< 1 Samuele 10 >

1 Bongo Samuele azwaki molangi ya mafuta, asopaki yango na moto ya Saulo, ayambaki ye mpe alobaki: « Boni, Yawe apakoli yo mafuta te mpo ete ozala mokambi ya libula na Ye?
撒母耳拿瓶膏油倒在掃羅的頭上,與他親嘴,說:「這不是耶和華膏你作他產業的君嗎?
2 Sima na yo kotika ngai na mokolo ya lelo, okokutana na mibali mibale pembeni ya kunda ya Rasheli, na Tselitsa, na bandelo ya mokili ya Benjame. Bakoloba na yo: ‹ Ba-ane oyo okendeki koluka emonani. Mpe, sik’oyo, tata na yo atiki komitungisa na tina na yango, kasi akomi nde komitungisa mpo na bino. Azali komituna: ‘Nakosala nini mpo na mwana na ngai ya mobali.’ › »
你今日與我離別之後,在便雅憫境內的泄撒,靠近拉結的墳墓,要遇見兩個人。他們必對你說:『你去找的那幾頭驢已經找着了。現在你父親不為驢掛心,反為你擔憂,說:我為兒子怎麼才好呢?』
3 Kolongwa wana, okokende mwa mosika kino okokoma na nzete monene ya Tabori epai wapi okokutana na mibali misato oyo bakozala komata epai ya Nzambe, na Beteli. Moko akomema bana misato ya ntaba; mosusu, biteni misato ya mapa; mpe mosusu, molangi ya vino.
你從那裏往前行,到了他泊的橡樹那裏,必遇見三個往伯特利去拜上帝的人:一個帶着三隻山羊羔,一個帶着三個餅,一個帶着一皮袋酒。
4 Bakopesa yo mbote mpe bakokabela yo mapa mibale. Okozwa yango na maboko na bango.
他們必問你安,給你兩個餅,你就從他們手中接過來。
5 Sima na yango, okokende na Gibea ya Nzambe epai wapi bayangeli ya Filisitia bazali. Wana okopusana na engumba, okokutana na ngulupa ya basakoli kowuta na esambelo ya likolo ya ngomba. Liboso na bango, ekozala na babeti mandanda, bambunda ya mike, baflite mpe banzenze. Wana bakozala kobeta mindule, basakoli yango bakokoma kosakola.
此後你到上帝的山,在那裏有非利士人的防兵。你到了城的時候,必遇見一班先知從邱壇下來,前面有鼓瑟的、擊鼓的、吹笛的、彈琴的,他們都受感說話。
6 Bongo Molimo na Yawe akokitela yo na nguya, okosakola elongo na bango, mpe okobongwana moto ya lolenge mosusu.
耶和華的靈必大大感動你,你就與他們一同受感說話;你要變為新人。
7 Soki kaka omoni bilembo oyo kokokisama, wana sala na yo nyonso oyo okoki kosala mpo na yo moko, pamba te Nzambe azali elongo na yo.
這兆頭臨到你,你就可以趁時而做,因為上帝與你同在。
8 Bongo okotambola liboso na ngai mpo na kokende na Giligali, mpe ngai nakokuta yo kuna mpo na kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Kasi osengeli kozela mikolo sambo kino naya kokuta yo; mpe nakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.
你當在我以先下到吉甲,我也必下到那裏獻燔祭和平安祭。你要等候七日,等我到了那裏,指示你當行的事。」
9 Tango kaka Saulo abalukaki mpo na kotika Samuele, Nzambe abongolaki motema ya Saulo, mpe bilembo nyonso ekokisamaki mokolo wana kaka.
掃羅轉身離別撒母耳,上帝就賜他一個新心。當日這一切兆頭都應驗了。
10 Tango bakomaki na Gibea, ngulupa ya basakoli ekutanaki na ye; bongo Molimo ya Nzambe akitelaki ye na nguya, mpe akomaki kosakola kati na bango.
掃羅到了那山,有一班先知遇見他,上帝的靈大大感動他,他就在先知中受感說話。
11 Tango bato nyonso oyo bayebi Saulo wuta kala bamonaki ye kosakola elongo na basakoli bamitunaki: « Likambo nini ekweyi na bomoi ya mwana mobali ya Kishi? Boni, Saulo mpe azali moko kati na basakoli? »
素來認識掃羅的,看見他和先知一同受感說話,就彼此說:「基士的兒子遇見甚麼了?掃羅也列在先知中嗎?」
12 Moko kati na bato oyo bazalaki wana alobaki: « Bongo nani azali motambolisi na bango? » Ezali ndenge wana nde ebandaki lisese oyo: « Saulo mpe azali moko kati na basakoli? »
那地方有一個人說:「這些人的父親是誰呢?」此後有句俗語說:「掃羅也列在先知中嗎?」
13 Tango Saulo asilisaki kosakola, akendeki na esambelo ya likolo ya ngomba.
掃羅受感說話已畢,就上邱壇去了。
14 Noko ya Saulo atunaki Saulo mpe mosali na ye: — Bokendeki wapi? Saulo azongisaki: — Tokendeki koluka ba-ane. Kasi lokola tomonaki yango te, yango wana tokendeki epai ya Samuele.
