< 1 Masolo ya Kala 9 >

1 Batangaki bana nyonso ya Isalaele mpe bakomaki bakombo na bango na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. Bato ya Yuda bakendeki na bowumbu na Babiloni mpo na kozanga boyengebene. 2 Bato ya liboso kati na bana ya Isalaele oyo bazongaki lisusu kovanda na bingumba na bango, ezalaki: ndambo ya bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi mpe basali ya Tempelo ya Yawe. 3 Nzokande, ndambo ya bana mibali ya Yuda, ya Benjame, ya Efrayimi mpe ya Manase bazalaki kovanda na Yelusalemi: 4 Utayi, mwana mobali ya Amiwudi, mwana mobali ya Omiri, mwana mobali ya Imiri, mwana mobali ya Bani, moko kati na bakitani ya Peretsi, mwana mobali ya Yuda. 5 Kati na bato ya Shiloni: Asaya, mwana ya liboso, mpe bana na ye ya mibali. 6 Kati na bakitani ya Zera: Yeuweli. Mpe bandeko na bango bazalaki nkama motoba na tuku libwa. 7 Kati na bakitani ya Benjame: Salu, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Odavia, mwana mobali ya Asenuwa; 8 Yibinea, mwana mobali ya Yeroami; Ela, mwana mobali ya Uzi mpe koko ya Mikiri; mpe Meshulami, mwana mobali ya Shefatia mpe koko ya Reweli, mwana mobali ya Yibiniya. 9 Motango ya bato ya Benjame kolanda ndenge bakomamaki na buku ya mabota na bango, ezalaki nkama libwa na tuku mitano na motoba. Bato oyo nyonso bazalaki bakambi ya bituka na bango. 10 Kati na Banganga-Nzambe: Yedaeya, Yeoyaribi, Yakini; 11 Azaria, mwana mobali ya Ilikia, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Tsadoki, mwana mobali ya Merayoti, mwana mobali ya Ayitubi oyo azalaki mokambi ya Ndako ya Nzambe. 12 Ezalaki mpe na Adaya, mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Pashuri, mwana mobali ya Malikiya; mpe Maesayi, mwana mobali ya Adieli, mwana mobali ya Yazera, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Meshilemiti, mwana mobali ya Imeri. 13 Banganga-Nzambe oyo bazalaki bakambi ya bituka, bazalaki nkoto moko na nkama sambo na tuku motoba; bazalaki na molende makasi mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe. 14 Kati na Balevi: Shemaya, mwana mobali ya Ashubi, mwana mobali ya Azirikami, mwana mobali ya Ashabia, mokitani ya Merari; 15 mpe Bakibakari, Ereshi, Galali mpe Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zikiri, mwana mobali ya Azafi; 16 Abidiasi, mwana mobali ya Shemaya, mwana mobali ya Galali, mwana mobali ya Yedutuni; Berekia, mwana mobali ya Asa, mwana mobali ya Elikana oyo azalaki kovanda na mboka Netofa. 17 Ezalaki mpe na bakengeli bikuke: Shalumi, Akubi, Talimoni, Ayimani mpe bandeko na bango ya mibali. Shalumi nde azalaki mokonzi na bango. 18 Kino lelo, bakitani ya Shalumi bakengelaka ekuke ya ngambo ya este ya Ndako ya Nzambe, ekuke oyo babengaka ekuke ya Mokonzi. Bango wana nde bakengeli bikuke kati na Balevi. 19 Shalumi, mwana mobali ya Kore, mwana mobali ya Ebiazafi, mwana mobali ya Kore elongo na bandeko na bango mosusu ya libota ya Kore, bazalaki na mokumba ya kokengela ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani ndenge bakoko na bango bazalaki kokengela ekuke ya molako ya Yawe. 20 Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, azalaki kala mokonzi na bango, bongo Yawe azalaki elongo na ye. 21 Zakari, mwana mobali ya Meshelemia, azalaki mpe mokengeli ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 22 Bango nyonso oyo baponamaki mpo ete bazala bakengeli bikuke bazalaki nkama mibale na zomi na mibale. Bakomaki bakombo na bango na buku ya mabota kolanda bamboka na bango. Ezali Davidi mpe Samuele oyo azalaki momoni makambo nde batiaki bango na misala na bango. 23 Boye, bango elongo na bana na bango bazalaki na mokumba ya kokengela bikuke ya Tempelo ya Yawe; elingi koloba bikuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 24 Bakengeli bikuke bazalaki na bangambo minei: este, weste, nor mpe sude. 25 Bandeko na bango ya mibali oyo bazalaki na bamboka na bango, basengelaki koyaka tango na tango kosunga bango mikolo sambo. 26 Kasi bakonzi minei ya bakengeli bikuke bazalaki Balevi oyo bazalaki na mokumba ya kokengela bashambre mpe bomengo ya Ndako ya Nzambe. 27 Bazalaki kolekisa butu na zingazinga ya Ndako ya Nzambe mpo ete basengelaki kokengela yango mpe kofungola yango tongo nyonso. 28 Bamoko kati na bango bazalaki na mokumba ya kobatela bisalelo ya losambo mpe kotanga yango tango nyonso bazalaki kokotisa to kobimisa yango. 29 Bamosusu kati na bango bazalaki na mokumba ya kobatela bambeki mpe bisalelo nyonso ya Esika ya bule: farine, vino, mafuta, ansa mpe malasi. 30 Kasi bana mibali ya Banganga-Nzambe bazalaki kosala malasi. 31 Moto moko kati na Balevi, Matitia, mwana mobali ya liboso ya Shalumi, moto ya Kore, azalaki na mokumba ya kotumba mapa na kikalungu. 32 Bamosusu kati na bango, bato ya Keati, bazalaki na mokumba ya kobongisa mapa na milongo mpo na basaba nyonso. 33 Bayembi oyo bazalaki bakambi ya libota ya Levi, bazalaki tango nyonso kovanda na bashambre ya Ndako ya Nzambe. Bazalaki kosala mosala mosusu te kaka kosala kati na Ndako ya Nzambe butu mpe moyi. 34 Bango nyonso wana bazalaki bakambi ya libota ya Levi kolanda ndenge bakomamaki na buku ya mabota na bango; mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi. 35 Yeyeli, tata ya Gabaoni, azalaki kovanda na Gabaoni elongo na Maaka, mwasi na ye. 36 Abidoni azalaki mwana na ye ya liboso; mpe sima, abotaki lisusu Tsuri, Kishi, Bala, Neri, Nadabi, 37 Gedori, Ayiyo, Zakari mpe Mikiloti. 38 Mikiloti abotaki Shimeami. Bango mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi elongo na bandeko na bango ya mibali. 39 Neri abotaki Kishi; Kishi abotaki Saulo; Saulo abotaki Jonatan, Maliki-Shuwa, Abinadabi mpe Eshibala. 40 Jonatan abotaki mwana mobali, Meriba-Bala. Meriba-Bala abotaki Mishe. 41 Bana mibali ya Mishe: Pitoni, Meleki, Taereya mpe Akazi. 42 Akazi abotaki Yayera; Yayera abotaki Alemeti, Azimaveti mpe Zimiri; Zimiri abotaki Motsa; 43 Motsa abotaki Bineya; Bineya abotaki Refaya; Refaya abotaki Eleasa; Eleasa abotaki Atseli. 44 Atseli abotaki bana mibali motoba: Azirikami, Bokuru, Isimaeli, Shearia, Abidiasi mpe Anani. Bango nde bazalaki bana mibali ya Atseli.

< 1 Masolo ya Kala 9 >