< 1 Bakonzi 16 >

1 Yawe alobaki na Jewu, mwana mobali ya Anani, na tina na Baesha:
La parole de Yahweh fut adressée à Jéhu, fils de Hanani, contre Baasa, en ces termes:
2 « Mpo ete nazwaki yo kati na putulu mpe nakomisi yo mokambi ya bato na Ngai, Isalaele, kasi otambolaki na banzela ya Jeroboami mpe okweyisi bato na Ngai, Isalaele, na masumu oyo epelisi kanda na Ngai,
« Je t'ai élevé de la poussière et je t'ai établi chef de mon peuple d'Israël; mais tu as marché dans la voie de Jéroboam et tu as fait pécher mon peuple d'Israël, pour m'irriter par leurs péchés.
3 nakokombola Baesha mpe libota na ye nyonso, mpe nakokomisa ndako na ye lokola ndako ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati.
C'est pourquoi voici que je vais balayer Baasa et sa maison, et je rendrai ta maison semblable à la maison de Jéroboam, fils de Nabat.
4 Bambwa ekolia bato ya Baesha oyo bakokufa kati na engumba mpe bandeke ya likolo ekolia bato oyo bakokufa na bilanga. »
Celui de la maison de Baasa qui mourra dans la ville sera mangé par les chiens, et celui des siens qui mourra dans les champs sera mangé par les oiseaux du ciel. »
5 Makambo mosusu oyo etali mokonzi Baesha mpe misala minene oyo asalaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Le reste des actes de Baasa, ce qu'il a fait et ses exploits, cela n'est-il pas écrit dans la Chroniques des roi d'Israël?
6 Baesha akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Tiritsa; mpe Ela, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Baasa se coucha avec ses pères et il fut enterré à Thersa; et Ela, son fils, régna à sa place.
7 Yawe alobaki lisusu na nzela ya mosakoli Jewu, mwana mobali ya Anani, na tina na Baesha mpe ndako na ye, mpo na makambo mibale oyo: ya liboso, mpo na mabe nyonso oyo asalaki na miso ya Yawe, na kopelisa kanda ya Yawe na nzela ya misala na ye kino kokoma ndenge moko na libota ya Jeroboami; ya mibale, mpo ete asilisaki koboma bato nyonso ya libota ya Jeroboami.
La parole de Yahweh fut aussi dirigée par l'organe du prophète Jéhu, fils de Hanani, contre Baasa et contre sa maison, soit à cause de tout le mal qu'il avait fait sous les yeux de Yahweh, en l'irritant par l'œuvre de ses mains et en devenant semblable à la maison de Jéroboam, soit encore parce qu'il avait frappé cette maison.
8 Tango Asa, mokonzi ya Yuda, asalaki mibu tuku mibale na motoba na bokonzi; Ela, mwana mobali ya Baesha, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki Isalaele mibu mibale na Tiritsa.
La vingt-sixième année d'Asa, roi de Juda, Ela, fils de Baasa, devint roi d'Israël à Thersa, et il régna deux ans.
9 Zimiri, mokonzi ya mampinga oyo azalaki kokamba ndambo ya bashar na ye, asalelaki ye likita. Na tango wana, mokonzi Ela azalaki na Tiritsa komela mpe kolangwa masanga na ndako ya Aritsa, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, kuna na Tiritsa.
Son serviteur Zambri, chef de la moitié des chars, conspira contre lui. Ela était à Thersa, buvant et s'enivrant dans la maison d'Arsa, qui était préposé à la maison du roi à Thersa.
10 Zimiri akotaki, abetaki mpe abomaki ye na tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi. Boye, Zimiri akitanaki na Ela na bokonzi.
Zambri entra, le frappa et le tua, la vingt-septième année d'Asa, roi de Juda, et il régna à sa place.
11 Na tango kaka azwaki bokonzi mpe avandaki na kiti ya bokonzi, asilisaki koboma libota mobimba ya Baesha; atikaki ata mobali moko te na bomoi, ezala ndeko to molingami na ye.
Lorsqu'il fut devenu roi et qu'il fut assis sur son trône, il frappa toute la maison de Baasa, ne laissant vivre aucun enfant mâle, ni aucun de ses parents et de ses amis.
