< 1 Bakolinto 14 >

1 Boye bolukaka liboso bolingo, mpe bozalaka na posa makasi ya makabo ya Molimo, mpe mingi penza likabo ya kosakola.
Labour after charity, and be desirous of spiritual gifts: but especially that ye may prophesy.
2 Pamba te moto oyo alobaka na lokota oyo eyebani te alobaka na Nzambe kasi na bato te. Boye moto moko te asosolaka ye; nzokande, alobaka mabombami, na bokambami ya Molimo.
For he, that speaketh in an unknown tongue, speaketh not to men, but to God: for no one understandeth, though in spirit he speaketh mysteries.
3 Kasi moto oyo asakolaka alobaka nde na bato mpo na kokolisa kondima na bango, kolendisa bango mpe kobondisa bango.
But he, that prophesieth, speaketh edification, and exhortation, and comfort to men.
4 Moto oyo alobaka na lokota oyo eyebani te alendisaka kaka kondima na ye moko, kasi moto oyo asakolaka alendisaka kondima ya Lingomba mobimba.
He, that speaketh in an unknown tongue, edifieth himself: but he, that prophesieth, edifieth the church.
5 Nalingi ete bino nyonso bolobaka nkota oyo eyebani te, kasi nalingi mingi koleka ete bino nyonso bosakolaka. Moto oyo azali kosakola azali na tina mingi, koleka moto oyo azali koloba nkota oyo eyebani te, longola kaka soki alimboli nkota yango mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.
I could wish that ye all spake with tongues, but rather that ye prophesied: for greater is he that prophesieth than he that speaketh with tongues, except he interpret, that the church may receive edification.
6 Bandeko na ngai, soki nayei epai na bino mpe nalobi na bino kaka na nkota oyo eyebani te, nakozala litomba nini mpo na bino soki liloba na ngai ememeli bino te ezala emoniseli, boyebi ya sika, lisakoli to malakisi?
Now, my brethren, if I come to you speaking with many tongues, what shall I profit you, unless I speak intelligibly to you of revelation, or knowledge, or prophecy, or doctrine?
7 Ezali mpe ndenge moko mpo na bibetelo mindule lokola flite to lindanda: soki ezali kobimisa te mingongo ekesana, ndenge nini tokoki kososola mongongo oyo flite to lindanda ezali kobimisa?
As inanimate things which give a found, whether pipe or harp, unless they give a distinction in the sounds, how shall what is piped or harped be understood?
8 Bongo, soki kelelo ebimisi mongongo oyo esengeli te, nani akomibongisa mpo na etumba?
For if the trumpet give an uncertain sound, who will prepare himself for the battle?
9 Ezali mpe ndenge moko mpo na bino: soki na minoko na bino, bozali kaka koloba makambo oyo bato bazali kososola te, ndenge nini bakoki penza koyeba makambo oyo bozali koloba? Wana, bokoloba na pamba.
So also unless ye utter by the tongue intelligible words, how shall what is spoken be understood? for thus ye will be only talking to the wind.
10 Kati na mokili, nkota ezali ya ndenge na ndenge, mpe lokota moko te kati na yango ezangi tina.
There are, it may be, as many kinds of voices in the world as people, and none of them insignificant.
11 Nzokande, soki nayebi te ndimbola ya maloba ya lokota oyo moto azali koloba na ngai, nakozala lokola mopaya epai na ye, mpe ye akozala mopaya epai na ngai.
But if I know not the force of the words, I shall be to him that speaketh a barbarian, and he that speaketh will be a barbarian to me.
12 Yango wana, bino mpe, lokola bozalaka na posa makasi ya makabo ya Molimo, bolukaka mingi kozala na yango ebele mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.
So ye also, since ye are so desirous of spiritual gifts, seek to abound in them to the edification of the church.
13 Yango wana, tika ete moto oyo alobaka na nkota oyo eyebani te abondela mpo ete azwa makoki ya kolimbola maloba oyo azali koloba.
