< 1 Masolo ya Kala 16 >

1 Bamemaki Sanduku ya Yawe mpe batiaki yango kati na ndako ya kapo oyo Davidi atelemisaki mpo na yango, mpe babonzaki liboso ya Nzambe bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. 2 Tango Davidi asilisaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, apambolaki bato na Kombo na Yawe. 3 Bongo apesaki na moto nyonso ya Isalaele: lipa, gato oyo basala na bambuma ya dati mpe gato oyo basala na bambuma ya vino ya kokawuka. 4 Davidi atiaki ndambo ya Balevi mpo na kosala mosala liboso ya Sanduku ya Yawe, mpo na kokanisa, mpo na kosanzola mpe mpo na kokumisa Yawe, Nzambe ya Isalaele: 5 Azafi azalaki mokambi; Zakari azalaki molandi na ye; mpe Yeyeli, Shemiramoti, Yeyeli, Matitia, Eliabi, Benaya, Obedi-Edomi mpe Yeyeli bazalaki kobeta nzenze mpe lindanda; mpe Azafi azalaki kobeta manzanza. 6 Banganga-Nzambe Benaya mpe Yaazieli bazalaki kobeta tango nyonso bakelelo liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Nzambe. 7 Ezalaki mokolo wana nde Davidi aponaki na mbala ya liboso Azafi mpe bandeko na ye, mpo ete bakumisa Yawe: 8 Bokumisa Yawe, bobelela Kombo na Ye, bopanza sango ya misala minene na Ye kati na bikolo! 9 Boyemba mpo na lokumu na Ye, bosanzola Ye na mindule! Botatolaka tango nyonso misala minene na Ye nyonso! 10 Bosepela na Kombo na Ye ya bule! Tika ete mitema ya bato oyo balukaka Yawe etonda na esengo! 11 Bomipesa na Yawe mpe bosenga makasi na Ye! Bolukaka tango nyonso elongi na Ye! 12 Bokanisa bikamwa, makambo minene oyo asalaki, bitumbu oyo apesaki, 13 bino bakitani ya Isalaele, mosali na Ye; bino bana mibali ya Jakobi, baponami na Ye! 14 Yawe azali Nzambe na biso, mikano na Ye ekambaka mokili mobimba. 15 Akanisaka tango nyonso Boyokani na Ye, bilaka na Ye mpo na bikeke nkoto moko, 16 boyokani oyo asalaki elongo na Abrayami, mpe ndayi oyo alapaki epai ya Izaki. 17 Akokisaki bosolo na yango epai ya Jakobi lokola mobeko, epai ya Isalaele lokola boyokani ya libela na libela 18 tango alobaki: « Nakopesa yo mokili ya Kanana lokola libula oyo epesameli yo. » 19 Bozalaki kaka motango moke ya bato mpe bapaya kati na yango; 20 bozalaki koyengayenga longwa na ekolo moko kino na ekolo mosusu, longwa na mokili moko kino na mokili mosusu; 21 kasi Yawe atikaki moto moko te konyokola bango, apamelaki bakonzi na tina na bango: 22 « Bosimba bapakolami na Ngai te, bosala mabe te epai na basakoli na Ngai. » 23 Bino bato ya mokili mobimba, boyembela Yawe! Bosakolaka lobiko na Ye mokolo na mokolo! 24 Bopanza sango ya nkembo na Ye kati na mabota! Boyebisa bato misala na Ye ya kokamwa kati na bikolo nyonso! 25 Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso. 26 Pamba te banzambe nyonso ya bikolo ezali kaka bikeko ya pamba, nzokande Yawe nde akela likolo. 27 Kongenga mpe nkembo monene ezali liboso na Ye, makasi mpe esengo ezali na esika oyo avandaka. 28 Bino bituka ya mabota, bosanzola Yawe, bosanzola Yawe na kopanza sango ya nkembo mpe nguya na Ye! 29 Bosanzola Yawe mpe bopesa Kombo na Ye nkembo! Bomema makabo mpe boya liboso na Ye, bogumbamela Yawe mpo na kongenga ya bosantu na Ye! 30 Bino, bato ya mokili mobimba, bolenga liboso na Ye! Solo, mokili elendisama makasi, ekoningana te. 31 Tika ete likolo esepela mpe mabele ezala kati na esengo! Tika ete baloba kati na bikolo: « Yawe azali mokonzi! » 32 Tika ete ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango etia makelele; tika ete zamba mpe nyonso oyo ezali kati na yango esepela! 33 Boye, banzete ya zamba ekoyemba, ekoyemba na esengo liboso ya Yawe, pamba te Yawe azali koya kosambisa mabele. 34 Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko. 35 Boganga: « Oh Nzambe Mobikisi na biso, bikisa biso, sangisa biso mpe kangola biso wuta na maboko ya bokonzi ya bikolo mosusu, mpo ete tosanzola Kombo na Yo ya bule mpe tosepela na mosala ya kokumisa Yo! » 36 Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko! Bato nyonso balobaki: « Amen! » Mpe bakumisaki Yawe! 37 Davidi apesaki mokumba, epai ya Azafi mpe bandeko na ye, ya kosala mosala liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe kolanda bikateli ya mokolo na mokolo. 38 Apesaki lisusu mokumba epai ya Obedi-Edomi, mwana mobali ya Yedutuni, mpe bandeko na bango, tuku motoba na mwambe, ya kosala mosala ya kokengela bikuke elongo na Osa. 39 Davidi atiaki Nganga-Nzambe Tsadoki mpe Banganga-Nzambe mosusu, liboso ya Mongombo ya Yawe na esambelo ya likolo ya ngomba, oyo ezalaki na Gabaoni, 40 mpo na kobonza tango nyonso bambeka ya kotumba epai na Yawe, na etumbelo na yango, na tongo mpe na pokwa, kolanda bikateli oyo ekomama na mobeko oyo Yawe apesaki na Isalaele. 41 Emani mpe Yedutuni bazalaki elongo na bango, mpe bamosusu oyo baponamaki na bakombo na bango mpo na kokumisa Yawe na maloba oyo: « Mpo ete bolingo na Ye ekowumela seko. » 42 Emani mpe Yedutuni baponamaki mpo na kobeta bakelelo, manzanza mpe bibetelo mosusu ya mindule mpo na kobongisa banzembo na tina na lokumu ya Nzambe. Bana mibali ya Yedutuni bazalaki bakengeli bikuke. 43 Bato nyonso bazongaki, moto na moto epai na ye, mpe Davidi azongaki na ndako na ye mpo na kopambola libota na ye.

< 1 Masolo ya Kala 16 >