< 1 Masolo ya Kala 21 >

1 Satana atelemelaki Isalaele mpe atindikaki Davidi na kotanga motango ya bato ya Isalaele.
Et Satan se leva contre Israël, et incita David à dénombrer Israël.
2 Boye, Davidi apesaki mitindo na Joabi mpe na bakambi ya bato: — Bokende kotanga bato ya Isalaele, longwa na Beri-Sheba kino na Dani, mpe boyebisa ngai motango na bango mpo ete nayeba.
Et David dit à Joab et aux chefs du peuple: Allez, faites le dénombrement d’Israël depuis Beër-Shéba jusqu’à Dan; et rapportez-le-moi, afin que j’en sache le nombre.
3 Kasi Joabi azongisaki: — Tika ete Yawe akomisa bato na Ye ebele koleka mbala nkama! Oh mokonzi, nkolo na ngai, bango nyonso bazali te basali ya nkolo na ngai? Mpo na nini nkolo na ngai alingi kosala bongo? Mpo na nini komemisa Isalaele ngambo?
Et Joab dit: Que l’Éternel ajoute à son peuple 100 fois autant qu’il y en a! Ô roi, mon seigneur, ne sont-ils pas tous serviteurs de mon seigneur? Pourquoi mon seigneur cherche-t-il cela? Pourquoi la culpabilité en viendrait-elle sur Israël?
4 Kasi mokonzi atingamaki kaka na mitindo oyo apesaki na Joabi. Boye, Joabi abimaki, atambolaki kati na Isalaele mobimba mpe azongaki na Yelusalemi.
Mais la parole du roi prévalut sur Joab; et Joab sortit, et alla par tout Israël, et revint à Jérusalem.
5 Joabi ayebisaki Davidi motango ya bato oyo atangaki, bato oyo bakoki kosalela mopanga na bitumba: bato monkoko moko na nkoto nkama moko kati na Isalaele mobimba, mpe nkoto nkama minei na tuku sambo kati na Yuda.
Et Joab donna à David le chiffre du recensement du peuple; et il y avait, de tout Israël, 1 100 000 hommes tirant l’épée, et, de Juda, 470 000 hommes tirant l’épée;
6 Kasi kati na bango, Joabi atangaki te ekolo ya Levi mpe ya Benjame; pamba te etinda ya mokonzi esepelisaki ye te.
mais Lévi et Benjamin, il ne les dénombra pas au milieu d’eux; car la parole du roi était une abomination pour Joab.
7 Etinda yango esepelisaki Nzambe te mpe Nzambe apesaki Isalaele etumbu.
Et cette chose fut mauvaise aux yeux de Dieu; et il frappa Israël.
8 Davidi alobaki na Nzambe: — Nasali lisumu monene na kotanga bato. Sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa mabe ya mosali na Yo; pamba te nasali makambo lokola moto ya liboma.
Et David dit à Dieu: J’ai grandement péché en ce que j’ai fait cette chose; et maintenant, fais passer, je te prie, l’iniquité de ton serviteur, car j’ai agi très follement.
9 Yawe alobaki na mosakoli Gadi, mopesi toli ya Davidi:
Et l’Éternel parla à Gad, le voyant de David, disant:
10 — Kende koyebisa Davidi: « Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Nazali kotalisa yo bitumbu misato; pona moko kati na yango mpo ete Ngai nakokisa yango lokola etumbu mpo na yo. › »
Va, et parle à David, en disant: Ainsi dit l’Éternel: Je te propose trois choses; choisis-en une, et je te la ferai.
