< 1 Samuele 12 >

1 Samuele alobaki na bato nyonso ya Isalaele: — Napesi nyonso oyo bolobaki na ngai: natieli bino mokonzi.
撒母耳对以色列众人说:“你们向我所求的,我已应允了,为你们立了一个王;
2 Bozali sik’oyo na mokonzi lokola mokambi. Kasi ngai nakomi mobange, nasili na ngai konuna, mpe bana na ngai ya mibali bazali awa elongo na bino. Nazalaki mokambi na bino wuta bolenge na ngai kino na mokolo ya lelo.
现在有这王在你们前面行。我已年老发白,我的儿子都在你们这里。我从幼年直到今日都在你们前面行。
3 Natelemi lelo liboso na bino. Bofunda ngai liboso ya Yawe mpe liboso ya mopakolami na Ye. Nazwaki ngombe ya nani? Nazwaki ane ya nani? Nanyokolaki nani, mpe namonisaki nani pasi? Nazwaki kanyaka na maboko ya nani mpo na kokanga miso na ngai? Soki nasalaki likambo moko kati na makambo oyo nyonso, nakozongisa yango.
我在这里,你们要在耶和华和他的受膏者面前给我作见证。我夺过谁的牛,抢过谁的驴,欺负过谁,虐待过谁,从谁手里受过贿赂因而眼瞎呢?若有,我必偿还。”
4 Bato bazongiselaki ye: — Onyokolaki biso te mpe omonisaki biso pasi te; ozwaki ata eloko moko te na maboko ya moto.
众人说:“你未曾欺负我们,虐待我们,也未曾从谁手里受过什么。”
5 Samuele alobaki na bango: — Yawe azali Motatoli mpo na kotelemela bino, mpe mopakolami na Ye azali motatoli na mokolo ya lelo ete bomoni ata eloko moko te kati na maboko na ngai. Bato bazongisaki: — Azali penza Motatoli.
撒母耳对他们说:“你们在我手里没有找着什么,有耶和华和他的受膏者今日为证。”他们说:“愿他为证。”
6 Bongo Samuele alobaki na bato: — Ezali Yawe nde aponaki Moyize mpe Aron, mpe Ye nde abimisaki bakoko na bino na Ejipito.
撒母耳对百姓说:“从前立摩西、亚伦,又领你们列祖出埃及地的是耶和华。
7 Sik’oyo, botelema awa liboso na Ye, pamba te nalingi kosamba na bosolo elongo na bino, liboso ya Yawe, na tina na makambo nyonso ya bosembo oyo Yawe asalaki mpo na bino mpe mpo na bakoko na bino.
现在你们要站住,等我在耶和华面前对你们讲论耶和华向你们和你们列祖所行一切公义的事。
8 Sima na Jakobi kokota na Ejipito, bakoko na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi. Mpe Yawe atindaki Moyize mpe Aron oyo babimisaki bango na Ejipito mpo na kovandisa bango na esika oyo.
从前雅各到了埃及,后来你们列祖呼求耶和华,耶和华就差遣摩西、亚伦领你们列祖出埃及,使他们在这地方居住。
9 Kasi babosanaki Yawe, Nzambe na bango. Yango wana Ye Yawe akabaki bango na maboko ya Sisera, mokonzi ya basoda ya Atsori; na maboko ya bato ya Filisitia mpe na maboko ya mokonzi ya Moabi oyo babundisaki bango.
他们却忘记耶和华—他们的 神,他就把他们付与夏琐将军西西拉的手里,和非利士人并摩押王的手里。于是这些人常来攻击他们。
10 Bongo bagangaki lisusu epai na Yawe mpo na kosenga lisungi; balobaki: « Tosali masumu, pamba te tosundoli Yawe mpe tosaleli banzambe Bala mpe Asitarite. Kasi sik’oyo, kangola biso na maboko ya banguna na biso, mpe tokosalela Yo. »
他们就呼求耶和华说:‘我们离弃耶和华,事奉巴力和亚斯她录,是有罪了。现在求你救我们脱离仇敌的手,我们必事奉你。’
11 Boye, Yawe atindaki Yerubali oyo babengi Jedeon, Bedani, Jefite mpe Samuele. Akangolaki bino na maboko ya banguna na bino, oyo bazingelaki bino na bangambo nyonso. Mpe bovandaki na kimia.
