< 1 Masolo ya Kala 22 >

1 Davidi alobaki: « Tempelo ya Yawe Nzambe mpe etumbelo ya mbeka ya kotumba mpo na Isalaele ekozala na esika oyo. »
それでダビデは言った、「主なる神の家はこれである、イスラエルのための燔祭の祭壇はこれである」と。
2 Boye, Davidi apesaki mitindo ya kosangisa bapaya oyo bazalaki kovanda na Isalaele. Mpe kati na bango, aponaki bato oyo bakataka mabanga mpo na kotonga Ndako ya Nzambe.
ダビデは命じてイスラエルの地にいる他国人を集めさせ、また神の家を建てるのに用いる石を切るために石工を定めた。
3 Davidi apesaki bibende ebele mpo na kosala basete mpe bibende oyo esimbaka bikuke. Apesaki lisusu bronze ebele oyo bakoki kotanga te,
ダビデはまた門のとびらのくぎ、およびかすがいに用いる鉄をおびただしく備えた。また青銅を量ることもできないほどおびただしく備えた。
4 banzete ebele ya sedele oyo bakoki kotanga te, pamba te bato ya Tiri mpe ya Sidoni bamemelaki Davidi banzete yango ebele.
また香柏を数えきれぬほど備えた。これはシドンびととツロの人々がおびただしく香柏をダビデの所に持って来たからである。
5 Davidi alobaki: « Salomo, mwana na ngai ya mobali, azali nanu elenge mpe ayebi nanu makambo malamu te. Nzokande, Ndako oyo esengeli kotongama mpo na Yawe esengeli kozala monene, kitoko mpe na lokumu mingi na miso ya bikolo nyonso. Yango wana, nakobongisa biloko mpo na Ndako yango. » Boye Davidi abongisaki biloko ebele liboso ete akufa.
ダビデは言った、「わが子ソロモンは若く、かつ経験がない。また主のために建てる家はきわめて壮大で、万国に名を得、栄えを得るものでなければならない。それゆえ、わたしはその準備をしておこう」と。こうしてダビデは死ぬ前に多くの物資を準備した。
6 Davidi abengisaki Salomo, mwana na ye ya mobali, mpe apesaki ye mokumba ya kotonga Ndako mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele.
そして彼はその子ソロモンを召して、イスラエルの神、主のために家を建てることを命じた。
7 Davidi alobaki na Salomo: « Mwana na ngai, nazwaki likanisi ya kotonga Ndako mpo na Kombo na Yawe, Nzambe na ngai;
すなわちダビデはソロモンに言った、「わが子よ、わたしはわが神、主の名のために家を建てようと志していた。
8 kasi tala maloba oyo Yawe alobaki na ngai: ‹ Osopaki makila ebele mpe obundaki bitumba ebele. Okoki te kotonga ndako mpo na Kombo na Ngai; pamba te kati na mokili, osopaki makila ebele na miso na Ngai.
ところが主の言葉がわたしに臨んで言われた、『おまえは多くの血を流し、大いなる戦争をした。おまえはわたしの前で多くの血を地に流したから、わが名のために家を建ててはならない。
9 Kasi okozala na mwana moko ya mobali oyo akozala moto ya kimia mpe ya boboto. Nakopesa ye bopemi liboso ya banguna na ye nyonso oyo bazingeli ye. Kombo na ye ekozala Salomo; mpe na mikolo nyonso oyo ye akozala mokonzi, nakopesa kimia mpe bopemi na Isalaele.
見よ、男の子がおまえに生れる。彼は平和の人である。わたしは彼に平安を与えて、周囲のもろもろの敵に煩わされないようにしよう。彼の名はソロモンと呼ばれ、彼の世にわたしはイスラエルに平安と静穏とを与える。
10 Ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai. Akozala mwana mpo na Ngai, mpe Ngai nakozala Tata mpo na ye, nakolendisa kiti na ye ya bokonzi kati na Isalaele mpo na libela. ›
彼はわが名のために家を建てるであろう。彼はわが子となり、わたしは彼の父となる。わたしは彼の王位をながくイスラエルの上に堅くするであろう』。
11 Sik’oyo, mwana na ngai, tika ete Yawe azala elongo na yo mpo ete otonga Ndako mpo na Yawe, Nzambe na yo, ndenge alobaki na tina na yo!