11 Gadi akendeki koyebisa Davidi makambo oyo Yawe alobaki na ye: — Tala makambo oyo Yawe alobi: « Oponi etumbu nini:
Et Gad vint vers David, et lui dit: Ainsi dit l’Éternel: Prends pour toi,
12 mibu misato ya nzala makasi; sanza misato oyo banguna na yo bakolonga yo mpe mipanga na bango ekoboma basoda na yo; to mikolo misato elongo na mopanga ya Yawe mpe bokono oyo ebomaka, mikolo oyo anjelu ya Yawe akobebisa etuka nyonso ya Isalaele? Kanisa sik’oyo malamu mpe yebisa ngai eyano oyo ngai nasengeli komema epai na Ye oyo atindi ngai. »
ou trois ans de famine, ou d’être pourchassé trois mois devant tes adversaires et d’être atteint par l’épée de tes ennemis, ou pendant trois jours l’épée de l’Éternel et la peste dans le pays, et l’ange de l’Éternel détruisant dans tous les confins d’Israël. Et maintenant, vois quelle parole je rapporterai à celui qui m’a envoyé.
13 Davidi azongiselaki Gadi: — Nazali na pasi makasi kati na motema. Eleki malamu mpo na ngai kokweya na maboko ya Yawe, pamba te mawa na Ye ezali solo monene; kasi tika ete nakweya te na maboko ya bato!
Et David dit à Gad: Je suis dans une grande détresse. Que je tombe, je te prie, dans les mains de l’Éternel, car ses compassions sont très grandes; et que je ne tombe point dans la main des hommes.
14 Boye, Yawe atindaki kati na Isalaele bokono oyo ebomaka, mpe bato ya Isalaele nkoto tuku sambo bakufaki.
Et l’Éternel envoya la peste en Israël; et il tomba d’Israël 70 000 hommes.
15 Nzambe atindaki anjelu na Yelusalemi mpo na kobebisa yango; kasi wana anjelu azalaki kobebisa, Yawe atalaki mpe ayokaki mawa mpo na pasi wana. Alobaki na anjelu oyo azalaki kobebisa: « Ekoki! Longola loboko na yo! » Anjelu na Yawe atelemaki pembeni ya etando ya Orinani, moto ya Yebusi.
Et Dieu envoya un ange à Jérusalem pour la détruire; et comme il détruisait, l’Éternel [le] vit et se repentit de ce mal, et dit à l’ange qui détruisait: Assez! Retire maintenant ta main. Or l’ange de l’Éternel se tenait près de l’aire d’Ornan, le Jébusien.
16 Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu ya Yawe atelemi kati ya likolo mpe mabele, bongo na loboko na ye oyo asembolaki likolo ya Yelusalemi, asimbaki mopanga ezanga ebombelo. Davidi mpe bampaka balataki basaki mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.
Et David leva ses yeux, et vit l’ange de l’Éternel se tenant entre la terre et les cieux, ayant en sa main son épée nue étendue sur Jérusalem. Et David et les anciens, couverts de sacs, tombèrent sur leurs faces.
17 Davidi alobaki na Nzambe: — Boni, ezali ngai nde napesaki mitindo ete batanga motango ya bato? Ngai moko nde nasalaki masumu, ngai moko nde nasalaki mbeba oyo eleki mabe. Bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te. Oh Yawe, Nzambe na ngai, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu; kasi tika ete bokono oyo ebomaka ekweyela te bato na Yo!
Et David dit à Dieu: N’est-ce pas moi qui ai commandé de dénombrer le peuple? C’est moi qui ai péché et qui ai mal agi; mais ces brebis, qu’ont-elles fait? Éternel, mon Dieu, je te prie, que ta main soit sur moi et sur la maison de mon père, mais qu’elle ne soit pas sur ton peuple pour le frapper.
18 Anjelu na Yawe atindaki Gadi koloba na Davidi: — Kende kotonga etumbelo mpo na Yawe, na etando ya Orinani, moto ya Yebusi.
Et l’ange de l’Éternel commanda à Gad de dire à David, que David monte pour dresser un autel à l’Éternel dans l’aire d’Ornan, le Jébusien.
19 Davidi akendeki kuna kolanda liloba oyo Gadi alobaki na Kombo na Yawe.
Et David monta, selon la parole de Gad, qu’il avait dite au nom de l’Éternel.
20 Bongo, wana Orinani azalaki kotuta ble, abalukaki mpe amonaki anjelu. Boye bana na ye ya mibali minei oyo bazalaki na ye elongo babombamaki.
