< 1 Masolo ya Kala 25 >

1 Na lisungi ya bakonzi ya mampinga, Davidi atiaki pembeni ndambo ya bana mibali ya Azafi, ya Emani mpe ya Yedutuni mpo na kosala mosala ya kosakola mpe ya kosalela banzenze, mandanda mpe manzanza. Tala bakombo ya bato oyo basalaki mosala yango:
大衛和眾首領分派亞薩、希幔,並耶杜頓的子孫彈琴、鼓瑟、敲鈸、唱歌。他們供職的人數記在下面:
2 Mpo na bana mibali ya Azafi: Zakuri, Jozefi, Netania mpe Asareyela. Bana mibali ya Azafi bazalaki na bokambami ya tata na bango Azafi oyo azalaki kosakola na bokambami ya mokonzi.
亞薩的兒子撒刻、約瑟、尼探雅、亞薩利拉都歸亞薩指教,遵王的旨意唱歌。
3 Mpo na Yedutuni, bazwaki kati na bana na ye ya mibali: Gedalia, Tseri, Ezayi, Shimei, Ashabia mpe Matitia. Bazalaki bango nyonso motoba na bokambami ya tata na bango Yedutuni oyo azalaki kosakola mpe kosalela lindanda mpo na kopesa matondi mpe kokumisa Yawe.
耶杜頓的兒子基大利、西利、耶篩亞、哈沙比雅、瑪他提雅、示每共六人,都歸他們父親耶杜頓指教,彈琴,唱歌,稱謝,頌讚耶和華。
4 Mpo na Emani, bazwaki kati na bana na ye ya mibali: Bukiya, Matania, Uzieli, Shebueli, Yerimoti, Anania, Anani, Eliyata, Gidaliti, Romamiti-Ezeri, Yoshibekasha, Maloti, Otiri mpe Maazioti.
希幔的兒子布基雅、瑪探雅、烏薛、細布業、耶利摩、哈拿尼雅、哈拿尼、以利亞他、基大利提、羅幔提‧以謝、約施比加沙、瑪羅提、何提、瑪哈秀;
5 Bango nyonso bazalaki bana mibali ya Emani, mosakoli ya mokonzi, oyo azalaki koyebisa ye maloba na Nzambe mpo na konetola nguya na Ye. Nzambe apesaki na Emani bana mibali zomi na minei mpe bana basi misato.
這都是希幔的兒子,吹角頌讚。希幔奉上帝之命作王的先見。上帝賜給希幔十四個兒子,三個女兒,
6 Bango nyonso bazalaki na bokambami ya tata na bango mpo na kobeta miziki na Tempelo ya Yawe mpe kobeta manzanza, mandanda mpe banzenze; mpe mpo na kosala mosala kati na Ndako ya Nzambe. Azafi, Yedutuni mpe Emani bazalaki na bokambami ya mokonzi.
都歸他們父親指教,在耶和華的殿唱歌、敲鈸、彈琴、鼓瑟,辦上帝殿的事務。亞薩、耶杜頓、希幔都是王所命定的。
7 Motango na bango elongo na bandeko na bango ya mibali oyo bayekolaki koyembela Yawe malamu ezalaki nkama mibale na tuku mwambe na mwambe.
他們和他們的弟兄學習頌讚耶和華;善於歌唱的共有二百八十八人。
8 Ezala mpo na bakulutu to mpo na baleki, mpo na balakisi to mpo na bayekoli, bazalaki kobeta zeke mpo na kokabola misala na bango.
這些人無論大小,為師的、為徒的,都一同掣籤分了班次。
9 Zeke ya liboso, oyo ezalaki mpo na libota ya Azafi, ekweyaki epai ya Jozefi, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale. Zeke ya mibale ekweyaki epai ya Gedalia, bandeko na ye ya mibali mpe bana na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
掣籤的時候,第一掣出來的是亞薩的兒子約瑟。第二是基大利;他和他弟兄並兒子共十二人。
10 Zeke ya misato ekweyaki epai ya Zakuri, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第三是撒刻;他和他兒子並弟兄共十二人。
11 Zeke ya minei ekweyaki epai ya Yitseri, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第四是伊洗利;他和他兒子並弟兄共十二人。
12 Zeke ya mitano ekweyaki epai ya Netania, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第五是尼探雅;他和他兒子並弟兄共十二人。
13 Zeke ya motoba ekweyaki epai ya Bukiya, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第六是布基雅;他和他兒子並弟兄共十二人。
14 Zeke ya sambo ekweyaki epai ya Yesareela, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第七是耶薩利拉;他和他兒子並弟兄共十二人。
15 Zeke ya mwambe ekweyaki epai ya Ezayi, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第八是耶篩亞;他和他兒子並弟兄共十二人。
16 Zeke ya libwa ekweyaki epai ya Matania, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第九是瑪探雅;他和他兒子並弟兄共十二人。
17 Zeke ya zomi ekweyaki epai ya Shimei, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第十是示每;他和他兒子並弟兄共十二人。
18 Zeke ya zomi na moko ekweyaki epai ya Azareeli, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第十一是亞薩烈;他和他兒子並弟兄共十二人。
19 Zeke ya zomi na mibale ekweyaki epai ya Ashabia, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第十二是哈沙比雅;他和他兒子並弟兄共十二人。
20 Zeke ya zomi na misato ekweyaki epai ya Shubaeli, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第十三是書巴業;他和他兒子並弟兄共十二人。
21 Zeke ya zomi na minei ekweyaki epai ya Matitia, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第十四是瑪他提雅;他和他兒子並弟兄共十二人。
22 Zeke ya zomi na mitano ekweyaki epai ya Yeremoti, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第十五是耶利摩;他和他兒子並弟兄共十二人。
23 Zeke ya zomi na motoba ekweyaki epai ya Anania, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第十六是哈拿尼雅;他和他兒子並弟兄共十二人。
24 Zeke ya zomi na sambo ekweyaki epai ya Yoshibekasha, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第十七是約施比加沙;他和他兒子並弟兄共十二人。
25 Zeke ya zomi na mwambe ekweyaki epai ya Anani, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第十八是哈拿尼;他和他兒子並弟兄共十二人。
26 Zeke ya zomi na libwa ekweyaki epai ya Maloti, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第十九是瑪羅提;他和他兒子並弟兄共十二人。
27 Zeke ya tuku mibale ekweyaki epai ya Eliyata, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第二十是以利亞他;他和他兒子並弟兄共十二人。
28 Zeke ya tuku mibale na moko ekweyaki epai ya Otiri, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第二十一是何提;他和他兒子並弟兄共十二人。
29 Zeke ya tuku mibale na mibale ekweyaki epai ya Gidaliti, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第二十二是基大利提;他和他兒子並弟兄共十二人。
30 Zeke ya tuku mibale na misato ekweyaki epai ya Maazioti, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第二十三是瑪哈秀;他和他兒子並弟兄共十二人。
31 Zeke ya tuku mibale na minei ekweyaki epai ya Romamiti-Ezeri, bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali: bazalaki bato zomi na mibale.
第二十四是羅幔提‧以謝;他和他兒子並弟兄共十二人。

< 1 Masolo ya Kala 25 >