< 1 Masolo ya Kala 8 >

1 Bana mibali ya Benjame: Bela, mwana ya liboso; Ashibeli, mwana ya mibale; Ara, mwana ya misato; 2 Noa, mwana ya minei; mpe Rafa, mwana ya mitano. 3 Bana mibali ya Bela: Adari, Gera, Abiwudi, 4 Abishuwa, Namani, Aowa, 5 Gera, Shefufani mpe Urami. 6 Tala bana mibali ya Ewudi oyo bazalaki bakambi ya bituka ya bavandi ya Geba, mpe bamemaki bato ya Geba na Manaati: 7 Namani, Ayiya mpe Gera. Ezalaki Gera, tata ya Uza mpe ya Ayiwudi, nde moto amemaki bango na bowumbu. 8 Shaarayimi abotaki bana na mokili ya Moabi, sima na ye kobengana basi na ye mibale: Ushimi mpe Baara. 9 Na nzela ya Odeshi, mwasi na ye ya sika, abotaki: Yobabi, Tsibia, Mesha, Malikami, 10 Yeutsi, Sakia mpe Mirima. Bango nde bazalaki bana mibali ya Shaarayimi, oyo bakomaki bakambi ya bituka. 11 Elongo na Ushimi, mwasi na ye, Shaarayimi abotaki: Abitubi mpe Elipaali. 12 Bana mibali ya Elipaali: Eberi, Misheami mpe Shemeri oyo atongaki bingumba Ono mpe Lodi elongo na bamboka na yango ya mike. 13 Beria mpe Shema oyo bazalaki bakambi ya bituka ya bavandi ya Ayaloni babenganaki bato ya Gati. 14 Bana mibali ya Beria: Ayiyo, Shashaki, Yeremoti, 15 Zebadia, Aradi, Ederi, 16 Mikaeli, Yishipa mpe Yoa, bana mibali ya Beria. 17 Zebadia, Meshulami, Iziki, Eberi, 18 Yishimerayi, Yiziliya mpe Yobabi bazalaki bana mibali ya Elipaali. 19 Yakimi, Zikiri, Zabidi, 20 Elienayi, Tsilitai, Elieli, 21 Adaya, Beraya mpe Shimirati bazalaki bana mibali ya Shimei. 22 Yishipani, Eberi, Elieli, 23 Abidoni, Zikiri, Anani, 24 Anania, Elami, Anitotiya, 25 Yifidea mpe Penueli bazalaki bana mibali ya Shashaki. 26 Shamisherayi, Shearia, Atalia, 27 Yaareshia, Eliya mpe Zikiri bazalaki bana mibali ya Yeroami. 28 Bango nyonso bazalaki bakambi ya bituka ndenge bakomama na buku ya mabota na bango, mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi. 29 Yeyeli, tata ya Gabaoni, azalaki kovanda na Gabaoni. Kombo ya mwasi na ye ezalaki « Maaka. » 30 Abidoni azalaki mwana na ye ya liboso ya mobali; sima, Tsuri, Kishi, Bala, Nadabi, 31 Gedori, Ayiyo mpe Zekeri. 32 Mikiloti abotaki mwana mobali, Shimea. Bango mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi elongo na mabota na bango. 33 Neri abotaki Kishi; Kishi abotaki Saulo; Saulo abotaki Jonatan, Maliki-Shuwa, Abinadabi mpe Eshibala. 34 Jonatan abotaki Meriba-Bala; Meriba-Bala abotaki Mishe. 35 Mishe abotaki: Pitoni, Meleki, Taereya mpe Akazi. 36 Akazi abotaki Yeoyada; Yeoyada abotaki Alemeti, Azimaveti mpe Zimiri, tata ya Motsa. 37 Zimiri abotaki Motsa; Motsa abotaki Bineya; Bineya abotaki Rafa; Rafa abotaki Eleasa; mpe Elasa abotaki Atseli. 38 Atseli abotaki bana mibali motoba: Azirikami, Bokuru, Isimaeli, Shearia, Abidiasi mpe Anani. Bango nyonso nde bazalaki bana mibali ya Atseli. 39 Bana mibali ya Esheki, ndeko mobali ya Atseli: Ulami, mwana na ye ya liboso; Yewushi, mwana ya mibale; mpe Elifeleti, mwana ya misato. 40 Bana mibali ya Ulami bazalaki basoda ya mpiko oyo bayebaki kosalela tolotolo. Bazalaki na bana mibali mpe bakoko ya mibali ebele: nkama moko na tuku mitano. Bango nyonso bazalaki bakitani ya Benjame.

< 1 Masolo ya Kala 8 >