12 Boye, Zimiri asilisaki koboma libota nyonso ya Baesha kolanda Liloba na Yawe, oyo elobamaki mpo na kotelemela Baesha na nzela ya mosakoli Jewu;
C'est ainsi que Zambri détruisit toute la maison de Baasa, selon la parole de Yahweh qu'il avait dite contre Baasa par l'organe de Jéhu, le prophète,
13 likolo ya masumu nyonso oyo Baesha elongo na mwana na ye ya mobali Ela basalaki mpe oyo ememaki Isalaele mobimba na libebi; masumu oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na nzela ya banzambe na bango ya bikeko oyo ezanga tina.
à cause de tous les péchés que Baasa et Ela, son fils, avaient commis et qu'ils avaient fait commettre à Israël, irritant par leurs idoles Yahweh, le Dieu d'Israël.
14 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Ela, misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Le reste des actes d'Ela, et tout ce qu'il a fait, cela n'est-il pas écrit dans le livre des Chroniques des rois d'Israël?
15 Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi; Zimiri akonzaki na Tiritsa, mikolo sambo. Mampinga ya basoda ya Isalaele batongaki molako na bango pembeni ya Gibetoni, engumba ya bato ya Filisitia, mpo na kobundisa yango.
La vingt-septième année d'Asa, roi de Juda, Zambri fut roi pendant sept jours à Thersa. Le peuple était alors campé vis-à-vis de Gebbéthon, qui appartenait aux Philistins.
16 Tango bato ya Isalaele oyo bazalaki kati na molako bayokaki ete Zimiri asali likita mpo na kotelemela mokonzi Asa mpe abomaki ye, bakomisaki kaka na mokolo wana Omiri oyo azalaki mokonzi ya mampinga, mokonzi ya Isalaele kati na molako.
Et le peuple qui campait apprit cette nouvelle: « Zambri a conspiré, et même il a tué le roi! » Le jour même, dans le camp, tout Israël établit pour roi d'Israël Amri, chef de l'armée.
17 Bongo Omiri elongo na bato nyonso ya Isalaele balongwaki na Gibetoni mpe bakendeki kozingela Tiritsa.
Amri et tout Israël avec lui montèrent de Gebbéthon et vinrent assiéger Thersa.
18 Tango Zimiri amonaki ete mampinga ya Isalaele esili kobotola engumba, akotaki na ndako ya bokonzi, amitumbaki na ndako mpe akufaki na moto.
Lorsqu'il vit la ville prise, Zambri se retira dans la citadelle de la maison du roi et brûla sur lui la maison du roi. C'est ainsi qu'il mourut,
19 Akufaki likolo ya masumu oyo asalaki, na kosala mabe na miso ya Yawe mpe na kotambola na banzela ya Jeroboami oyo asalaki masumu oyo ememaki Isalaele na libebi.
à cause des péchés qu'il avait commis, en faisant ce qui est mal aux yeux de Yahweh, et en marchant dans la voie de Jéroboam et dans le péché que Jéroboam avait commis pour faire pécher Israël.
20 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Zimiri mpe botomboki na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Le reste des actes de Zambri, et le complot qu'il forma, cela n'est-il pas écrit dans le livre des Chroniques des rois d'Israël?
21 Sima na kufa ya Zimiri, bana ya Isalaele bakabwanaki na bandambo mibale: ndambo moko elandaki Tibini, mwana mobali ya Ginati lokola mokonzi; mpe ndambo mosusu elandaki Omiri.
Le peuple d'Israël se divisa alors en deux partis: la moitié du peuple était pour Thebni, fils de Gineth, pour le faire roi, et l'autre moitié était pour Amri.
22 Kasi bato oyo bazalaki kolanda Omiri bamonanaki makasi koleka bato oyo bazalaki kolanda Tibini, mwana mobali ya Ginati. Boye, Tibini akufaki mpe Omiri akitanaki na ye na bokonzi.
Ceux qui suivaient Amri l'emportèrent sur ceux qui suivaient Thebni, fils de Gineth. Thebni mourut, et Amri régna.
23 Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na moko, Omiri akomaki mokonzi ya Isalaele. Asalaki mibu zomi na mibale na bokonzi, mpe kati na mibu zomi na mibale wana, akonzaki mpe engumba Tiritsa mibu motoba.