Wherefore let him, that speaketh in an unknown tongue, pray that he may interpret.
14 Pamba te soki nasambeli na nkota oyo eyebani te, molimo na ngai ekozala kosambela, kasi mayele na ngai ekosala te.
For if I pray in an unknown tongue, my spirit indeed prayeth, but my meaning is fruitless.
15 Boye, nasala nini? Nakosambela na molimo na ngai, kasi nakosambela mpe na mayele na ngai; nakoyemba na molimo na ngai, kasi nakoyemba mpe na mayele na ngai.
What is then to be done? I will pray with the Spirit, but I will pray to be understood: I will sing with the spirit, but I will sing to be understood.
16 Soki ozali kozongisa matondi epai ya Nzambe kati na molimo na yo, ndenge nini ba-oyo bazali koyoka te bakoki koloba « Amen! » na losambo na yo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe? Pamba te bayebi te makambo oyo ozali koloba.
For if thou bless in the spirit, how shall the unlearned say Amen to thy thanksgiving, when he knoweth not what thou sayst?
17 Ozali kozongisa matondi ya kitoko, kasi moto mosusu azali kokola te kati na kondima.
thou indeed givest thanks well, but the other is not edified.
18 Nazongisaka matondi epai ya Nzambe mpo ete nalobaka nkota oyo eyebani te, koleka bino nyonso.
I thank God, I speak with tongues more than you all.
19 Kasi kati na Lingomba, nasepelaka koloba maloba mitano oyo bato bakoki kososola mpo na koteya bato mosusu, na esika ete naloba maloba nkoto zomi na nkota oyo eyebani te.
But in a public assembly I had rather speak five words to be understood, that I may instruct others also, than ten thousand words in an unknown tongue.
20 Bandeko na ngai, botika kokanisa lokola bana mike; bozala te lokola bana mike na lolenge na bino ya kososola makambo. Mpo na oyo etali mabe, bozala lokola bana mike; kasi mpo na oyo etali lolenge ya kososola makambo, bozala mikolo.
My brethren, be not children in sense: but in malice be infants, and in your judgements shew yourselves to be men.
21 Ekomama boye kati na Mobeko: « Ekozala na nkota ya bapaya, na nzela ya nkota oyo eyebani te nde nakoloba na bato oyo; kasi atako bongo, bakoyoka ngai te, » elobi Nkolo.
It is written in the law, "By men of another language, and by other lips, will I speak to this people, and even so they will not listen to me, saith the Lord."
22 Yango wana, nkota oyo eyebani te ezali elembo mpo na bato oyo bazali bandimi te, kasi ezali elembo te mpo na bandimi; nzokande lisakoli ezali elembo mpo na bandimi, kasi ezali elembo te mpo na bato oyo bazali bandimi te.
So that tongues are for a sign, not to believers but to unbelievers: but prophecy not to unbelievers but to those that believe.
23 Soki Lingomba mobimba esangani esika moko, mpe bato nyonso bazali koloba nkota oyo eyebani te, bongo bato oyo bazali na boyebi moke to bato oyo bazali bandimi te bakoti kuna, boni, bakoloba te ete bozali na liboma?
If then the whole church be come together and all speak in unknown tongues, and there come in illiterate persons, or infidels, will they not say that ye are mad?
24 Nzokande, soki bato nyonso bazali kosakola, mpe moto oyo azali mondimi te to oyo azali na boyebi moke akoti kuna, boni, akomimona te lokola moto ya masumu? Akomitungisa te kati na motema na ye?
But if all prophesy, and there come in an unbeliever, or one unlearned, he is convinced by all, he is judged by all.
25 Basekele ya motema na ye ekomonisama polele. Bongo, akofukama elongi kino na mabele, akogumbamela Nzambe mpe akoloba: « Solo, Nzambe azali kati na bino. »
And thus the secrets of his heart are made manifest; so that falling down upon his face he will worship God, declaring that God is indeed among you.