耶和华就差遣耶路·巴力、比但、耶弗他、撒母耳救你们脱离四围仇敌的手,你们才安然居住。
12 Kasi tango bomonaki Naashi, mokonzi ya bato ya Amoni, koya kobundisa bino, bolobaki na ngai: « Te! Tozali na posa ya mokonzi mpo na kokamba biso. » Nzokande ezali Yawe, Nzambe na bino, nde azalaki mokonzi na bino.
你们见亚扪人的王拿辖来攻击你们,就对我说:‘我们定要一个王治理我们。’其实耶和华—你们的 神是你们的王。
13 Sik’oyo, botala mokonzi oyo boponaki, mokonzi oyo bosengaki. Ezali Yawe nde atie ye mokonzi mpo na kokamba bino.
现在,你们所求所选的王在这里。看哪,耶和华已经为你们立王了。
14 Kobanda lelo, soki botosi Yawe, soki bosaleli Ye, soki bobateli mitindo na Ye, mpe soki bino elongo na mokonzi oyo azali kokamba bino bolandi Yawe, Nzambe na bino, makambo nyonso ekotambola malamu.
你们若敬畏耶和华,事奉他,听从他的话,不违背他的命令,你们和治理你们的王也都顺从耶和华—你们的 神就好了。
15 Kasi soki botosi Yawe te mpe bobateli te mibeko na Ye, loboko na Ye ekobalukela bino ndenge ebalukelaki bakoko na bino.
倘若不听从耶和华的话,违背他的命令,耶和华的手必攻击你们,像从前攻击你们列祖一样。
16 Yango wana sik’oyo lisusu, bobongama mpo na kotala likambo monene oyo Yawe alingi kosala na miso na bino.
现在你们要站住,看耶和华在你们眼前要行一件大事。
17 Boni, mokolo ya lelo ezali te tango ya kobuka ble? Nakobelela Yawe mpo ete atinda kake mpe mvula, bongo bokomona mpe bokososola ndenge nini ezali monene, mabe oyo bosalaki na miso ya Yawe tango bosengaki mokonzi.
这不是割麦子的时候吗?我求告耶和华,他必打雷降雨,使你们又知道又看出,你们求立王的事是在耶和华面前犯大罪了。”
18 Bongo Samuele abelelaki Yawe, mpe, na mokolo wana kaka, Yawe atindaki kake mpe mvula. Boye bato nyonso babangaki makasi Yawe mpe Samuele.
于是撒母耳求告耶和华,耶和华就在这日打雷降雨,众民便甚惧怕耶和华和撒母耳。
19 Bato nyonso balobaki na Samuele: — Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na basali na yo mpo ete tokufa te, pamba te tobakisaki lisusu na likolo ya masumu na biso, likambo ya mabe ya kosenga mokonzi mpo na biso.
众民对撒母耳说:“求你为仆人们祷告耶和华—你的 神,免得我们死亡,因为我们求立王的事正是罪上加罪了。”
20 Samuele azongiselaki bango: — Bobanga te! Solo, bosalaki mabe nyonso wana; nzokande bokoba te kozala mosika na Yawe, kasi bosalela Yawe na mitema na bino mobimba.
撒母耳对百姓说:“不要惧怕!你们虽然行了这恶,却不要偏离耶和华,只要尽心事奉他。
21 Bopengwa te na kolanda banzambe na bino ya bikeko, oyo ezanga na yango tina, oyo ekoki kosalela bino ata bolamu moko te, oyo ekoki te kobikisa bino, pamba te ezali banzambe ezanga tina.
若偏离耶和华去顺从那不能救人的虚神是无益的。
22 Mpo na lokumu ya Kombo monene na Ye, Yawe akobwaka bato na Ye te, pamba te asepelaki kokomisa bino bato na Ye moko.
耶和华既喜悦选你们作他的子民,就必因他的大名不撇弃你们。
23 Kasi mpo na ngai, ekozala penza likambo ya nkele soki nasali masumu liboso ya Yawe, soki natiki kobondela mpo na bino! Nakolakisa bino nzela oyo ezali malamu mpe alima.
至于我,断不停止为你们祷告,以致得罪耶和华。我必以善道正路指教你们。
24 Kasi, na ngambo na bino, botosa Yawe mpe bosalela Ye na bosembo mpe na mitema na bino mobimba; botala malamu makambo minene oyo asalelaki bino.
只要你们敬畏耶和华,诚诚实实地尽心事奉他,想念他向你们所行的事何等大。
25 Kasi soki bokobi kosala mabe, bino mpe mokonzi na bino bokobebisama.
你们若仍然作恶,你们和你们的王必一同灭亡。”

< 1 Samuele 12 >