掃羅的叔叔問掃羅和他僕人說:「你們往哪裏去了?」回答說:「找驢去了。我們見沒有驢,就到了撒母耳那裏。」
15 Noko ya Saulo alobaki lisusu: — Nabondeli yo, yebisa ngai makambo oyo Samuele alobaki na bino.
掃羅的叔叔說:「請將撒母耳向你們所說的話告訴我。」
16 Saulo azongiselaki noko na ye: — Ayebisaki biso ete ba-ane ekomonana solo. Kasi Saulo ayebisaki noko na ye te makambo oyo Samuele alobaki na ye na tina na bokonzi.
掃羅對他叔叔說:「他明明地告訴我們驢已經找着了。」至於撒母耳所說的國事,掃羅卻沒有告訴叔叔。
17 Samuele abengisaki, na Mitsipa, bato ya Isalaele liboso ya Yawe
撒母耳將百姓招聚到米斯巴耶和華那裏,
18 mpe alobaki na bango: « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Ngai moko nde nabimisaki Isalaele wuta na Ejipito mpe nakangolaki bino na maboko ya bato ya Ejipito mpe ya bokonzi nyonso oyo ezalaki konyokola bino. ›
對他們說:「耶和華-以色列的上帝如此說:『我領你們以色列人出埃及,救你們脫離埃及人的手,又救你們脫離欺壓你們各國之人的手。』
19 Kasi, na mokolo ya lelo, bobwaki Nzambe na bino, oyo abikisaka bino na pasi na bino nyonso mpe na minyoko na bino. Mpe bolobi na Ye: ‹ Ponela biso mokonzi oyo akokamba biso! › Lokola ezali bongo, botelema sik’oyo bino moko liboso ya Yawe kolanda bikolo mpe bituka na bino. »
你們今日卻厭棄了救你們脫離一切災難的上帝,說:『求你立一個王治理我們。』現在你們應當按着支派、宗族都站在耶和華面前。」
20 Samuele abengaki ekolo moko na moko ya Isalaele, mpe ekolo ya Benjame eponamaki.
於是,撒母耳使以色列眾支派近前來掣籤,就掣出便雅憫支派來;
21 Abengaki etuka moko na moko ya ekolo ya Benjame, mpe etuka ya Matiri eponamaki. Na suka, ezalaki Saulo, mwana mobali ya Kishi, nde aponamaki. Kasi tango balukaki ye, bamonaki ye te.
又使便雅憫支派按着宗族近前來,就掣出瑪特利族,從其中又掣出基士的兒子掃羅。眾人尋找他卻尋不着,
22 Boye, batunaki lisusu Yawe: — Boni, ezali lisusu na moto oyo ayaki awa? Yawe azongisaki: — Iyo! Botala ye wana, abombami kati na biloko.
就問耶和華說:「那人到這裏來了沒有?」耶和華說:「他藏在器具中了。」
23 Bapotaki mbangu mpo na kobimisa ye, mpe batelemisaki ye kati na bato; mpe emonanaki ete aleki bato nyonso na molayi.
眾人就跑去從那裏領出他來。他站在百姓中間,身體比眾民高過一頭。
24 Bongo Samuele alobaki na bato nyonso: — Botala moto oyo Yawe aponi! Kati na bato nyonso, moko te akokani na ye. Bato bazongisaki na koganga: — Tika ete mokonzi awumela na bomoi!
撒母耳對眾民說:「你們看耶和華所揀選的人,眾民中有可比他的嗎?」眾民就大聲歡呼說:「願王萬歲!」
25 Samuele alimbolelaki bato makambo oyo etali bokonzi, akomaki yango na buku mpe atiaki liboso ya Yawe. Sima na yango, azongisaki bato, moto na moto na ndako na ye.
撒母耳將國法對百姓說明,又記在書上,放在耶和華面前,然後遣散眾民,各回各家去了。
26 Saulo mpe azongaki na ndako na ye, na Gibea, elongo na bilombe mibali oyo Nzambe asimbaki mitema na bango mpo ete balanda ye.
掃羅往基比亞回家去,有上帝感動的一群人跟隨他。
27 Kasi ezalaki na ndambo ya bato ya kilikili oyo bazalaki koloba: « Moto oyo akokoka kobikisa biso ndenge nini? » Batiolaki ye mpe bapesaki ye ata kado moko te. Kasi Saulo avandaki kimia.
但有些匪徒說:「這人怎能救我們呢?」就藐視他,沒有送他禮物;掃羅卻不理會。

< 1 Samuele 10 >