< 1 Masolo ya Kala 15 >

1 Tango Davidi asilisaki kotonga bandako mpo na ye moko kati na engumba ya Davidi, abongisaki esika mpo na Sanduku ya Nzambe mpe atelemisaki ndako ya kapo mpo na yango. 2 Davidi alobaki: « Moto moko te, longola kaka Balevi, akoki komema Sanduku ya Boyokani ya Nzambe, pamba te Yawe aponaki bango mpo na komema Sanduku na Ye mpe kosala mosala na Ye mpo na libela. » 3 Davidi asangisaki kati na Yelusalemi bana nyonso ya Isalaele mpo na komema Sanduku ya Yawe na esika oyo abongisaki mpo na yango. 4 Davidi asangisaki lisusu bakitani ya Aron mpe Balevi: 5 Mpo na bakitani ya Keati: mokambi Urieli elongo na bandeko na ye ya libota nkama moko na tuku mibale; 6 mpo na bakitani ya Merari: mokambi Asaya elongo na bandeko na ye ya libota nkama mibale na tuku mibale; 7 mpo na bakitani ya Gerishoni: mokambi Joeli elongo na bandeko na ye ya libota, nkama moko na tuku misato; 8 mpo na bakitani ya Elitsafani: mokambi Shemaya elongo na bandeko na ye ya libota, nkama mibale; 9 mpo na bakitani ya Ebron: mokambi Elieli elongo na bandeko na ye ya libota, tuku mwambe; 10 mpo na bakitani ya Uzieli: mokambi Aminadabi elongo na bandeko na ye ya libota, nkama moko na zomi na mibale. 11 Davidi abengaki Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari elongo na Balevi oyo: Urieli, Asaya, Joeli, Shemaya, Elieli mpe Aminadabi. 12 Alobaki na bango: « Bozali bakambi ya mabota ya Balevi, bino elongo na bandeko ya mabota na bino; bomipetola mpo na komema Sanduku ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na esika oyo nabongisi mpo na yango. 13 Pamba te lokola bino Balevi bozalaki te na mbala ya liboso, yango wana Yawe, Nzambe na biso, asilikelaki biso makasi; pamba te totunaki Ye te ndenge nini tokokaki komema yango kolanda mibeko. » 14 Boye, Banganga-Nzambe mpe Balevi bamipetolaki mpo na komema Sanduku ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. 15 Bongo Balevi bamemaki na banzete Sanduku ya Nzambe na mapeka na bango ndenge kaka Moyize atindaki, kolanda Liloba na Yawe. 16 Davidi alobaki na bakambi ya Balevi ete bapona, kati na bandeko na bango, bayembi mpo na koyemba banzembo ya esengo, na bibetelo mindule: nzenze, lindanda mpe manzanza. 17 Balevi baponaki Emani, mwana mobali ya Joeli; Azafi, mwana mobali ya Berekia, kati na bandeko na ye ya mibali; Etani, mwana mobali ya Kushaya, kati na bana ya Merari, na bandeko na ye ya mibali. 18 Mpe mpo na kosunga bango, baponaki Balevi mosusu: Zakari, Beni, Yazieli, Shemiramoti, Yeyeli, Uni, Eliabi, Benaya, Maaseya, Matitia, Elifele, Mikineya, Obedi-Edomi mpe Yeyeli. Bango nyonso bazalaki bakengeli bikuke. 19 Babeti miziki: Emani, Azafi mpe Etani; bango bazalaki kobeta manzanza oyo basala na bronze. 20 Zakari, Azieli, Shemiramoti, Yeyeli, Uni, Eliabi, Maaseya mpe Benaya; bango bazalaki kobeta nzenze na mongongo ya soprano. 21 Matitia, Elifele, Mikineya, Obedi-Edomi, Yeyeli mpe Azazia; bango bazalaki kobeta mandanda ya basinga mwambe mpo na kotambolisa banzembo. 22 Kenania, mokambi ya Balevi, aponamaki mpo na kotambolisa banzembo; pamba te ayebaki mosala yango malamu. 23 Berekia mpe Elikana, bazalaki bakengeli ya Sanduku ya Boyokani. 24 Banganga-Nzambe Shebania, Jozafati, Netaneeli, Amasayi, Zakari, Benaya mpe Eliezeri; bazalaki kobeta kelelo liboso ya Sanduku ya Nzambe. Obedi-Edomi mpe Yeyiya bazalaki mpe bakengeli Sanduku ya Boyokani. 25 Davidi, bakambi ya Isalaele mpe bakonzi ya basoda nkoto moko bakendeki kozwa na esengo Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na ndako ya Obedi-Edomi. 26 Mpe mpo ete Yawe asunga Balevi oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, babonzaki lokola mbeka bangombe sambo ya mibali mpe bameme sambo ya mibali. 27 Davidi elongo na Balevi nyonso oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani, bayembi mpe Kenania, mokambi ya bayembi: bango nyonso balataki banzambala ya lino ya talo. Kasi Davidi abakisaki lisusu efode ya lino na likolo. 28 Bato nyonso ya Isalaele bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na kobeta milolo ya esengo, na kobeta maseke, bakelelo, manzanza, banzenze mpe mandanda. 29 Tango Sanduku ya Boyokani ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina na esengo, ayinaki ye kati na motema na ye.

< 1 Masolo ya Kala 15 >