Et Ornan se retourna et vit l’ange; et ses quatre fils se cachèrent avec lui: et Ornan foulait du froment.
21 Davidi apusanaki pembeni ya Orinani; mpe tango Orinani atalaki mpe amonaki Davidi, abimaki na etando mpe agumbamaki liboso ya Davidi, elongi kino na mabele.
Et David vint à Ornan; et Ornan regarda, et vit David, et sortit de l’aire, et se prosterna devant David, le visage contre terre.
22 Davidi alobaki na Orinani: — Pesa ngai etando na yo, tekela ngai yango na motuya ya mbongo oyo ekoki na yango, mpo ete natonga etumbelo mpo na Yawe; tekela ngai yango mpo ete etumbu ya bokono oyo ezali koboma bato esila.
Et David dit à Ornan: Donne-moi la place de l’aire, et j’y bâtirai un autel à l’Éternel; donne-la-moi pour son plein [prix] en argent, afin que la plaie soit arrêtée de dessus le peuple.
23 Orinani azongiselaki Davidi: — Kamata yango; mpe tika ete mokonzi, nkolo na ngai, asala na yango nyonso oyo amoni ete ezali malamu mpo na ye. Tala, ngai, nakopesa bangombe ya mibali lokola mbeka ya kotumba, banzete oyo babetelaka ble lokola koni, mpe ble lokola mbeka ya bambuma. Nakopesa nyonso wana.
Et Ornan dit à David: Prends-la pour toi, et que le roi, mon seigneur, fasse ce qui est bon à ses yeux. Vois, je donne les bœufs pour l’holocauste, et les traîneaux à fouler pour le bois, et le froment pour le gâteau: je donne tout.
24 Kasi mokonzi Davidi alobaki na Orinani: — Te! Nasengeli kaka kosomba yango mpe kopesa yo motuya oyo ekoki na yango; nakomema te epai na Yawe eloko oyo ezali ya yo, nakobonzela Yawe te bambeka ya kotumba oyo nazwi na ofele.
Et le roi David dit à Ornan: Non, car certainement je l’achèterai pour son plein [prix] en argent; car je ne prendrai pas pour l’Éternel ce qui est à toi, pour offrir un holocauste qui ne coûte rien.
25 Boye, Davidi asombaki etando yango epai ya Orinani, na motuya ya mbongo ya bibende ya wolo, nkama motoba.
Et David donna à Ornan pour la place, en sicles d’or, le poids de 600 [sicles].
26 Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Abelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ye na moto oyo ewutaki likolo mpe ekweyaki na etumbelo ya bambeka.
Et David bâtit là un autel à l’Éternel, et offrit des holocaustes et des sacrifices de prospérités, et invoqua l’Éternel; et il lui répondit par le feu des cieux sur l’autel de l’holocauste.
27 Boye Yawe alobaki na anjelu, mpe anjelu azongisaki mopanga na ye na ebombelo na yango.
Et l’Éternel parla à l’ange, et il remit son épée dans son fourreau.
28 Banda na tango wana, lokola Davidi amonaki ete Yawe ayanolaki ye na etando ya Orinani, moto ya Yebusi, akomaki kobonza bambeka tango nyonso na esika wana.
En ce temps-là, David, voyant que l’Éternel lui avait répondu dans l’aire d’Ornan, le Jébusien, y sacrifia.
29 Mongombo na Yawe oyo Moyize atongaki na esobe mpe etumbelo ya bambeka ya kotumba ezalaki na tango wana, na esambelo ya likolo ya ngomba ya Gabaoni.
Et le tabernacle de l’Éternel, que Moïse avait fait dans le désert, et l’autel de l’holocauste, étaient en ce temps-là sur le haut lieu de Gabaon;
30 Nzokande Davidi azalaki kokoka te kozwa mokano ya kokende kotuna Nzambe liboso ya Mongombo, pamba te azalaki kobanga mopanga na Yawe.
et David ne put point aller devant cet [autel] pour rechercher Dieu, car il était épouvanté à cause de l’épée de l’ange de l’Éternel.

< 1 Masolo ya Kala 21 >