26 Bandeko, toloba lisusu nini? Tango bosanganaka esika moko, tika ete moko ayemba nzembo, mosusu ateya, mosusu ayebisa makambo oyo Nzambe amonisi ye, mosusu aloba na lokota oyo eyebani te, mpe mosusu alimbola. Nyonso wana esengeli kosalema mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.
What is then to be done, my brethren? when ye come together, if any of you hath a psalm, a doctrine, a tongue, a revelation, an interpretation, ---let all be done for edification.
27 Soki bato bazali koloba na nkota oyo eyebani te, tika ete bato mibale, suka bato misato, baloba, moko sima na mosusu, mpe esengeli ete moko alimbola yango.
And if any one speak in an unknown tongue, let it be by two, or at most by three, and that by turns; and let one interpret.
28 Soki moto ya kolimbola maloba yango azali te, wana tika ete ye oyo azali koloba lokota oyo eyebani te akanga monoko kati na Lingomba, mpe aloba epai na ye moko mpe epai ya Nzambe.
But if there be no interpreter, let him be silent in the assembly; and let him speak to himself and to God.
29 Mpo na oyo etali basakoli, tika ete mibale to misato basakola, mpe bamosusu baluka kososola malamu makambo oyo bazali koloba.
And let but two or three of the prophets speak, and the others judge.
30 Soki moko kati na mayangani azwi emoniseli, wana mosusu azali koloba, moto oyo azali koloba asengeli kokanga monoko.
And if any thing be revealed to another sitting by, let the first have done speaking before the other begins.
31 Pamba te bino nyonso bokoki na bino kosakola, kasi bosengeli kosala yango moko sima na mosusu, mpo ete bato nyonso bayekola mpe balendisama.
For ye may all prophesy one by one, that all may learn, and all may be comforted.
32 Mosakoli azali na bokonzi likolo ya molimo ya basakoli, oyo ezali kokamba ye.
And the spirits of the prophets are subject to the prophets:
33 Pamba te Nzambe azali Nzambe ya mobulu te, kasi Nzambe ya kimia. Ndenge esalemaka kati na Mangomba nyonso ya basantu,
for God is not the author of confusion, but of peace, as we see in all the assemblies of the saints.
34 basi basengeli te koloba kati na mayangani, pamba te bazali na ndingisa te ya koloba. Basengeli nde kotosa ndenge Mobeko etindaka.
Let your women be silent in your assemblies: for it is not permitted to them to speak, but they are to be in subjection, as the law saith.
35 Soki bazali na posa ya koyeba likambo, tika ete batunaka mibali na bango kati na ndako, pamba te ezali soni mpo na mwasi koloba kati na mayangani.
And if they would learn any thing, let them ask their own husbands at home; for it does not become women to speak in a public assembly.
36 Boni, bokanisi ete Maloba ya Nzambe ewutaki nde epai na bino to ekomaki kaka epai na bino moko?
Did the word of God come out first from you? or did it come to you only?
37 Soki moto akanisi ete azali mosakoli to azali na likabo ya Molimo, asengeli koyeba ete makambo oyo nasili kokomela bino ezali nde Mobeko ya Nkolo.
If any one seem to be a prophet, or acted by the Spirit, let him acknowlege that what I write to you are the commandments of the Lord.
38 Soki ayebi yango te, elingi koloba ete Nzambe mpe ayebi ye te.
But if any will be ignorant, let him be ignorant.
39 Yango wana, bandeko na ngai, bozala na posa makasi ya likabo ya kosakola, mpe bopekisa bato te koloba nkota oyo eyebani te.
Wherefore, my brethren, be most desirous to prophesy, and yet forbid not to speak with tongues:
40 Kasi tika ete makambo nyonso esalema na ndenge oyo esengeli, na mobulu te.
but let all things be done decently and in order.

< 1 Bakolinto 14 >