それでわが子よ、どうか主があなたと共にいまし、あなたを栄えさせて、主があなたについて言われたように、あなたの神、主の家を建てさせてくださるように。
12 Tika ete apesa yo bwanya mpe mayele, mpo ete tango okokoma mokonzi ya Isalaele, okoka kobatela mobeko ya Yawe Nzambe na yo!
ただ、どうか主があなたに分別と知恵を賜い、あなたをイスラエルの上に立たせられるとき、あなたの神、主の律法を、あなたに守らせてくださるように。
13 Boye, okolonga soki obateli malamu bikateli mpe mibeko oyo Yawe apesaki na Moyize mpo na Isalaele. Zala makasi mpe yika mpiko! Kobanga te mpe kozonga sima te!
あなたがもし、主がイスラエルについてモーセに命じられた定めとおきてとを慎んで守るならば、あなたは栄えるであろう。心を強くし、勇め。恐れてはならない、おののいてはならない。
14 Tala, namonaki pasi mpo na kosangisa mpo na Tempelo ya Yawe, minkoko misato ya kilo ya wolo, minkoko tuku misato ya kilo ya palata, bronze mpe bibende ebele oyo bakoki kotanga te, mabaya mpe mabanga. Boye yo mpe okoki kobakisa mosusu.
見よ、わたしは苦難のうちにあって主の家のために金十万タラント、銀百万タラントを備え、また青銅と鉄を量ることもできないほどおびただしく備えた。また材木と石をも備えた。あなたはまたこれに加えなければならない。
15 Ozali na bato ebele ya misala ya maboko: bato oyo bakataka mabanga, bato oyo basalaka misala ya mabaya mpe bato oyo basalaka misala nyonso ya maboko.
あなたにはまた多数の職人、すなわち石や木を切り刻む者、工作に巧みな各種の者がある。
16 Ozali na wolo, palata, bronze mpe bibende ebele oyo bakoki kotanga te. Sik’oyo, banda mosala; mpe tika ete Yawe azala na yo elongo! »
金、銀、青銅、鉄もおびただしくある。たって行いなさい。どうか主があなたと共におられるように」。
17 Mpe Davidi apesaki mitindo epai ya bakambi nyonso ya Isalaele ete basunga mwana na ye Salomo.
ダビデはまたイスラエルのすべてのつかさたちにその子ソロモンを助けるように命じて言った、
18 Alobaki na bango: « Boni, Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino te? Apesaki bino bopemi na ngambo nyonso te? Pamba te akabaki na maboko na ngai bato ya mokili oyo. Mokili yango ezali na se ya bokonzi ya Yawe mpe ya bato na Ye.
「あなたがたの神、主はあなたがたとともにおられるではないか。四方に泰平を賜わったではないか。主はこの地の民をわたしの手にわたされたので、この地は主の前とその民の前に服している。
19 Sik’oyo, bobongisa mitema mpe milimo na bino mpo na koluka Yawe, Nzambe na bino. Bobanda kotonga Esika ya bule ya Yawe Nzambe mpo ete boyeisa Sanduku ya Boyokani ya Yawe mpe biloko ya bule ya Nzambe, na Tempelo oyo ekotongama mpo na Kombo na Yawe. »
それであなたがたは心をつくし、精神をつくしてあなたがたの神、主を求めなさい。たって主なる神の聖所を建て、主の名のために建てるその家に、主の契約の箱と神の聖なるもろもろの器を携え入れなさい」。

< 1 Masolo ya Kala 22 >