< 1 Bakonzi 4 >

1 Mokonzi Salomo akonzaki Isalaele mobimba. 2 Tala bakambi oyo bazalaki kosala na ye elongo: Azaria, koko ya Nganga-Nzambe Tsadoki; 3 Eliyorefi mpe Ayiya, bana mibali ya Shisha, bazalaki bakomi mikanda; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda; 4 Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki mokonzi ya mampinga; Tsadoki mpe Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe; 5 Azaria, mwana mobali ya Natan, azalaki mokonzi ya babateli biloko ya mokonzi; Zabudi, mwana mobali ya Natan, azalaki Nganga-Nzambe mpe mopesi toli ya mokonzi; 6 Ayishari, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi; Adonirami, mwana mobali ya Abida, azalaki mokengeli bato ya misala makasi. 7 Kati na Isalaele mobimba, Salomo atiaki mpe bayangeli zomi na mibale ya bituka, oyo bazalaki na mokumba ya komema biloko mpo na mokonzi mpe mpo na ndako na ye. Moyangeli moko na moko asengelaki kopesa biloko mpo na sanza moko na mobu. 8 Tala bakombo na bango: Beni-Uri: moyangeli ya etuka ya bangomba ya Efrayimi; 9 Beni-Dekeri: moyangeli ya Makatsi, Shaalibimi, Beti-Shemeshi, Eloni mpe Beti-Anani; 10 Beni-Esedi: moyangeli ya Aruboti (Soko mpe mokili mobimba ya Eferi); 11 Beni-Abinadabi: moyangeli ya Dori; abalaki Tafati, mwana mwasi ya Salomo; 12 Baana, mwana mobali ya Ayiludi: moyangeli ya Taanaki, Megido mpe Beti-Sheani mobimba, pembeni ya Tsaritani, na se ya Jizireyeli, wuta na Beti-Sheani, na Abele-Meola mpe koleka Yokimeami; 13 Beni-Geberi: azalaki kovanda na Ramoti kati na Galadi mpe azalaki moyangeli ya bamboka ya Yairi, mwana mobali ya Manase, kati na Galadi, mpe ya Arigobi kati na Bashani oyo ezalaki na bingumba tuku motoba oyo batonga makasi mpe bikangelo bikuke ya bamir na yango ezalaki ya bibende ya bronze. 14 Ayinadabi, mwana mobali ya Ido: moyangeli ya Maanayimi; 15 Ayimaatsi: moyangeli ya Nefitali. Ye mpe abalaki Basimati, mwana mwasi ya Salomo. 16 Baana, mwana mobali ya Ushayi: moyangeli ya Aseri mpe ya Bealoti; 17 Jozafati, mwana mobali ya Paruya: moyangeli ya Isakari; 18 Shimei, mwana mobali ya Ela: moyangeli ya Benjame. 19 Geberi, mwana mobali ya Uri: moyangeli ya Galadi (mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori; mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani). Mpe na likolo ya bayangeli nyonso, ezalaki na moyangeli moko oyo azalaki kokamba bango. 20 Bato ya Yuda mpe ya Isalaele bazalaki ebele lokola zelo ya libongo ya ebale monene; bazalaki kolia, komela mpe bazalaki na esengo. 21 Salomo azalaki kokonza bikolo wana nyonso, kobanda na ebale Efrate kino na mokili ya bato ya Filisitia, mpe kino koleka mondelo ya Ejipito. Na bomoi na ye mobimba, bikolo yango ezalaki kofuta mpako epai na ye mpe ezalaki na se ya bokonzi na ye. 22 Tala bilei ya Salomo ya mokolo na mokolo: bakilo nkoto libwa ya semule mpe bakilo nkoto zomi na mwambe ya farine, 23 bangombe zomi ya mafuta, bangombe tuku mibale ya esobe, bameme mpe bantaba nkama moko, bakisa bamboloko, bambuli, bankayi mpe bandeke ya mafuta. 24 Azalaki kokonza bikolo nyonso na ngambo ya weste ya Efrate, kobanda na Tifisa kino na Gaza, elongo na bakonzi nyonso ya ngambo yango; mpe azalaki na kimia elongo na bikolo nyonso ya zingazinga. 25 Na mikolo nyonso ya bomoi ya Salomo, bato ya Yuda mpe ya Isalaele, kobanda na Dani kino na Beri-Sheba, bazalaki na kimia, moto na moto azalaki kovanda na se ya banzete na ye ya vino mpe ya figi. 26 Salomo azalaki na mapango nkoto minei ya bampunda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, nkoto zomi na mibale. 27 Bayangeli ya bituka bazalaki komema bilei, moto na moto na sanza na ye, mpo na mokonzi Salomo mpe mpo na bato nyonso oyo bazalaki kolia na mesa ya mokonzi; bazalaki kosala ete eloko moko te ezanga. 28 Bazalaki mpe komema bambuma ya orje mpe matiti mpo na bampunda, ndenge mobateli biloko ya mokonzi azalaki kokatela bango. 29 Nzambe apesaki Salomo bwanya, boyebi mingi, mpe mayele ya kososola makambo mingi, ata ezali ebele lokola zelo ya libongo ya ebale monene. 30 Bwanya ya Salomo ezalaki makasi koleka bwanya ya bato nyonso ya ngambo ya este mpe ya Ejipito. 31 Azalaki na bwanya koleka bato nyonso; koleka ata Etani, moto ya Ezera; Emani, Kalikoli mpe Darida, bana mibali ya Maoli. Boye, sango na ye epanzanaki kati na bikolo nyonso ya zingazinga. 32 Asalaki masese nkoto misato mpe banzembo nkoto moko na mitano. 33 Alobaki na tina na banzete, kobanda na nzete ya sedele ya Libani kino na nzete ya izope oyo ebimaka na mir; azalaki mpe koloba na tina na banyama mpe bandeke, na tina na bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe na tina na bambisi ya mayi. 34 Bakonzi ya bikolo nyonso ya mokili, oyo bazalaki koyoka sango ya bwanya ya Salomo, bazalaki kotinda bato, wuta na bikolo na bango, mpo na kokende koyoka bwanya na ye.

< 1 Bakonzi 4 >