La trente et unième année d'Asa, roi de Juda, Amri devint roi d'Israël, et il régna douze ans.
24 Asombaki ngomba Samari epai ya Shemeri na motuya ya palata nkoto motoba mpe atongaki engumba likolo na yango. Abengaki engumba yango Samari kolanda kombo ya Shemeri, mokolo na yango ya liboso.
Lorsqu'il eut régné six ans à Thersa, il acheta de Somer la montagne de Samarie pour deux talents d'argent; puis il bâtit sur la montagne, et il donna à la ville qu'il avait bâtie le nom de Samarie, du nom de Somer, à qui la montagne appartenait.
25 Kasi Omiri asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe asalaki masumu koleka bakonzi nyonso oyo bakonzaki liboso na ye.
Amri fit ce qui est mal aux yeux de Yahweh, et il agit plus mal que tous ceux qui avaient régné avant lui.
26 Atambolaki na banzela nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo asalaki masumu oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na nzela ya banzambe na bango ya bikeko oyo ezanga tina.
Il marcha dans toute la voie de Jéroboam, fils de Nabat, et dans les péchés que Jéroboam avait fait commettre à Israël, irritant par leurs idoles Yahweh, le Dieu d'Israël.
27 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Omiri: misala oyo asalaki mpe nguya oyo alakisaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Le reste des actes d'Amri, ce qu'il a fait, et les exploits qu'il a accomplis, cela n'est-il pas écrit dans le livre des Chroniques des rois d'Israël?
28 Omiri, akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari. Akabi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Amri se coucha avec ses pères, et il fut enterré à Samarie. Achab, son fils, régna à sa place.
29 Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na mwambe na bokonzi, Akabi, mwana mobali ya Omiri, akomaki mokonzi ya Isalaele. Akonzaki Isalaele na engumba Samari mibu tuku mibale na mibale.
Achab, fils d'Amri, devint roi d'Israël la trente-huitième année d'Asa, roi de Juda, et Achab, fils d'Amri, régna vingt-deux ans sur Israël à Samarie.
30 Akabi, mwana mobali ya Omiri, asalaki makambo mabe mingi na miso ya Yawe koleka bakonzi nyonso oyo bakonzaki liboso na ye.
Achab, fils d'Amri, fit ce qui est mal aux yeux du Seigneur, plus que tous ceux qui avaient été avant lui.
31 Lokola amonaki ete kolanda masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, ekokaki te, abalaki Jezabeli, mwana mwasi ya Etibala, mokonzi ya Sidoni, mpe akomaki kosalela nzambe Bala mpe kogumbamela yango.
Comme si c'eût été pour lui peu de chose de marcher dans les péchés de Jéroboam, fils de Nabat, il prit pour femme Jézabel, fille d'Ethbaal, roi des Sidoniens, et il alla servir Baal et se prosterner devant lui.
32 Akabi atongaki etumbelo mpo na nzambe Bala kati na ndako oyo atongaki mpo na yango, na Samari.
Il éleva un autel à Baal dans la maison de Baal, qu'il bâtit à Samarie;
33 Akabi atongaki lisusu likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera; asalaki makambo mabe koleka bakonzi nyonso ya Isalaele oyo bakonzaki liboso na ye, makambo oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
Achab fit aussi l'aschérah. Achab fit plus encore que tous les rois d'Israël qui avaient été avant lui pour irriter Yahweh, le Dieu d'Israël.
34 Na tango Akabi azalaki mokonzi, Iyeli, moto ya Beteli, atongaki lisusu engumba Jeriko. Tango atongaki miboko na yango, Abirami, mwana na ye ya liboso ya mobali, akufaki; mpe tango batiaki bikuke na yango, Segubi, mwana na ye ya mobali ya suka, akufaki. Yango esalemaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela na Jozue, mwana mobali ya Nuni.
De son temps, Hiel de Béthel bâtit Jéricho; il en jeta les fondements au prix d'Abiram, son premier-né, et il en posa les portes au prix de Ségub, son dernier fils, selon la parole de Yahweh, qu'il avait dite par l'organe de Josué, fils de Nun.

< 1 Bakonzi 16 >