לפני יהוה בגלגל
34 Bongo Samuele azongaki na Rama, mpe Saulo akendeki na ndako na ye, na Gibea ya Saulo.
וילך שמואל הרמתה ושאול עלה אל ביתו גבעת שאול
35 Kino na mokolo oyo Samuele akufaki, atikalaki komona lisusu Saulo te. Samuele asalaki matanga mpo na Saulo. Mpe Yawe ayokaki mawa na ndenge akomisaki Saulo mokonzi ya Isalaele.
ולא יסף שמואל לראות את שאול עד יום מותו כי התאבל שמואל אל שאול ויהוה נחם כי המליך את שאול על ישראל

< 1 Samuele 15 >