< 1 Bakonzi 5 >

1 Tango Irami, mokonzi ya Tiri, ayokaki sango ete bapakolaki Salomo mafuta mpo ete akoma mokonzi mpo na kokitana na Davidi, tata na ye, atindaki bantoma epai ya Salomo, pamba te azalaki tango nyonso molingami ya Davidi.
And Hiram king of Tyre sent his servants to Solomon; for he had heard that they had anointed him king in the place of his father; for Hiram always loved David.
2 Salomo azongiselaki Irami maloba oyo:
And Solomon sent to Hiram, saying,
3 — Oyebi malamu ete Davidi, tata na ngai, alongaki te kotonga Ndako mpo na Yawe, Nzambe na ye, likolo ya bitumba oyo azalaki na yango na bikolo oyo ezingelaki ye, kino tango Yawe atiaki bikolo yango na se ya matambe na ye.
Thou knowest that David my father could not build a house unto the name of Jehovah his God, because of the wars which were about him on every side, until Jehovah put them under the soles of his feet.
4 Kasi sik’oyo, Yawe, Nzambe na ngai, apesi ngai bopemi na bangambo nyonso, mpe ezali lisusu na monguna moko te mpe na likambo moko te oyo ekoki kobangisa ngai.
But now Jehovah my God has given me rest on every side: there is neither adversary nor evil event.
5 Sik’oyo, nazwi mokano ya kotonga Ndako mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe na ngai, ndenge Yawe alobaki na Davidi, tata na ngai: « Ezali mwana na yo ya mobali oyo nakovandisa na kiti na yo ya bokonzi mpo na kokitana na yo nde akotonga Ndako mpo na lokumu ya Kombo na Ngai. »
And behold, I purpose to build a house unto the name of Jehovah my God, as Jehovah spoke to David my father saying, Thy son, whom I will set upon thy throne in thy stead, he shall build a house unto my name.
6 Boye, pesa mitindo ete bakatela ngai banzete ya sedele ya Libani. Basali na ngai bakosunga basali na yo, mpe ngai nakofuta yo lifuti oyo okokata mpo na basali na yo, pamba te oyebi malamu ete ezali na bato te kati na biso oyo bayebi kokata banzete lokola bino, bato ya Sidoni.
And now command that they hew me cedar-trees out of Lebanon; and my servants shall be with thy servants; and I will give thee hire for thy servants according to all that thou shalt say; for thou knowest that there is not among us any that are experienced in cutting timber like to the Zidonians.
7 Tango Irami ayokaki maloba ya Salomo, asepelaki na yango makasi mpe alobaki: — Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo apesaki Davidi mwana oyo atondi na bwanya mpo na kokamba ekolo monene oyo!
And it came to pass when Hiram heard the words of Solomon, that he rejoiced greatly, and said, Blessed be Jehovah this day, who has given to David a wise son over this great people.
8 Irami atindelaki Salomo eyano oyo: — Nayambaki maloba oyo otindelaki ngai mpe nakosala nyonso oyo ozali na yango posa: banzete ya sedele mpe ya sipele.
And Hiram sent to Solomon, saying, I have heard the things which thou sentest to me for: I will do all thy desire concerning timber of cedar, and concerning timber of cypress.
9 Basali na ngai bakomema banzete yango wuta na Libani kino na ebale monene, bakokangisa yango na basinga mpo na kotinda yango na nzela ya ebale monene; mpe nakosala ete ekoma kino na esika oyo okoyebisa ngai. Kuna nde nakofungola yango basinga; mpe yo, okoki kozwa mpe komema yango. Kasi yo, okokokisa posa na ngai oyo: okobanda kopesa basali ya ndako na ngai bilei.
My servants shall bring [them] down from Lebanon to the sea; and I will convey them by sea [in] rafts to the place that thou shalt appoint me, and will cause them to be broken up there, and thou shalt receive them. And thou shalt accomplish my desire in giving food for my household.
10 Irami apesaki epai ya Salomo banzete ya sedele mpe ya sipele nyonso oyo azalaki na yango na bosenga.
So Hiram gave Solomon cedar-trees and cypress-trees [according to] all his desire.
11 Salomo mpe, na ngambo na ye, azalaki kopesa mobu na mobu epai ya Irami batone nkoto motoba ya ble, balitele nkoto libwa ya mafuta ya olive ya kitoko koleka, mpo na ndako ya mokonzi.
And Solomon gave Hiram twenty thousand measures of wheat as food for his household, and twenty measures of beaten oil: thus gave Solomon to Hiram year by year.
12 Yawe apesaki Salomo bwanya kolanda elaka oyo apesaki ye. Boye, kimia ezalaki kati na Irami mpe Salomo, mpe bango mibale basalaki boyokani.
And Jehovah gave Solomon wisdom as he promised him. And there was peace between Hiram and Solomon; and they two made a league.
13 Mokonzi Salomo azwaki kati na Isalaele mobimba bato nkoto tuku misato mpo na kosala misala makasi.
And king Solomon raised a levy out of all Israel; and the levy was thirty thousand men.
14 Akabolaki bango na masanga misato ya bato nkoto zomi: babandaki kosala sanza moko, na Libani, mpe basanza mibale na ndako; lisanga moko sima na mosusu. Adonirami azalaki mokambi ya bato ya misala makasi.
And he sent them to Lebanon, ten thousand a month by courses; a month they were in Lebanon, two months at home; and Adoniram was over the levy.
15 Salomo azwaki lisusu na mosala bato nkoto tuku sambo mpo na komema mikumba, bato nkoto tuku mwambe mpo na kopasola mabanga kati na ngomba;
And Solomon had seventy thousand that bore burdens, and eighty thousand stone-masons in the mountains;
16 mpe bakambi ya misala, nkoto misato na nkama misato, bazalaki kolandela misala na bokambami ya bakonzi ya misala ya Salomo.
besides the overseers whom Solomon had set over the work, three thousand three hundred, who ruled over the people that wrought in the work.
17 Mokonzi apesaki mitindo ete bapasola mabanga minene mpe ya kitoko mpo na kosalela yango moboko ya Tempelo.
And the king commanded, and they brought great stones, costly stones, hewn stones, to lay the foundation of the house.
18 Basali ya Salomo mpe ya Irami, elongo na basali oyo bawutaki na engumba Biblosi, bamikotisaki na mosala ya kokata yango, kopasola mabaya mpe kobongisa mabanga mpo na kotonga Tempelo.
And Solomon's builders and Hiram's builders and the Giblites hewed them, and prepared timber and stones to build the house.

< 1 Bakonzi 5 >